< תהילים 103 >
לדוד ברכי נפשי את-יהוה וכל-קרבי את-שם קדשו | 1 |
Nzembo ya Davidi. Eh molimo na ngai, pambola Yawe! Tika ete motema na ngai mobimba epambola Kombo na Ye ya bule!
ברכי נפשי את-יהוה ואל-תשכחי כל-גמוליו | 2 |
Eh molimo na ngai, pambola Yawe mpe kobosana ata moko te kati na misala malamu na Ye!
הסלח לכל-עונכי הרפא לכל-תחלואיכי | 3 |
Ye nde alimbisaka masumu na Yo nyonso, abikisaka yo na bokono nyonso,
הגואל משחת חייכי המעטרכי חסד ורחמים | 4 |
akangolaka bomoi na yo wuta na libulu, alatisaka yo motole ya bolingo mpe ya mawa,
המשביע בטוב עדיך תתחדש כנשר נעוריכי | 5 |
atondisaka bomoi na yo na esengo mpe akomisaka yo elenge lokola mpongo.
עשה צדקות יהוה ומשפטים לכל-עשוקים | 6 |
Yawe asalaka mpo na bosembo, akotelaka banyokolami nyonso.
יודיע דרכיו למשה לבני ישראל עלילותיו | 7 |
Amonisaki banzela na Ye epai ya Moyize, mpe bikamwa na Ye epai ya bato ya Isalaele.
רחום וחנון יהוה ארך אפים ורב-חסד | 8 |
Yawe ayokelaka bato mawa mpe asalelaka bango bolamu, asilikaka noki te mpe atonda na bolingo;
לא-לנצח יריב ולא לעולם יטור | 9 |
azwaka biso makambo te tango nyonso, abombaka kanda na Ye te mpo na libela;
לא כחטאינו עשה לנו ולא כעונתינו גמל עלינו | 10 |
apamelaka biso te kolanda masumu na biso, azongiselaka biso te kolanda mabe na biso.
כי כגבה שמים על-הארץ-- גבר חסדו על-יראיו | 11 |
Ndenge likolo etombolama mosika ya mabele, ndenge wana mpe bolingo na Ye ezali monene mpo na bato oyo batosaka Ye;
כרחק מזרח ממערב-- הרחיק ממנו את-פשעינו | 12 |
ndenge este ezali mosika ya weste, ndenge wana mpe abwakaka masumu na biso mosika na biso.
כרחם אב על-בנים-- רחם יהוה על-יראיו | 13 |
Ndenge tata alingaka makasi bana na ye, ndenge wana mpe Yawe alingaka makasi bato oyo batosaka Ye;
כי-הוא ידע יצרנו זכור כי-עפר אנחנו | 14 |
pamba te Yawe ayebi na eloko nini asala biso, ayebi malamu ete tozali putulu.
אנוש כחציר ימיו כציץ השדה כן יציץ | 15 |
Mikolo ya bomoi ya moto ezali lokola matiti, ebongaka lokola fololo ya bilanga;
כי רוח עברה-בו ואיננו ולא-יכירנו עוד מקומו | 16 |
nzokande soki kaka mopepe ebeti yango, ezalaka lisusu te, mpe esika epai wapi ezalaki ebosani yango.
וחסד יהוה מעולם ועד-עולם-- על-יראיו וצדקתו לבני בנים | 17 |
Kasi bolingo ya Yawe mpo na bato oyo batosaka Ye, mpe bosembo na Ye mpo na bakitani na bango,
לשמרי בריתו ולזכרי פקדיו לעשותם | 18 |
mpo na bato oyo babatelaka boyokani na Ye mpe batosaka mibeko na Ye, ezali ya libela na libela.
יהוה--בשמים הכין כסאו ומלכותו בכל משלה | 19 |
Yawe atia Kiti na Ye ya Bokonzi kati na Likolo, azali Mokonzi ya mokili mobimba.
ברכו יהוה מלאכיו גברי כח עשי דברו לשמע בקול דברו | 20 |
Bopambola Yawe, bino ba-anjelu na Ye nyonso oyo bozali na nguya mpe botosaka mitindo na Ye.
ברכו יהוה כל-צבאיו-- משרתיו עשי רצונו | 21 |
Bopambola Yawe, bino mampinga na Ye nyonso oyo bokokisaka mokano na Ye.
ברכו יהוה כל-מעשיו-- בכל-מקמות ממשלתו ברכי נפשי את-יהוה | 22 |
Bopambola Yawe, bino bikelamu na Ye nyonso, kati na bisika nyonso ya Bokonzi na Ye. Eh molimo na ngai, pambola Yawe!