< תהילים 89 >

משכיל לאיתן האזרחי ב חסדי יהוה עולם אשירה לדר ודר אודיע אמונתך בפי 1
Maloba ya Etani, moto ya Ezera. Nakoyemba tango nyonso bolingo ya Yawe; monoko na ngai ekosakola boyengebene na Yo libela na libela.
כי-אמרתי--עולם חסד יבנה שמים תכן אמונתך בהם 2
Solo, nazali kotatola yango: « Miboko ya bolingo na Yo ezali na suka te; ovandisi boyengebene na Yo kati na likolo. »
כרתי ברית לבחירי נשבעתי לדוד עבדי 3
Olobaki: « Nasali boyokani elongo na moponami na ngai, nalapi ndayi epai ya mosali na ngai, Davidi:
עד-עולם אכין זרעך ובניתי לדר-ודור כסאך סלה 4
‹ Nakokomisa yo libota ya bokonzi mpo na tango nyonso mpe nakolendisa kiti na yo ya bokonzi mpo na seko. › »
ויודו שמים פלאך יהוה אף-אמונתך בקהל קדשים 5
Yawe, Lola esanzolaka misala na Yo ya kokamwa mpe bosembo na Yo kati na lisanga ya basantu.
כי מי בשחק יערך ליהוה ידמה ליהוה בבני אלים 6
Nani akokani na Yawe kuna na likolo? Nani akokani na Yawe kati na mampinga ya likolo?
אל נערץ בסוד-קדשים רבה ונורא על-כל-סביביו 7
Azali Nzambe ya somo kati na lisanga ya basantu; solo, azali somo koleka ba-oyo nyonso bazingeli Ye.
יהוה אלהי צבאות--מי-כמוך חסין יה ואמונתך סביבותיך 8
Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, nani azali na nguya lokola Yo? Nani, oh Yawe? Boyengebene na Yo ezingeli Yo.
אתה מושל בגאות הים בשוא גליו אתה תשבחם 9
Yo nde okonzaka lolendo ya ebale monene mpe okitisaka bambonge na yango soki etomboki.
אתה דכאת כחלל רהב בזרוע עזך פזרת אויביך 10
Yo nde olongaki Rahavi, dalagona ya Ejipito, kino koboma ye; mpe, na nguya na Yo, opanzaki banguna na Yo.
לך שמים אף-לך ארץ תבל ומלאה אתה יסדתם 11
Likolo ezali ya Yo; mabele mpe ezali ya Yo! Yo nde osala mokili mpe nyonso oyo ezali kati na yango.
צפון וימין אתה בראתם תבור וחרמון בשמך ירננו 12
Yo nde okela Nor mpe Sude; Tabori mpe Erimoni egangaka na esengo mpo na lokumu ya Kombo na Yo.
לך זרוע עם-גבורה תעז ידך תרום ימינך 13
Loboko na Yo ezali na makasi, loboko na Yo ezali na nguya, loboko na Yo ya mobali oyo otombola.
צדק ומשפט מכון כסאך חסד ואמת יקדמו פניך 14
Bosembo mpe alima ezali miboko ya Kiti ya Bokonzi na Yo, boyengebene mpe bolingo etambolaka liboso na Yo.
אשרי העם ידעי תרועה יהוה באור-פניך יהלכון 15
Esengo na bato oyo bayebi kobetela Yo maboko! Yawe, batambolaka na pole ya elongi na Yo,
בשמך יגילון כל-היום ובצדקתך ירומו 16
basepelaka mikolo nyonso na Kombo na Yo, basanzolaka bosembo na Yo.
כי-תפארת עזמו אתה וברצונך תרים (תרום) קרנינו 17
Pamba te ozali nkembo mpe nguya na bango; mpe olongisaka biso na ngolu na Yo.
כי ליהוה מגננו ולקדוש ישראל מלכנו 18
Yawe azali nguba na biso; Mosantu ya Isalaele azali Mokonzi na biso.
אז דברת בחזון לחסידיך-- ותאמר שויתי עזר על-גבור הרימותי בחור מעם 19
Mokolo moko, olobaki na bayengebene na Yo kati na emoniseli: « Nasungaki elombe moko ya bitumba, natombolaki elenge mobali moko kati na bato na ngai;
מצאתי דוד עבדי בשמן קדשי משחתיו 20
namonaki Davidi, mosali na ngai; napakolaki ye mafuta na ngai ya bule.
אשר ידי תכון עמו אף-זרועי תאמצנו 21
Nakobatela ye na loboko na ngai ya nguya, mpe loboko na ngai ekokomisa ye makasi.
לא-ישיא אויב בו ובן-עולה לא יעננו 22
Monguna akobimela ye ata moke te na pwasa, moto mabe akokoka konyokola ye te.
וכתותי מפניו צריו ומשנאיו אגוף 23
Nakobebisa banguna na ye liboso na ye mpe nakoboma bayini na ye.
ואמונתי וחסדי עמו ובשמי תרום קרנו 24
Bolingo mpe boyengebene na ngai ekozala elongo na ye; mpe na Kombo na Ngai, akotombola elongi.
ושמתי בים ידו ובנהרות ימינו 25
Nakotia ebale monene na se ya loboko na ye, mpe bibale, na se ya loboko na ye ya mobali.
הוא יקראני אבי אתה אלי וצור ישועתי 26
Akobelela ngai boye: ‹ Ozali Tata na ngai, Nzambe na ngai, Libanga mpe Mobikisi na ngai! ›
אף-אני בכור אתנהו עליון למלכי-ארץ 27
Mpe ngai, nakokomisa ye mwana na ngai ya liboso, mokonzi oyo aleki na kotombwama kati na bakonzi ya mokili.
לעולם אשמור- (אשמר-) לו חסדי ובריתי נאמנת לו 28
Nakobatela mpo na seko bolingo na ngai mpo na ye; boyokani na ngai elongo na ye ekotikala kobeba te.
ושמתי לעד זרעו וכסאו כימי שמים 29
Nakobatela mpo na libela libota na ye ya bokonzi, mpe kiti na ye ya bokonzi ekowumela ndenge moko na likolo.
אם-יעזבו בניו תורתי ובמשפטי לא ילכון 30
Soki bana na ye basundoli mibeko na ngai mpe balandi bosembo na ngai te,
אם-חקתי יחללו ומצותי לא ישמרו 31
soki babuki mitindo na ngai mpe babateli te mibeko na ngai,
ופקדתי בשבט פשעם ובנגעים עונם 32
nakopesa bango etumbu na nzela ya lingenda, mpo na botomboki na bango, mpe na nzela ya makofi, mpo na masumu na bango;
וחסדי לא-אפיר מעמו ולא-אשקר באמונתי 33
kasi nakowangana te bolingo na ngai mpe nakobongola te boyengebene na ngai.
לא-אחלל בריתי ומוצא שפתי לא אשנה 34
Nakosambwisa te boyokani na ngai mpe nakobongola te maloba na ngai.
אחת נשבעתי בקדשי אם-לדוד אכזב 35
Nalapaki yango na ndayi mbala moko mpo na libela na Kombo ya bosantu na ngai: ‹ Nakokosa Davidi te! ›
זרעו לעולם יהיה וכסאו כשמש נגדי 36
Libota na ye ya bokonzi ekowumela mpo na libela, mpe kiti na ye ya bokonzi ekowumela lokola moyi liboso na ngai.
כירח יכון עולם ועד בשחק נאמן סלה 37
Solo, lokola sanza, ekowumela na bokonzi mpo na libela. Motatoli oyo azali kuna kati na likolo akoki kokosa te. »
ואתה זנחת ותמאס התעברת עם-משיחך 38
Nzokande, obwakaki, omonaki pamba, osilikelaki mopakolami na Yo!
נארתה ברית עבדך חללת לארץ נזרו 39
Owanganaki boyokani oyo osalaki elongo na mosali na Yo, obwakaki na mabele mpe osambwisaki motole na ye.
פרצת כל-גדרתיו שמת מבצריו מחתה 40
Otobolaki madusu kati na bamir na ye nyonso mpe obukaki bandako na ye, oyo batonga makasi;
שסהו כל-עברי דרך היה חרפה לשכניו 41
bato nyonso oyo balekaki wana babotolaki ye biloko, mpe bavandi ya pembeni na ye bakomaki kotiola ye.
הרימות ימין צריו השמחת כל-אויביו 42
Obakisaki makasi ya bayini na ye mpe otondisaki banguna na ye nyonso na esengo,
אף-תשיב צור חרבו ולא הקימתו במלחמה 43
osalaki kutu ete mopanga na ye ebalukela ye moko mpe osungaki ye te na bitumba;
השבת מטהרו וכסאו לארץ מגרתה 44
osilisaki kongenga ya lokumu na ye, obwakaki kiti na ye ya bokonzi na mabele;
הקצרת ימי עלומיו העטית עליו בושה סלה 45
okomisaki moke mikolo ya bolenge na ye mpe olatisaki ye kazaka ya soni.
עד-מה יהוה תסתר לנצח תבער כמו-אש חמתך 46
Yawe, kino tango nini? Okomibomba penza tango nyonso? Kino tango nini kanda na Yo ekongala lokola moto?
זכר-אני מה-חלד על-מה-שוא בראת כל-בני-אדם 47
Kanisa motango ya mikolo ya bomoi na ngai! Okelaki penza bato mpo na suka oyo ezanga ata tina!
מי גבר יחיה ולא יראה-מות ימלט נפשו מיד-שאול סלה (Sheol h7585) 48
Moto nani akoki kozala na bomoi mpe azanga komona kufa? Nani akolonga kokima nguya ya mboka ya bakufi? (Sheol h7585)
איה חסדיך הראשנים אדני נשבעת לדוד באמונתך 49
Nkolo, wapi bolingo na Yo ya kala oyo alakaki Davidi na boyengebene na Yo na nzela ya ndayi?
זכר אדני חרפת עבדיך שאתי בחיקי כל-רבים עמים 50
Nkolo, kanisa ndenge bazali kosakanela basali na Yo; kobosana te ete namemi mokumba ya bato oyo nyonso!
אשר חרפו אויביך יהוה אשר חרפו עקבות משיחך 51
Yawe, kanisa mafinga ya banguna na Yo, oyo batiolaka bomoi ya mopakolami na Yo!
ברוך יהוה לעולם אמן ואמן 52
Tika ete Yawe apambolama libela na libela!

< תהילים 89 >