< דברי הימים א 21 >
ויעמד שטן על ישראל ויסת את דויד למנות את ישראל׃ | 1 |
Satana atelemelaki Isalaele mpe atindikaki Davidi na kotanga motango ya bato ya Isalaele.
ויאמר דויד אל יואב ואל שרי העם לכו ספרו את ישראל מבאר שבע ועד דן והביאו אלי ואדעה את מספרם׃ | 2 |
Boye, Davidi apesaki mitindo na Joabi mpe na bakambi ya bato: — Bokende kotanga bato ya Isalaele, longwa na Beri-Sheba kino na Dani, mpe boyebisa ngai motango na bango mpo ete nayeba.
ויאמר יואב יוסף יהוה על עמו כהם מאה פעמים הלא אדני המלך כלם לאדני לעבדים למה יבקש זאת אדני למה יהיה לאשמה לישראל׃ | 3 |
Kasi Joabi azongisaki: — Tika ete Yawe akomisa bato na Ye ebele koleka mbala nkama! Oh mokonzi, nkolo na ngai, bango nyonso bazali te basali ya nkolo na ngai? Mpo na nini nkolo na ngai alingi kosala bongo? Mpo na nini komemisa Isalaele ngambo?
ודבר המלך חזק על יואב ויצא יואב ויתהלך בכל ישראל ויבא ירושלם׃ | 4 |
Kasi mokonzi atingamaki kaka na mitindo oyo apesaki na Joabi. Boye, Joabi abimaki, atambolaki kati na Isalaele mobimba mpe azongaki na Yelusalemi.
ויתן יואב את מספר מפקד העם אל דויד ויהי כל ישראל אלף אלפים ומאה אלף איש שלף חרב ויהודה ארבע מאות ושבעים אלף איש שלף חרב׃ | 5 |
Joabi ayebisaki Davidi motango ya bato oyo atangaki, bato oyo bakoki kosalela mopanga na bitumba: bato monkoko moko na nkoto nkama moko kati na Isalaele mobimba, mpe nkoto nkama minei na tuku sambo kati na Yuda.
ולוי ובנימן לא פקד בתוכם כי נתעב דבר המלך את יואב׃ | 6 |
Kasi kati na bango, Joabi atangaki te ekolo ya Levi mpe ya Benjame; pamba te etinda ya mokonzi esepelisaki ye te.
וירע בעיני האלהים על הדבר הזה ויך את ישראל׃ | 7 |
Etinda yango esepelisaki Nzambe te mpe Nzambe apesaki Isalaele etumbu.
ויאמר דויד אל האלהים חטאתי מאד אשר עשיתי את הדבר הזה ועתה העבר נא את עוון עבדך כי נסכלתי מאד׃ | 8 |
Davidi alobaki na Nzambe: — Nasali lisumu monene na kotanga bato. Sik’oyo, nabondeli Yo, limbisa mabe ya mosali na Yo; pamba te nasali makambo lokola moto ya liboma.
וידבר יהוה אל גד חזה דויד לאמר׃ | 9 |
Yawe alobaki na mosakoli Gadi, mopesi toli ya Davidi:
לך ודברת אל דויד לאמר כה אמר יהוה שלוש אני נטה עליך בחר לך אחת מהנה ואעשה לך׃ | 10 |
— Kende koyebisa Davidi: « Tala liloba oyo Yawe alobi: ‹ Nazali kotalisa yo bitumbu misato; pona moko kati na yango mpo ete Ngai nakokisa yango lokola etumbu mpo na yo. › »
ויבא גד אל דויד ויאמר לו כה אמר יהוה קבל לך׃ | 11 |
Gadi akendeki koyebisa Davidi makambo oyo Yawe alobaki na ye: — Tala makambo oyo Yawe alobi: « Oponi etumbu nini:
אם שלוש שנים רעב ואם שלשה חדשים נספה מפני צריך וחרב אויבך למשגת ואם שלשת ימים חרב יהוה ודבר בארץ ומלאך יהוה משחית בכל גבול ישראל ועתה ראה מה אשיב את שלחי דבר׃ | 12 |
mibu misato ya nzala makasi; sanza misato oyo banguna na yo bakolonga yo mpe mipanga na bango ekoboma basoda na yo; to mikolo misato elongo na mopanga ya Yawe mpe bokono oyo ebomaka, mikolo oyo anjelu ya Yawe akobebisa etuka nyonso ya Isalaele? Kanisa sik’oyo malamu mpe yebisa ngai eyano oyo ngai nasengeli komema epai na Ye oyo atindi ngai. »
ויאמר דויד אל גד צר לי מאד אפלה נא ביד יהוה כי רבים רחמיו מאד וביד אדם אל אפל׃ | 13 |
Davidi azongiselaki Gadi: — Nazali na pasi makasi kati na motema. Eleki malamu mpo na ngai kokweya na maboko ya Yawe, pamba te mawa na Ye ezali solo monene; kasi tika ete nakweya te na maboko ya bato!
ויתן יהוה דבר בישראל ויפל מישראל שבעים אלף איש׃ | 14 |
Boye, Yawe atindaki kati na Isalaele bokono oyo ebomaka, mpe bato ya Isalaele nkoto tuku sambo bakufaki.
וישלח האלהים מלאך לירושלם להשחיתה וכהשחית ראה יהוה וינחם על הרעה ויאמר למלאך המשחית רב עתה הרף ידך ומלאך יהוה עמד עם גרן ארנן היבוסי׃ | 15 |
Nzambe atindaki anjelu na Yelusalemi mpo na kobebisa yango; kasi wana anjelu azalaki kobebisa, Yawe atalaki mpe ayokaki mawa mpo na pasi wana. Alobaki na anjelu oyo azalaki kobebisa: « Ekoki! Longola loboko na yo! » Anjelu na Yawe atelemaki pembeni ya etando ya Orinani, moto ya Yebusi.
וישא דויד את עיניו וירא את מלאך יהוה עמד בין הארץ ובין השמים וחרבו שלופה בידו נטויה על ירושלם ויפל דויד והזקנים מכסים בשקים על פניהם׃ | 16 |
Davidi atombolaki miso mpe amonaki anjelu ya Yawe atelemi kati ya likolo mpe mabele, bongo na loboko na ye oyo asembolaki likolo ya Yelusalemi, asimbaki mopanga ezanga ebombelo. Davidi mpe bampaka balataki basaki mpe bakweyaki bilongi kino na mabele.
ויאמר דויד אל האלהים הלא אני אמרתי למנות בעם ואני הוא אשר חטאתי והרע הרעותי ואלה הצאן מה עשו יהוה אלהי תהי נא ידך בי ובבית אבי ובעמך לא למגפה׃ | 17 |
Davidi alobaki na Nzambe: — Boni, ezali ngai nde napesaki mitindo ete batanga motango ya bato? Ngai moko nde nasalaki masumu, ngai moko nde nasalaki mbeba oyo eleki mabe. Bango, bato ya ekolo na ngai, basali mabe moko te. Oh Yawe, Nzambe na ngai, ebongi nde opesa ngai mpe libota na ngai etumbu; kasi tika ete bokono oyo ebomaka ekweyela te bato na Yo!
ומלאך יהוה אמר אל גד לאמר לדויד כי יעלה דויד להקים מזבח ליהוה בגרן ארנן היבסי׃ | 18 |
Anjelu na Yawe atindaki Gadi koloba na Davidi: — Kende kotonga etumbelo mpo na Yawe, na etando ya Orinani, moto ya Yebusi.
ויעל דויד בדבר גד אשר דבר בשם יהוה׃ | 19 |
Davidi akendeki kuna kolanda liloba oyo Gadi alobaki na Kombo na Yawe.
וישב ארנן וירא את המלאך וארבעת בניו עמו מתחבאים וארנן דש חטים׃ | 20 |
Bongo, wana Orinani azalaki kotuta ble, abalukaki mpe amonaki anjelu. Boye bana na ye ya mibali minei oyo bazalaki na ye elongo babombamaki.
ויבא דויד עד ארנן ויבט ארנן וירא את דויד ויצא מן הגרן וישתחו לדויד אפים ארצה׃ | 21 |
Davidi apusanaki pembeni ya Orinani; mpe tango Orinani atalaki mpe amonaki Davidi, abimaki na etando mpe agumbamaki liboso ya Davidi, elongi kino na mabele.
ויאמר דויד אל ארנן תנה לי מקום הגרן ואבנה בו מזבח ליהוה בכסף מלא תנהו לי ותעצר המגפה מעל העם׃ | 22 |
Davidi alobaki na Orinani: — Pesa ngai etando na yo, tekela ngai yango na motuya ya mbongo oyo ekoki na yango, mpo ete natonga etumbelo mpo na Yawe; tekela ngai yango mpo ete etumbu ya bokono oyo ezali koboma bato esila.
ויאמר ארנן אל דויד קח לך ויעש אדני המלך הטוב בעיניו ראה נתתי הבקר לעלות והמורגים לעצים והחטים למנחה הכל נתתי׃ | 23 |
Orinani azongiselaki Davidi: — Kamata yango; mpe tika ete mokonzi, nkolo na ngai, asala na yango nyonso oyo amoni ete ezali malamu mpo na ye. Tala, ngai, nakopesa bangombe ya mibali lokola mbeka ya kotumba, banzete oyo babetelaka ble lokola koni, mpe ble lokola mbeka ya bambuma. Nakopesa nyonso wana.
ויאמר המלך דויד לארנן לא כי קנה אקנה בכסף מלא כי לא אשא אשר לך ליהוה והעלות עולה חנם׃ | 24 |
Kasi mokonzi Davidi alobaki na Orinani: — Te! Nasengeli kaka kosomba yango mpe kopesa yo motuya oyo ekoki na yango; nakomema te epai na Yawe eloko oyo ezali ya yo, nakobonzela Yawe te bambeka ya kotumba oyo nazwi na ofele.
ויתן דויד לארנן במקום שקלי זהב משקל שש מאות׃ | 25 |
Boye, Davidi asombaki etando yango epai ya Orinani, na motuya ya mbongo ya bibende ya wolo, nkama motoba.
ויבן שם דויד מזבח ליהוה ויעל עלות ושלמים ויקרא אל יהוה ויענהו באש מן השמים על מזבח העלה׃ | 26 |
Davidi atongaki kuna etumbelo mpo na Yawe mpe abonzaki bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani. Abelelaki Yawe, mpe Yawe ayanolaki ye na moto oyo ewutaki likolo mpe ekweyaki na etumbelo ya bambeka.
ויאמר יהוה למלאך וישב חרבו אל נדנה׃ | 27 |
Boye Yawe alobaki na anjelu, mpe anjelu azongisaki mopanga na ye na ebombelo na yango.
בעת ההיא בראות דויד כי ענהו יהוה בגרן ארנן היבוסי ויזבח שם׃ | 28 |
Banda na tango wana, lokola Davidi amonaki ete Yawe ayanolaki ye na etando ya Orinani, moto ya Yebusi, akomaki kobonza bambeka tango nyonso na esika wana.
ומשכן יהוה אשר עשה משה במדבר ומזבח העולה בעת ההיא בבמה בגבעון׃ | 29 |
Mongombo na Yawe oyo Moyize atongaki na esobe mpe etumbelo ya bambeka ya kotumba ezalaki na tango wana, na esambelo ya likolo ya ngomba ya Gabaoni.
ולא יכל דויד ללכת לפניו לדרש אלהים כי נבעת מפני חרב מלאך יהוה׃ | 30 |
Nzokande Davidi azalaki kokoka te kozwa mokano ya kokende kotuna Nzambe liboso ya Mongombo, pamba te azalaki kobanga mopanga na Yawe.