< שמואל א 31 >

ופלשתים נלחמים בישראל וינסו אנשי ישראל מפני פלשתים ויפלו חללים בהר הגלבע׃ 1
Bato ya Filisitia bazalaki kobundisa Isalaele, kasi bato ya Isalaele bakimaki liboso na bango mpe mingi kati na bango bakufaki na ngomba Giliboa.
וידבקו פלשתים את שאול ואת בניו ויכו פלשתים את יהונתן ואת אבינדב ואת מלכי שוע בני שאול׃ 2
Bato ya Filisitia balandaki Saulo elongo na bana na ye ya mibali, kasi babomaki bana na ye ya mibali: Jonatan, Abinadabi mpe Maliki-Shuwa.
ותכבד המלחמה אל שאול וימצאהו המורים אנשים בקשת ויחל מאד מהמורים׃ 3
Bongo bitumba ekomaki mpo na koboma Saulo. Tango basoda oyo babundaka na matolotolo bamonaki Saulo, ye Saulo alengaki na somo.
ויאמר שאול לנשא כליו שלף חרבך ודקרני בה פן יבואו הערלים האלה ודקרני והתעללו בי ולא אבה נשא כליו כי ירא מאד ויקח שאול את החרב ויפל עליה׃ 4
Saulo alobaki na soda oyo amemaki bibundeli na ye: « Bimisa mopanga na yo na ebombelo na yango mpe boma ngai, noki te bato oyo bakatama ngenga te bakoya kotuba ngai mpe kosakanela ngai. » Kasi soda oyo amemaki bibundeli na ye aboyaki, pamba te azalaki kobanga. Bongo Saulo akamataki mopanga na ye mpe amibwakaki na likolo na yango.
וירא נשא כליו כי מת שאול ויפל גם הוא על חרבו וימת עמו׃ 5
Tango soda oyo amemaki bibundeli na ye amonaki ete Saulo akufi, ye mpe amibwakaki na likolo ya mopanga na ye mpe akufaki elongo na Saulo.
וימת שאול ושלשת בניו ונשא כליו גם כל אנשיו ביום ההוא יחדו׃ 6
Ezalaki bongo nde Saulo, bana na ye misato ya mibali, soda oyo azalaki komema bibundeli na ye mpe basoda na ye nyonso bakufaki bango nyonso elongo mokolo wana.
ויראו אנשי ישראל אשר בעבר העמק ואשר בעבר הירדן כי נסו אנשי ישראל וכי מתו שאול ובניו ויעזבו את הערים וינסו ויבאו פלשתים וישבו בהן׃ 7
Tango bato ya Isalaele, oyo bazalaki na ngambo mosusu ya lubwaku mpe ba-oyo bazalaki na ngambo mosusu ya Yordani bamonaki ete mampinga ya Isalaele esili kopanzana, mpe ete Saulo mpe bana na ye ya mibali bakufi, basundolaki bingumba na bango mpe bakimaki. Bato ya Filisitia bayaki kovanda na bingumba yango.
ויהי ממחרת ויבאו פלשתים לפשט את החללים וימצאו את שאול ואת שלשת בניו נפלים בהר הגלבע׃ 8
Na mokolo oyo elendaki, tango bato ya Filisitia bayaki mpo na kolongola biloko oyo ezalaki na banzoto ya bibembe, bamonaki Saulo mpe bana na ye misato ya mibali oyo bakufaki na ngomba Giliboa.
ויכרתו את ראשו ויפשיטו את כליו וישלחו בארץ פלשתים סביב לבשר בית עצביהם ואת העם׃ 9
Bakataki moto ya Saulo, bazwaki bibundeli na ye mpe batindaki bato na mokili mobimba ya bato ya Filisitia mpo ete bapanza sango malamu oyo ya elonga kati na tempelo ya banzambe na bango ya bikeko mpe kati na bato na bango.
וישמו את כליו בית עשתרות ואת גויתו תקעו בחומת בית שן׃ 10
Batiaki bibundeli ya Saulo kati na tempelo ya banzambe na bango ya bikeko, Asitarite, mpe badiembikaki nzoto na ye na mir ya Beti-Sheani.
וישמעו אליו ישבי יביש גלעד את אשר עשו פלשתים לשאול׃ 11
Tango bavandi ya Yabeshi kati na Galadi bayokaki makambo oyo bato ya Filisitia basalaki Saulo,
ויקומו כל איש חיל וילכו כל הלילה ויקחו את גוית שאול ואת גוית בניו מחומת בית שן ויבאו יבשה וישרפו אתם שם׃ 12
bilombe na bango nyonso batelemaki mpe batambolaki butu mobimba mpo na kokoma na Beti-Sheani. Bongo sima na bango kokitisa bibembe ya Saulo mpe ya bana na ye ya mibali wuta na mir, bazongaki na Yabeshi epai wapi batumbaki yango.
ויקחו את עצמתיהם ויקברו תחת האשל ביבשה ויצמו שבעת ימים׃ 13
Bazwaki mikuwa na bango, bakundaki yango na Yabeshi, na se ya nzete ya tamarisi, mpe bakilaki bilei mikolo sambo.

< שמואל א 31 >