< תהילים 128 >

שִׁיר הַֽמַּעֲלוֹת אַשְׁרֵי כׇּל־יְרֵא יְהֹוָה הַהֹלֵךְ בִּדְרָכָֽיו׃ 1
Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Esengo na moto oyo atosaka Yawe mpe alandaka banzela na Ye!
יְגִיעַ כַּפֶּיךָ כִּי תֹאכֵל אַשְׁרֶיךָ וְטוֹב לָֽךְ׃ 2
Oliaka mbuma ya mosala na Yo; ozali moto ya esengo mpe ozali na bofuluki.
אֶשְׁתְּךָ ׀ כְּגֶפֶן פֹּרִיָּה בְּיַרְכְּתֵי בֵיתֶךָ בָּנֶיךָ כִּשְׁתִלֵי זֵיתִים סָבִיב לְשֻׁלְחָנֶֽךָ׃ 3
Kati na ndako na yo, mwasi na yo azali lokola nzete ya vino oyo ebotaka bambuma ebele; bana na yo bazali lokola bankona ya nzete ya olive zingazinga ya mesa na yo.
הִנֵּה כִי־כֵן יְבֹרַךְ גָּבֶר יְרֵא יְהֹוָֽה׃ 4
Ezali ndenge wana nde Yawe apambolaka moto oyo atosaka Ye.
יְבָרֶכְךָ יְהֹוָה מִצִּיּוֹן וּרְאֵה בְּטוּב יְרוּשָׁלָ͏ִם כֹּל יְמֵי חַיֶּֽיךָ׃ 5
Solo, Yawe akopambola yo wuta na Siona, mpe okomona bofuluki ya Yelusalemi mikolo nyonso ya bomoi na yo
וּרְאֵֽה־בָנִים לְבָנֶיךָ שָׁלוֹם עַל־יִשְׂרָאֵֽל׃ 6
mpe okomona bakitani na yo. Tika ete kimia ezala na Isalaele!

< תהילים 128 >