< הַשֵּׁנִית לְפֶטְרוֹס 2 >

אך גם נביאי שקר היו בעם־ישראל, כשם שיהיו ביניכם מורי שקר. הם יתכחשו למשיח אשר קנה אותם בדמו, ובפיקחות ועורמה ילמדו אתכם תורות כזב. אנשים אלה יביאו על עצמם אסון פתאומי ונורא. 1
Ndenge kaka basakoli ya lokuta bazalaki kati na bana ya Isalaele na tango ya kala, ndenge wana mpe bateyi ya lokuta bakozala kati na bino; bakokotisa na mayele mabe mateya ya lokuta mpe ya libebi kino ata kowangana Nkolo oyo asikolaki bango, mpe bakomibendela libebi na mbalakata.
רבים יאמינו לתורות הכזב שלהם שמתירות זנות וניאוף, ובגללם יגדפו אנשים את אמת האלוהים. 2
Bato ebele bakolanda bango kati na mobulu na bango, mpe nzela ya bosolo ekofingama likolo na bango.
באהבת הבצע שלהם ינצלו מורי השקר את תמימותכם, יספרו לכם שקרים ויגזלו את כספיכם במרמה. אולם דעו לכם כי אלוהים גזר את דינם עוד לפני זמן רב, וקיצם הנורא קרוב! 3
Kati na lokoso na bango, bakobetela bino masolo ya lokuta mpo na kobenda bino mbongo na nzela ya maloba ya sukali. Nzokande, wuta kala, Nzambe akatela bango etumbu oyo ekoki mpo na bango, mpe libebi ezali penza kozela bango.
אלוהים משלם לרשעים כגמולם; הוא לא חס אף על המלאכים שחטאו, אלא השליכם לגיהינום וכבל אותם במערות אפלות עד יום־הדין. (Tartaroō g5020) 4
Soki Nzambe azangaki te kopesa na ba-anjelu oyo basalaki masumu etumbu kasi abwakaki bango ya kokangama na minyololo kati na molili makasi ya lifelo epai wapi abombi bango mpo na kozela mokolo ya kosambisama, (Tartaroō g5020)
אלוהים לא חס גם על הדורות הראשונים שחיו לפני המבול. הלא זוכרים אתם כיצד החריב את העולם כולו, בהביאו את המבול על דור הרשעים; הוא הציל רק את נוח ושבעת בני־משפחתו, משום שנוח האמין באלוהים והטיף למעשי צדקה. 5
soki ayokelaki te mokili ya kala mawa kasi abikisaki bato mwambe oyo kati na bango ezalaki na Noa oyo azalaki kosakola bosembo na tango ya mpela oyo abebisaki na yango mokili elongo na bato oyo batosaki Ye te,
אלוהים החריב גם את סדום ועמורה; הוא הפכן לאפר ומחה אותן מעל פני האדמה. גורלן של ערים אלה הוא לקח ואזהרה לכל העתידים לבחור בדרך השחיתות והאבדון. 6
soki Nzambe apesaki na bingumba ya Sodome mpe Gomore etumbu na nzela ya moto oyo ezikisaki yango kino ekomaki putulu mpo na kopesa ndakisa ya etumbu oyo ekokweyela bato ya masumu
אלוהים אמנם הפך את סדום ועמורה, אך הוא הציל את לוט משום שהיה אדם צדיק. לוט שמר על טוהר לבו, למרות שחי בין רשעים שהעציבו אותו מאוד בשחיתותם. 7
kasi akangolaki Loti, moto ya sembo, oyo atondaki na mawa kati na motema na ye likolo na mobulu ya bato wana ya mabe,
8
(pamba te moto oyo ya sembo azalaki kovanda kati na bango mpe, mokolo na mokolo, azalaki komitungisa makasi kati na motema na ye mpo na mabe oyo azalaki komona mpe koyoka),
כשם שהציל אלוהים את לוט, כך הוא יכול להציל אתכם ואותי מהפיתויים הסובבים אותנו, ולגבי הרשעים – אלוהים ישמור את העונש שיעד להם, עד בוא יום־הדין. 9
elingi koloba ete Nkolo azali na makoki ya kokangola bayengebene kati na komekama mpe ya kopesa, na mokolo ya kosambisama, etumbu epai ya bato mabe.
אלוהים יחמיר במיוחד עם אלה שהולכים אחרי תאוות בשרם ובזים לכל שלטון וסמכות. אנשים אלה גאוותנים, אכזריים, אנוכיים, חצופים ומעזים לבוז גם לסמכות העליונה. 10
Akopesa mingi-mingi etumbu epai ya ba-oyo, mpo na lokoso na bango ya makambo ya mbindo, batambolaka kolanda baposa mabe ya nzoto mpe batiolaka bokonzi ya Nkolo. Lokola bateyi yango ya lokuta batondi na lolendo mpe bamimonaka lokola bakoka na nyonso, babangaka te kofinga bikelamu ya nkembo;
אף המלאכים בשמים, שעולים עליהם בחשיבותם ובכוחם, אינם מאשימים בבוז על אלה לפני אלוהים. 11
nzokande ba-anjelu, ba-oyo baleki kutu bango na makasi mpe na nguya, bamekaka kutu te kobimisa, liboso ya Nkolo, maloba ya kofinga bikelamu wana ya nkembo.
מורי שקר אלה עושים ככל העולה על רוחם, ולועגים לכל מה שאינם מבינים; הם דומים לבהמות טיפשות שנולדו רק כדי להילכד ולמות! אך אנשים אלה יאבדו בשחיתותם. 12
Kasi bango, bateyi ya lokuta, lokola banyama oyo ezanga mayele, oyo etambolaka na bonyama, oyo ebongisama mpo ete bato bakanga yango na mitambo mpe baboma yango, bafingaka oyo bayebi te. Mpo na yango, bakokufa lokola banyama,
בגלל רשעותם ובגלל הסבל שגרמו לאנשים רבים, יענישם אלוהים במלוא החומרה! אנשים אלה מתענגים על חיי הפריצות וההוללות שהם מנהלים לאור היום; הם בושה וכלימה לכם. הם גם מרמים אתכם בחייהם הכפולים – מחד הם ממשיכים לחטוא, ומאידך משתתפים בחגיגותיכם ובאסיפותיכם כאילו היו ישרים והגונים. 13
bakozwa lifuti oyo ebongi na mabe na bango. Basepelaka kosala makambo ya soni na moyi makasi. Na lokuta na bango, basepelaka kosambwisa mpe kobebisa lokumu na bino tango basanganaka elongo na bino mpo na mayangani.
עיניהם נואפות ולעולם אינם שבעים ממעשי ניאוף. הם מפתים נשים קלות דעת, והרגילו את לבם לרדוף בצע. ארורים הם! 14
Miso na bango elembaka te kolula basi mpo na koluka kosala na bango ekobo, balembaka te kosala masumu, bakosaka bato oyo balendisama malamu te na kondima; bazali na mitema etonda na lokoso: bazali na se ya bilakeli mabe ya Nzambe.
אנשים אלה סטו מהדרך הישרה ותעו כבלעם בן־בעור, אשר אהב את השכר שקיבל תמורת מעשיו המושחתים. 15
Sima na bango kotika nzela ya solo, bapengwaki mbala moko na kolanda nzela ya Balami, mwana mobali ya Beori, oyo alingaki lifuti ya mabe;
אך אתם ודאי זוכרים כי אתונו של בלעם פתחה את פיה בקול אדם, נזפה בו על רשעותו, ומנעה את מעשה השטות שעמד לעשות. 16
kasi Nzambe apamelaki ye mpo na bozangi botosi na ye, atiaki maloba ya bomoto kati na monoko ya ane ya mwasi, mpe nyama yango oyo elobaka te esukisaki bozoba ya mosakoli.
אנשים אלה הם כבארות מים יבשות, שמבטיחים הרבה ואינם מקיימים דבר; הם נסחפים כעננים בסערה. דינם נגזר להישאר באפלה לעולם ועד. (questioned) 17
Bateyi yango ya lokuta bazali lokola bitima oyo ebimisaka lisusu mayi te to lokola mapata oyo mopepe makasi etindikaka. Nzambe abombela bango esika kati na molili makasi.
הם מתפארים במעשי הרשע שלהם, ומנצלים חולשות בני־האדם ואת תאוות הבשר, כדי לצוד ולהחזיר לשורותיהם את האנשים שלא מזמן נמלטו מחיים מושחתים כאלה. 18
Pamba te, mpo na kosepelisa baposa mabe ya banzoto na bango, basalelaka maloba ya sukali mpe ezanga tina mpo na kopengwisa bato oyo bawuti kobongola mitema sika wana bawuti kokabwana na bato oyo babikaka kati na libunga.
הם מבטיחים חופש, אך הם בעצמם עבדים לחטא ושחיתות; שהרי אדם הוא עבד למה ששולט בו. 19
Balakaka bango bonsomi, nzokande bango moko bazali bawumbu ya baposa mabe ya nzoto, oyo ememaka bango na libebi; pamba te moto nyonso azali mowumbu ya oyo ekonzaka ye.
אדם שנמלט מהשחיתות בעולם באמצעות אמונתו במשיח, אך כעבור זמן מתפתה ושב לחיי חטא וטומאה, מצבו חמור מזה שהיה לפנים! 20
Soki, sima na bango kokabwana na mbindo ya mokili, mpo ete bayebi Yesu-Klisto, Nkolo mpe Mobikisi na biso, bamizongisi lisusu na bowumbu ya mbindo yango, bomoi na bango ekokoma mabe koleka ndenge ezalaki liboso.
לאדם כזה מוטב שכלל לא ידע את דרך הצדקה, משיידע וייסוג מקיום המצוות הקדושות שנמסרו לו. 21
Elingaki kozala malamu mingi mpo na bango koyeba te nzela ya bosembo, na esika ete, sima na bango koyeba nzela ya bosembo, basundola mibeko ya bule oyo epesamelaki bango.
אדם כזה מאמת את דברי המשל:”הכלב שב על קיאו, והחזיר עולה מן הרחצה להתגולל ברפש.“ 22
Ezaleli na bango elongisi bosolo ya masese oyo: « Mbwa ezongelaka biloko oyo yango moko esanzi » mpe « Ngulu oyo basukoli ezongelaka kotambola kati na potopoto. »

< הַשֵּׁנִית לְפֶטְרוֹס 2 >