< תהילים 38 >
מזמור לדוד להזכיר ב יהוה--אל-בקצפך תוכיחני ובחמתך תיסרני | 1 |
Nzembo ya Davidi mpo na kokanisa. Yawe, kopamela ngai te kati na kanda na Yo to kopesa ngai etumbu te kati na kanda makasi na Yo.
כי-חציך נחתו בי ותנחת עלי ידך | 2 |
Pamba te makonga na Yo etoboli ngai, mpe loboko na Yo ebeti ngai.
אין-מתם בבשרי מפני זעמך אין-שלום בעצמי מפני חטאתי | 3 |
Mpo na kanda na Yo, nzoto na ngai ebeli; mpo na masumu na ngai, mikuwa na ngai elembi.
כי עונתי עברו ראשי כמשא כבד יכבדו ממני | 4 |
Mabe na ngai eleki moto na ngai, ezali kilo makasi epai na ngai lokola mokumba ya kilo makasi.
הבאישו נמקו חבורתי מפני אולתי | 5 |
Bapota na ngai epoli mpe ekomi kolumba solo mpo na bozoba na ngai.
נעויתי שחתי עד-מאד כל-היום קדר הלכתי | 6 |
Nagumbami, nalembi makasi; nakomi moto ya mawa mpo na libela.
כי-כסלי מלאו נקלה ואין מתם בבשרי | 7 |
Pamba te nazali koyoka pasi makasi na mokongo na ngai, eteni ata moko te ya nzoto na ngai ezali malamu.
נפוגותי ונדכיתי עד-מאד שאגתי מנהמת לבי | 8 |
Nalembi, makasi na ngai nyonso esili; mobulu ekoti na motema na ngai, nakomi koganga na kolemba te.
אדני נגדך כל-תאותי ואנחתי ממך לא-נסתרה | 9 |
Nkolo, oyebi posa na ngai nyonso; kolela na ngai ezali ya kobombama te na miso na Yo.
לבי סחרחר עזבני כחי ואור-עיני גם-הם אין אתי | 10 |
Motema na ngai ezangi kimia, makasi na ngai ekomi kosila, nabungisi ata pole ya miso na ngai.
אהבי ורעי--מנגד נגעי יעמדו וקרובי מרחק עמדו | 11 |
Bato oyo balingaka ngai mpe baninga na ngai bakimi pasi na ngai, ba-oyo bazalaka na ngai esika moko batelemi mosika na ngai.
וינקשו מבקשי נפשי ודרשי רעתי דברו הוות ומרמות כל-היום יהגו | 12 |
Bato oyo balukaka kufa na ngai bazali kotia mitambo, ba-oyo balukaka pasi na ngai bazali koloba mpo na kosala ngai mabe, bakomi mikolo nyonso kobongisa lokuta.
ואני כחרש לא אשמע וכאלם לא יפתח-פיו | 13 |
Kasi ngai nazali kosala lokola mokufi matoyi; mpe lokola baba, nakangi monoko, naboyi koloba.
ואהי--כאיש אשר לא-שמע ואין בפיו תוכחות | 14 |
Nakomi lokola mokufi matoyi oyo akoki kopesa eyano ata moko te na monoko na ye.
כי-לך יהוה הוחלתי אתה תענה אדני אלהי | 15 |
Yawe, natiaka elikya na ngai kati na Yo; oh Nkolo, Nzambe na ngai, solo, okoyanola.
כי-אמרתי פן-ישמחו-לי במוט רגלי עלי הגדילו | 16 |
Nalobaki: « Kopesa nzela te ete basepela na tina na ngai to bamitombola likolo na ngai soki nabeti libaku. »
כי-אני לצלע נכון ומכאובי נגדי תמיד | 17 |
Pamba te nakomi pene ya kokweya, pasi na ngai ezali kaka elongo na ngai tango nyonso.
כי-עוני אגיד אדאג מחטאתי | 18 |
Solo nandimi mabe na ngai, masumu na ngai ezali kotungisa molimo na ngai.
ואיבי חיים עצמו ורבו שנאי שקר | 19 |
Banguna na ngai bazali makasi mpe bingambe, bato oyo bayinaka ngai kaka pamba bazali ebele.
ומשלמי רעה תחת טובה-- ישטנוני תחת רדופי- (רדפי-) טוב | 20 |
Bato oyo bazongisaka mabe na bolamu bazali kofunda ngai atako nalukaka kosala bolamu.
אל-תעזבני יהוה אלהי אל-תרחק ממני | 21 |
Yawe, kosundola ngai te; Nzambe na ngai, kozala mpe mosika na ngai te.
חושה לעזרתי אדני תשועתי | 22 |
Nkolo, Mobikisi na ngai, yaka noki kosunga ngai.