< ג'ון 13 >

לפני חג הפסח, ישוע ידע שהגיעה שעתו לעזוב את העולם ולשוב אל אביו. ישוע תמיד אהב מאוד את בחיריו בעולם הזה, ועתה עמד להוכיח להם כי אין גבול לאהבתו. 1
Liboso ete feti ya Pasika ekoma, Yesu ayebaki ete tango na Ye ekoki mpo na kotika mokili oyo mpe kokende epai ya Tata. Lokola azalaki kolinga bato na Ye, oyo bazalaki kati na mokili, akobaki kolinga bango kino na suka.
לעט סעודת הערב השטן כבר המריץ את יהודה איש־קריות להסגיר את ישוע. 2
Bongo, wana bazalaki kolia elongo, Satana asilaki kotia kati na motema ya Yuda Isikarioti, mwana mobali ya Simona, makanisi ya koteka Yesu.
ישוע ידע כי אביו נתן בידו את הכול, וכי הוא בא מאלוהים וישוב אל אלוהים. 3
Yesu ayebaki ete Tata apesaki Ye bokonzi likolo ya makambo nyonso, ete awutaki epai ya Nzambe mpe ete asengelaki kozonga epai ya Nzambe;
לכן הוא קם מהשולחן בארוחת הערב, הסיר את בגדיו וקשר למותניו מגבת. 4
atelemaki longwa na mesa, alongolaki bilamba oyo alataki, azwaki eteni moko ya elamba mpe amikangaki yango na loketo.
אחר כך לקח קערה, מילא אותה מים, החל לרחוץ את רגלי תלמידיו וניגב אותן במגבת הקשורה למתניו. 5
Bongo, atiaki mayi na sani mpe abandaki kosukola makolo ya bayekoli na Ye mpe kopangusa yango na eteni ya elamba oyo amikangaki na loketo.
כאשר הגיע תורו של שמעון פטרוס הוא קרא:”אדוני, איך ייתכן שאתה תרחץ את רגלי?“ 6
Tango akomaki na esika oyo Simona Petelo azalaki, Simona Petelo alobaki na Ye: — Nkolo, Yo penza osukola ngai makolo?
”כעת אינך מבין מדוע אני עושה זאת, אולם יבוא יום שתבין זאת“, השיב ישוע. 7
Yesu azongiselaki ye: — Likambo oyo Ngai nazali kosala, yo okoki te kososola yango sik’oyo; kasi okososola yango na sima.
”לא, “מחה פטרוס,”לעולם לא תרחץ את רגלי!“”אם לא ארחץ אותך, לא יהיה לך חלק בי“, השיב ישוע. (aiōn g165) 8
Kasi Petelo alobaki na Yesu: — Te! Osengeli te kosukola ngai makolo! Yesu azongiselaki ye: — Soki nasukoli yo makolo te, okozala lisusu te na libula elongo na Ngai. (aiōn g165)
”אם כך, “קרא פטרוס,”רחץ לא רק את רגלי, אלא גם את ידי וראשי.“ 9
Simona Petelo alobaki na Yesu: — Nkolo, lokola ekomi bongo, kosukola ngai kaka makolo te, kasi sukola ngai lisusu maboko mpe moto.
”מי שרחץ כבר את כל גופו צריך לרחוץ את רגליו בלבד כדי להיות נקי וטהור. עתה אתם נקיים, אבל לא כולכם.“ 10
Yesu alobaki na ye: — Moto oyo awuti komisukola nzoto azali penza peto; azali kaka na posa ya kosukola makolo na ye. Nzokande bino, bozali peto; kasi bino nyonso te.
ישוע אמר דברים אלה מפני שידע מי עמד להסגירו. 11
Solo, Yesu ayebaki moto oyo akoteka Ye; yango wana alobaki: « Bino nyonso bozali peto te. »
כשסיים ישוע לרחוץ את רגליהם לבש את בגדיו, התיישב ושאל:”האם אתם מבינים מה עשיתי לכם? 12
Sima na Yesu kosukola bango makolo mpe kolata lisusu bilamba na Ye, avandaki lisusu na mesa mpe alobaki na bango: — Boni, bososoli tina ya likambo oyo nawuti kosala bino?
אתם קוראים לי’מורה‘ו’אדון‘, ואכן נוהגים אתם בצדק, כי זוהי האמת. 13
Ndenge bobengaka Ngai « Moteyi » mpe « Nkolo, » bolobaka na bino penza ya solo, pamba te nazali penza Moteyi mpe Nkolo.
לכן אם אני, האדון והמורה, רחצתי את רגליכם, גם אתם צריכים לרחוץ איש את רגלי רעהו. 14
Boye soki Ngai, Moteyi mpe Nkolo na bino, nasukoli bino makolo, bosengeli, bino mpe, kosukolana makolo;
נתתי לכם דוגמה כדי שתנהגו כמוני. 15
pamba te napesi bino kaka ndakisa, mpo ete, bino mpe, bosalaka ndenge kaka Ngai nasali bino.
האמינו לי, העבד אינו חשוב מאדוניו, והשליח אינו חשוב משולחו. 16
Nazali koloba na bino penza ya solo: mowumbu aleki nkolo na ye te na bokonzi, mpe ntoma aleki motindi na ye te na bokonzi.
כאשר תבינו את משמעות הדברים האלה ותנהגו לפיהם, יהיה לכם טוב ותתברכו. 17
Wana bosili koyeba makambo oyo, bozali bato ya esengo soki kaka botie yango na misala.
”איני מתכוון לכולכם, כי אני יודע במי בחרתי. הכתובים מנבאים שאחד מאוכלי לחמי יבגוד בי. 18
Nazali koloba bongo te na tina na bino nyonso; nayebi bato oyo napona. Kasi esengeli ete eteni oyo ya Makomi ekokisama: « Moto oyo azalaki kolia sani moko elongo na ngai abalukeli ngai! »
אני מספר לכם זאת עכשיו כדי שתאמינו לי כשכל זה יתרחש. 19
Namiyebiseli bino yango sik’oyo, liboso ete likambo yango esalema, mpo ete, tango likambo yango ekosalema, bondima ete nazali oyo azali.
”אמן אומר אני לכם: כל המקבל את מי שאני שולח מקבל למעשה אותי, וכל המקבל אותי מקבל למעשה את שולחי.“ 20
Nazali koloba na bino penza ya solo: moto oyo ayambi motindami na Ngai ayambi nde Ngai, mpe moto oyo ayambi Ngai ayambi mpe Motindi na Ngai.
בסיימו דברים אלה נאנח ישוע אנחה עמוקה ואמר:”אכן, זוהי האמת – אחד מכם יבגוד בי.“ 21
Sima na Yesu koloba bongo, amitungisaki makasi kati na motema; alobaki: — Nazali koloba na bino penza ya solo: moko kati na bino akoteka Ngai.
התלמידים הביטו איש ברעהו בתמיהה ובמבוכה, משום שלא ידעו למי התכוון. 22
Bayekoli bakomaki kotalana bango na bango mpe kotunana mpo na koluka koyeba soki Yesu azalaki koloba na tina na nani.
תלמידו החביב של ישוע היה סמוך לחיקו, 23
Moko kati na bango, moyekoli oyo Yesu azalaki kolinga koleka bayekoli mosusu, avandaki pembeni ya Yesu.
ולכן רמז לו שמעון פטרוס לשאל אותו למי כוונתו. 24
Simona Petelo afinaki ye miso mpo na kosenga na ye ete atuna Yesu soki azali koloba bongo na tina na nani.
התלמיד הטה את ראשו וקרבו לראשו של ישוע.”אדוני, למי כוונתך?“שאל בלחישה. 25
Mbala moko, moyekoli yango alalelaki Yesu na tolo mpe atunaki Ye: — Nkolo, ezali nani?
”למי שאגיש את פרוסתי הטבולה ברוטב“, השיב ישוע. הוא טבל את הפרוסה והגישה ליהודה בן שמעון איש־קריות. 26
Yesu azongisaki: — Ezali moto oyo nakopesa eteni oyo ya lipa sima na Ngai kozindisa yango kati na elubu. Bongo, sima na Yesu kozindisa eteni yango ya lipa kati na elubu, akamataki yango mpe apesaki yango epai ya Yuda Isikarioti, mwana mobali ya Simona.
כאשר סיים יהודה לאכול את הלחם נכנס השטן ללבו.”סיים את העניין במהירות“, אמר לו ישוע. 27
Tango kaka Yuda azwaki eteni yango ya lipa, Satana akotaki kati na ye. Bongo Yesu alobaki na ye: — Likambo oyo obongisi kosala, kokisa yango noki.
איש מהנוכחים לא ידע למה ישוע התכוון. 28
Kasi, kati na bato oyo bazalaki wana na mesa, moko te asosolaki tina oyo Yesu alobaki na ye bongo.
היו שחשבו כי ישוע ביקש ממנו לקנות את צרכי החג או לתת כסף לעניים, מפני שיהודה היה הגזבר. 29
Lokola ezalaki Yuda nde azalaki kobatela libenga ya mbongo, bayekoli mosusu bakanisaki ete Yesu alobi na ye: « Kende kosomba biloko oyo tosengeli na yango mpo na feti, » to « kende kopesa lisungi epai ya babola. »
יהודה עזב מיד את המקום ויצא. היה אז לילה. 30
Boye, tango kaka Yuda azwaki eteni yango ya lipa, abimaki mbala moko. Mpe butu ekotaki.
לאחר שעזב יהודה את החדר אמר ישוע:”הגיעה שעתי; עתה יתפאר בן־האדם, ואלוהים יפואר בו. 31
Sima na Yuda kobima, Yesu alobaki: — Sik’oyo, nkembo ya Mwana na Moto emonisami, mpe Nzambe akozwa nkembo kati na Ye. [
אם אלוהים יפואר בי, הוא בעצמו יפאר אותי ואף יעשה זאת במהרה. 32
Lokola Nzambe akozwa nkembo kati na Mwana, ]Nzambe mpe akopesa Mwana nkembo, kati na Ye moko, mpe akosala yango kala mingi te.
ילדי היקרים, עוד מעט עלי ללכת מאתכם. לאחר שאלך לא תוכלו לבוא אלי גם אם תחפשו אותי, כפי שכבר אמרתי למנהיגי היהודים. 33
Bana na Ngai, natikali na tango moke kaka ya kozala lisusu elongo na bino. Bokoluka Ngai; mpe makambo oyo nalobaki na Bayuda, yango mpe nazali koyebisa bino sik’oyo: « Epai Ngai nazali kokende, bino, bokoki te koya kuna. »
”אני מפקיד בידיכם מצווה חדשה: אהבו איש את רעהו כשם שאני אוהב אתכם. 34
Nazali kopesa bino mobeko ya sika: Bolinganaka bino na bino. Ndenge Ngai nalingi bino, bino mpe bosengeli kolinganaka bino na bino.
אהבתכם החזקה איש לרעהו תוכיח לעולם שאתם תלמידי.“ 35
Ezali na nzela ya bolingo oyo bokotalisana bino na bino nde bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na Ngai.
”לאן אתה הולך, אדון?“שאל שמעון פטרוס.”אינך יכול לבוא איתי עכשיו, אולם עוד זמן מה תצטרף אלי גם אתה“, השיב ישוע. 36
Simona Petelo atunaki Yesu: — Nkolo, ozali kokende wapi? Yesu azongiselaki ye: — Okoki te kolanda Ngai sik’oyo na esika oyo nazali kokende; okolanda Ngai sima.
”אבל מדוע איני יכול ללכת איתך כעת?“פטרוס לא הבין.”אני מוכן אפילו למות למענך!“ 37
Petelo atunaki lisusu: — Nkolo, mpo na nini nakoki te kolanda Yo sik’oyo? Nabongami kokufa mpo na Yo.
”למות למעני?“שאל ישוע.”אני אומר לך שעד מחר בבוקר לפני קריאת התרנגול, תכחיש שלוש פעמים אפילו את העובדה שאתה מכיר אותי!“ 38
Yesu azongiselaki ye: — Obongami penza kokufa mpo na Ngai! Nazali koloba na yo penza ya solo: liboso ete soso elela, okowangana Ngai mbala misato.

< ג'ון 13 >