< מִשְׁלֵי 12 >
אֹהֵב מוּסָר אֹהֵֽב דָּעַת וְשֹׂנֵא תוֹכַחַת בָּֽעַר׃ | 1 |
Moto oyo alingaka koyekola alingaka boyebi, kasi moto oyo aboyaka pamela azali zoba.
טוֹב יָפִיק רָצוֹן מֵיְהוָה וְאִישׁ מְזִמּוֹת יַרְשִֽׁיעַ׃ | 2 |
Moto ya malamu azwaka ngolu na miso ya Yawe, kasi Nzambe akatelaka moto ya mayele mabe etumbu.
לֹא־יִכּוֹן אָדָם בְּרֶשַׁע וְשֹׁרֶשׁ צַדִּיקִים בַּל־יִמּֽוֹט׃ | 3 |
Motema mabe elendisaka moto te; mosisa ya bato ya sembo ekatanaka te.
אֵֽשֶׁת־חַיִל עֲטֶרֶת בַּעְלָהּ וּכְרָקָב בְּעַצְמוֹתָיו מְבִישָֽׁה׃ | 4 |
Mwasi ya malamu azali motole ya mobali na ye, kasi mwasi oyo ayokisaka soni azali lokola bokono oyo ezali kolia mikuwa.
מַחְשְׁבוֹת צַדִּיקִים מִשְׁפָּט תַּחְבֻּלוֹת רְשָׁעִים מִרְמָֽה׃ | 5 |
Mabongisi ya bayengebene ezalaka ya sembo, kasi makanisi ya bato mabe ezalaka kaka lokuta.
דִּבְרֵי רְשָׁעִים אֱרָב־דָּם וּפִי יְשָׁרִים יַצִּילֵֽם׃ | 6 |
Maloba ya bato mabe ezali mitambo mpo na kosopa makila, kasi maloba ya bayengebene ebikisaka bango.
הָפוֹךְ רְשָׁעִים וְאֵינָם וּבֵית צַדִּיקִים יַעֲמֹֽד׃ | 7 |
Bato mabe bakokweyisama mpe bakozala lisusu te, kasi ndako ya bayengebene ekowumela seko.
לְֽפִי־שִׂכְלוֹ יְהֻלַּל־אִישׁ וְנַעֲוֵה־לֵב יִהְיֶה לָבֽוּז׃ | 8 |
Bwanya epesaka moto lokumu, kasi motema mabe ememaka kotiolama.
טוֹב נִקְלֶה וְעֶבֶד לוֹ מִמְּתַכַּבֵּד וַחֲסַר־לָֽחֶם׃ | 9 |
Eleki malamu kozala moto pamba mpe kozala na mosali, na esika ya komimona moto monene mpe kozanga bilei.
יוֹדֵעַ צַדִּיק נֶפֶשׁ בְּהֶמְתּוֹ וְֽרַחֲמֵי רְשָׁעִים אַכְזָרִֽי׃ | 10 |
Moto ya sembo ayebaka ata baposa ya bibwele na ye, kasi motema ya moto mabe eyokaka mawa te.
עֹבֵד אַדְמָתוֹ יִֽשְׂבַּֽע־לָחֶם וּמְרַדֵּף רֵיקִים חֲסַר־לֵֽב׃ | 11 |
Moto oyo asalaka bilanga atondaka na bilei, kasi moto oyo alandaka bagoyigoyi azangi mayele.
חָמַד רָשָׁע מְצוֹד רָעִים וְשֹׁרֶשׁ צַדִּיקִים יִתֵּֽן׃ | 12 |
Moto mabe alingaka misuni ya bato mabe, kasi mosisa ya bayengebene ebotaka mingi.
בְּפֶשַׁע שְׂפָתַיִם מוֹקֵשׁ רָע וַיֵּצֵא מִצָּרָה צַדִּֽיק׃ | 13 |
Moto ya misala mabe akangamaka na motambo ya maloba na ye ya lokuta, kasi moyengebene akobika kati na pasi.
מִפְּרִי פִי־אִישׁ יִשְׂבַּע־טוֹב וּגְמוּל יְדֵי־אָדָם ישוב יָשִׁיב לֽוֹ׃ | 14 |
Na nzela ya mbuma ya monoko na ye, moto akotondisama na bolamu; mpe moto akozwa lifuti ya misala ya maboko na ye.
דֶּרֶךְ אֱוִיל יָשָׁר בְּעֵינָיו וְשֹׁמֵעַ לְעֵצָה חָכָֽם׃ | 15 |
Nzela ya moto oyo azangi mayele emonanaka alima na miso na ye, kasi moto oyo ayokaka toli azali moto ya bwanya.
אֱוִיל בַּיּוֹם יִוָּדַע כַּעְסוֹ וְכֹסֶה קָלוֹן עָרֽוּם׃ | 16 |
Kotomboka ya moto oyo azangi mayele eyebanaka kaka mokolo wana, kasi moto ya mayele abombaka soni na ye.
יָפִיחַ אֱמוּנָה יַגִּיד צֶדֶק וְעֵד שְׁקָרִים מִרְמָֽה׃ | 17 |
Motatoli ya malamu apesaka matatoli ya solo, kasi motatoli ya mabe apesaka matatoli ya lokuta.
יֵשׁ בּוֹטֶה כְּמַדְקְרוֹת חָרֶב וּלְשׁוֹן חֲכָמִים מַרְפֵּֽא׃ | 18 |
Maloba ya bato oyo balobaka mingi ezokisaka lokola mopanga, kasi lolemo ya bato ya bwanya ezali lokola mafuta oyo ebikisaka.
שְֽׂפַת־אֱמֶת תִּכּוֹן לָעַד וְעַד־אַרְגִּיעָה לְשׁוֹן שָֽׁקֶר׃ | 19 |
Moto oyo alobaka solo akowumela mpo na libela, kasi mokosi akowumela kaka mpo na tango moke.
מִרְמָה בְּלֶב־חֹרְשֵׁי רָע וּֽלְיֹעֲצֵי שָׁלוֹם שִׂמְחָֽה׃ | 20 |
Lokuta ezalaka kati na mitema ya bato oyo basalaka mabongisi ya mabe, kasi esengo ezali mpo na bato oyo bakopesaka batoli ya kimia.
לֹא־יְאֻנֶּה לַצַּדִּיק כָּל־אָוֶן וּרְשָׁעִים מָלְאוּ רָֽע׃ | 21 |
Mabe moko te ekokomela bayengebene, kasi bato mabe bakotondisama na pasi.
תּוֹעֲבַת יְהוָה שִׂפְתֵי־שָׁקֶר וְעֹשֵׂי אֱמוּנָה רְצוֹנֽוֹ׃ | 22 |
Bibebu oyo ekosaka ezali nkele na miso ya Yawe, kasi bibebu oyo ekokisaka bosembo ezalaka elengi na miso na Ye.
אָדָם עָרוּם כֹּסֶה דָּעַת וְלֵב כְּסִילִים יִקְרָא אִוֶּֽלֶת׃ | 23 |
Moto ya mayele abombaka boyebi, kasi motema ya zoba etatolaka makambo ya bozoba.
יַד־חָרוּצִים תִּמְשׁוֹל ורְמִיָּה תִּהְיֶה לָמַֽס׃ | 24 |
Maboko oyo esalaka ezwaka bokonzi, kasi maboko ya goyigoyi ememaka na bowumbu.
דְּאָגָה בְלֶב־אִישׁ יַשְׁחֶנָּה וְדָבָר טוֹב יְשַׂמְּחֶֽנָּה׃ | 25 |
Motema oyo etondi na komitungisa ekobuka moto, kasi liloba ya esengo esepelisaka moto.
יָתֵר מֵרֵעֵהוּ צַדִּיק וְדֶרֶךְ רְשָׁעִים תַּתְעֵֽם׃ | 26 |
Moyengebene alakisaka baninga na ye nzela, kasi nzela ya moto mabe ebungisaka ye moko moto mabe.
לֹא־יַחֲרֹךְ רְמִיָּה צֵידוֹ וְהוֹן־אָדָם יָקָר חָרֽוּץ׃ | 27 |
Moto ya goyigoyi azangaka bilei, mpe moto ya nzunzu akomaka mozwi monene.
בְּאֹֽרַח־צְדָקָה חַיִּים וְדֶרֶךְ נְתִיבָה אַל־מָֽוֶת׃ | 28 |
Bomoi ezalaka kati na nzela ya bosembo, mpe kufa ezalaka te kati na nzela ya bosembo.