< הָרִאשׁוֹנָה אֶל־הַקּוֹרִנְתִּיִּים 2 >

וגם אנכי בבאי אליכם אחי לא באתי בגאות הדבור והחכמה בהגידי לכם את עדות האלהים׃ 1
Yango wana bandeko, tango ngai mpe nayaki epai na bino mpo na kosakola mabombami ya Nzambe, nasalelaki te boyebi makasi ya koloba to ya bwanya.
כי לא חשבתי לדעת בתוככם דבר בלתי אם ישוע המשיח והוא הנצלב׃ 2
Pamba te, wana nazalaki elongo na bino, nazwaki mokano ya koluka koyeba likambo mosusu te, longola kaka Yesu-Klisto mpe Yesu-Klisto oyo babakaki na ekulusu.
ואהי אצלכם בחלשה וביראה ובחלחלה רבה׃ 3
Mpe tango nayaki epai na bino, nazalaki kati na bolembu, na kobanga mpe na kolenga.
ודברי וקריאתי לא לפתות באמרי חכמת בני אדם כי אם בתוכחת הרוח והגבורה׃ 4
Maloba mpe mateya na ngai ewutaki te na maloba ya bwanya ya bomoto mpo na kondimisa bino, kasi ewutaki na kotalisama ya Molimo mpe ya nguya,
למען אשר לא תהיה אמונתכם בחכמת בני אדם כי אם בגבורת אלהים׃ 5
mpo ete moboko ya kondima na bino ezala te bwanya ya bomoto, kasi ezala nde nguya ya Nzambe.
אכן חכמה נדבר בין השלמים לא חכמת העולם הזה גם לא של שרי העולם הזה אשר יאבדו׃ (aiōn g165) 6
Nzokande, toteyaka bwanya epai ya Baklisto oyo bakemba na kondima; mpe bwanya yango ezali ya mokili oyo te to mpe ya bakonzi ya tango oyo te, oyo babongisami mpo na libebi. (aiōn g165)
כי אם בסוד נדבר חכמת האלהים הנסתרה אשר האלהים יעדה לכבודנו לפני ימי העולם׃ (aiōn g165) 7
Te! Toteyaka nde mabombami ya bwanya ya Nzambe, bwanya oyo ebombama na miso ya bato ya mokili, bwanya oyo Nzambe abongisa mpo na nkembo na biso, liboso ete akela mokili. (aiōn g165)
אשר לא ידעה איש משרי העולם הזה כי לו ידעוה לא צלבו את אדון הכבוד׃ (aiōn g165) 8
Kati na bakonzi ya mokili oyo, moko te asosolaki yango; pamba te soki basosolaki yango, balingaki te kobaka Nkolo ya nkembo na ekulusu. (aiōn g165)
אלא ככתוב אשר עין לא ראתה ואזן לא שמעה ולא עלה על לב אנוש את אשר הכין האלהים לאהביו׃ 9
Kasi, kolanda ndenge ekomama: « Oyo liso etikala nanu komona te, oyo litoyi etikala nanu koyoka te, mpe oyo moto atikala nanu kokanisa te kati na motema na ye, yango nde Nzambe abongisi mpo na bato oyo balingaka Ye. »
ולנו גלה האלהים ברוחו כי הרוח חוקר את הכל גם את מעמקי האלהים׃ 10
Nzokande, Nzambe atalisaki biso yango na nzela ya Molimo na Ye; pamba te Molimo ayebaka nyonso, ezala bozindo ya makanisi ya Nzambe.
כי מי הוא בבני אדם הידע את אשר באדם בלתי אם רוח האדם אשר בקרבו כן גם לא ידע איש את אשר באלהים בלתי אם רוח האלהים׃ 11
Nani kati na bato ayebi makanisi ya moto, soki kaka molimo oyo ezali kati na moto yango te? Ndenge moko mpe moko te ayebi makanisi ya Nzambe, longola kaka Molimo na Ye.
ואנחנו לא קבלנו את רוח העולם כי אם הרוח מאת האלהים למען נדע את אשר נתן לנו מאת האלהים בחסדו׃ 12
Nzokande biso, tozwaki molimo ya mokili te, kasi tozwaki Molimo kowuta na Nzambe, mpo ete tokoka kososola biloko oyo Nzambe apesi biso na nzela ya ngolu.
ואת זאת נדבר לא בדברים אשר תלמדם חכמת בני אדם כי אם בדברים אשר רוח הקדש תלמדם ונבאר דברים רוחניים על פי הרוח׃ 13
Ezali biloko yango nde tolobelaka, na maloba ya bwanya ya bomoto te kasi na maloba oyo Molimo alakisaka. Boye, tolobelaka makambo ya Molimo na nzela ya maloba oyo Molimo apesaka.
הן האדם הנפשי איננו מקבל את דברי רוח אלהים כי המה סכלות לו ולא יוכל להבינם באשר המה נדונים בדרך הרוח׃ 14
Moto oyo azangi Molimo ya Nzambe akoki te koyamba makambo kowuta na Molimo ya Nzambe, pamba te ezali lokola liboma na miso na ye; akoki mpe te koyeba yango, pamba te basosolaka yango kaka na nzela ya Molimo.
אבל האדם הרוחני ידין את הכל ואותו לא ידין איש׃ 15
Moto oyo atambolisamaka na Molimo asosolaka makambo nyonso; kasi ye, bato basosolaka ye te, pamba te ekomama:
כי מי תכן את רוח יהוה ומי יודיענו ואנחנו הנה יש לנו רוח המשיח׃ 16
« Nani ayebi makanisi ya Nkolo mpo akoka kopesa Ye toli? » Nzokande biso, makanisi ya Klisto ezali kati na biso.

< הָרִאשׁוֹנָה אֶל־הַקּוֹרִנְתִּיִּים 2 >