< תהילים 21 >
לַמְנַצֵּחַ מִזְמוֹר לְדָוִֽד׃ יְֽהוָה בְּעָזְּךָ יִשְׂמַח־מֶלֶךְ וּבִישׁוּעָתְךָ מַה־יגיל יָּגֶל מְאֹֽד׃ | 1 |
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi. Yawe, mokonzi azali kosepela na nguya na Yo; Tala ndenge nini elonga oyo opesi ye epesi ye esengo monene!
תַּאֲוַת לִבּוֹ נָתַתָּה לּוֹ וַאֲרֶשֶׁת שְׂפָתָיו בַּל־מָנַעְתָּ סֶּֽלָה׃ | 2 |
Okokisi posa ya motema na ye mpe opimeli ye te oyo azalaki kosenga Yo.
כִּֽי־תְקַדְּמֶנּוּ בִּרְכוֹת טוֹב תָּשִׁית לְרֹאשׁוֹ עֲטֶרֶת פָּֽז׃ | 3 |
Oyei epai na ye na mapamboli ya motuya. Na moto na ye, olatisi ye motole ya wolo oyo basangisa na eloko mosusu.
חַיִּים ׀ שָׁאַל מִמְּךָ נָתַתָּה לּוֹ אֹרֶךְ יָמִים עוֹלָם וָעֶֽד׃ | 4 |
Asengaki Yo bomoi, mpe opesaki ye yango; opesaki ye bomoi molayi mpe ya libela na libela.
גָּדוֹל כְּבוֹדוֹ בִּישׁוּעָתֶךָ הוֹד וְהָדָר תְּשַׁוֶּה עָלָֽיו׃ | 5 |
Nkembo na ye ezali monene mpo na lobiko oyo opesaki ye; olatisaki ye na kongenga mpe na lokumu.
כִּֽי־תְשִׁיתֵהוּ בְרָכוֹת לָעַד תְּחַדֵּהוּ בְשִׂמְחָה אֶת־פָּנֶֽיךָ׃ | 6 |
Solo, okomisi ye etima ya mapamboli ya seko na seko; okomisaki ye moto ya esengo na miso na Yo.
כִּֽי־הַמֶּלֶךְ בֹּטֵחַ בַּיהוָה וּבְחֶסֶד עֶלְיוֹן בַּל־יִמּֽוֹט׃ | 7 |
Mokonzi atiaka elikya na Yawe, aninganaka te mpo na bolingo ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo.
תִּמְצָא יָדְךָ לְכָל־אֹיְבֶיךָ יְמִֽינְךָ תִּמְצָא שֹׂנְאֶֽיךָ׃ | 8 |
Loboko na Yo ekokanga banguna na Yo nyonso; loboko na Yo ya mobali ekokanga bayini na Yo.
תְּשִׁיתֵמוֹ ׀ כְּתַנּוּר אֵשׁ לְעֵת פָּנֶיךָ יְהוָה בְּאַפּוֹ יְבַלְּעֵם וְֽתֹאכְלֵם אֵֽשׁ׃ | 9 |
Tango okomimonisa, okokomisa bango lokola fulu ya moto. Yawe akosilisa koboma bango na kanda na Ye, mpe moto ekozikisa bango.
פִּרְיָמוֹ מֵאֶרֶץ תְּאַבֵּד וְזַרְעָם מִבְּנֵי אָדָֽם׃ | 10 |
Okolimwisa mabota na bango na mokili, mpe bakitani na bango, kati na bana ya bato.
כִּי־נָטוּ עָלֶיךָ רָעָה חָֽשְׁבוּ מְזִמָּה בַּל־יוּכָֽלוּ׃ | 11 |
Atako bakani kosala Yo mabe, atako basali mabongisi ya mabe mpo na kotelemela Yo, bakotikala kolonga ata moke te;
כִּי תְּשִׁיתֵמוֹ שֶׁכֶם בְּמֵֽיתָרֶיךָ תְּכוֹנֵן עַל־פְּנֵיהֶֽם׃ | 12 |
pamba te okobengana bango tango okobwakela bango bambanzi ya tolotolo na Yo.
רוּמָה יְהוָה בְּעֻזֶּךָ נָשִׁירָה וּֽנְזַמְּרָה גְּבוּרָתֶֽךָ׃ | 13 |
Yawe, telema na nguya na Yo! Tokoyemba nguya na Yo na nzela ya banzembo.