< תהילים 24 >

לדוד מזמור ליהוה הארץ ומלואה תבל וישבי בה 1
Nzembo ya Davidi. Mabele mpe nyonso oyo ezali kati na yango ezali ya Yawe. Mokili mpe ezali ya Yawe, elongo na bavandi na yango.
כי-הוא על-ימים יסדה ועל-נהרות יכוננה 2
Pamba te ezali Yawe nde atia yango na likolo ya bibale minene mpe apikaki yango na likolo ya miluka.
מי-יעלה בהר-יהוה ומי-יקום במקום קדשו 3
Nani akokoka komata ngomba ya Yawe? Nani akokoka kotelema kati na Esika na Ye ya bule?
נקי כפים ובר-לבב אשר לא-נשא לשוא נפשי ולא נשבע למרמה 4
Ezali moto oyo azali maboko pembe mpe motema peto, oyo atiaka elikya te na banzambe ya bikeko mpe alapaka ndayi ya lokuta te.
ישא ברכה מאת יהוה וצדקה מאלהי ישעו 5
Yawe akopambola ye; mpe Nzambe, Mobikisi na ye, akokomisa ye sembo.
זה דור דרשו מבקשי פניך יעקב סלה 6
Ndenge wana nde ezali, ekeke ya bato oyo bakangamaka na Yo, ba-oyo balukaka elongi na Yo, Nzambe ya Jakobi.
שאו שערים ראשיכם והנשאו פתחי עולם ויבוא מלך הכבוד 7
Bino bikuke, botombola mitondo na bino! Bino bikuke ya kala, bomitombola! Tika ete Mokonzi ya nkembo akota!
מי זה מלך הכבוד יהוה עזוז וגבור יהוה גבור מלחמה 8
Nani azali Mokonzi yango ya nkembo? Ezali Yawe, Elombe ya nguya; Yawe, Elombe ya bitumba.
שאו שערים ראשיכם ושאו פתחי עולם ויבא מלך הכבוד 9
Bino bikuke, botombola mitondo na bino! Bino bikuke ya kala, bomitombola! Tika ete Mokonzi ya nkembo akota!
מי הוא זה מלך הכבוד יהוה צבאות-- הוא מלך הכבוד סלה 10
Nani azali Mokonzi yango ya nkembo? Ezali Yawe, Mokonzi ya mampinga, nde azali Mokonzi ya nkembo!

< תהילים 24 >