< תהילים 87 >

לִבְנֵי־קֹרַח מִזְמוֹר שִׁיר יְסוּדָתוֹ בְּהַרְרֵי־קֹֽדֶשׁ׃ 1
Nzembo ya bana ya Kore. Yawe atia moboko ya Siona na likolo ya bangomba ya bule.
אֹהֵב יְהֹוָה שַׁעֲרֵי צִיּוֹן מִכֹּל מִשְׁכְּנוֹת יַעֲקֹֽב׃ 2
Yawe alingaka bikuke ya Siona koleka bandako nyonso ya Jakobi.
נִכְבָּדוֹת מְדֻבָּר בָּךְ עִיר הָאֱלֹהִים סֶֽלָה׃ 3
Oh engumba ya Nzambe, maloba ya nkembo ezali kolobama na tina na yo!
אַזְכִּיר ׀ רַהַב וּבָבֶל לְֽיֹדְעָי הִנֵּה פְלֶשֶׁת וְצֹר עִם־כּוּשׁ זֶה יֻלַּד־שָֽׁם׃ 4
Kati na bato oyo bayebi ngai, natangi Rahavi mpe Babiloni. Ezali kuna na Siona nde Filisitia, Tiri mpe Kushi ebimela.
וּלְצִיּוֹן ׀ יֵאָמַר אִישׁ וְאִישׁ יֻלַּד־בָּהּ וְהוּא יְכוֹנְנֶהָ עֶלְיֽוֹן׃ 5
Na tina na Siona, maloba oyo ekolobama: « Bato nyonso babimela awa, mpe ezali Ye-Oyo-Aleki-Likolo nde alendisaka yango. »
יְֽהֹוָה יִסְפֹּר בִּכְתוֹב עַמִּים זֶה יֻלַּד־שָׁם סֶֽלָה׃ 6
Tango Yawe akomaki kati na buku ya bikolo, akomaki boye mpo na moko na moko kati na bango: « Moto songolo abotama kati na Siona! »
וְשָׁרִים כְּחֹלְלִים כׇּֽל־מַעְיָנַי בָּֽךְ׃ 7
Mpe tango bayembaka mpe babinaka, balobaka: « Bitima na ngai nyonso ezali kati na yo! »

< תהילים 87 >