< מִשְׁלֵי 14 >

חכמות נשים בנתה ביתה ואולת בידיה תהרסנו 1
Mwasi ya bwanya atongaka ndako na ye, kasi mwasi oyo azangi mayele abukaka yango na maboko na ye moko.
הולך בישרו ירא יהוה ונלוז דרכיו בוזהו 2
Moto oyo atambolaka alima atosaka Yawe, kasi moto oyo nzela na ye etengama-tengama atiolaka Ye.
בפי-אויל חטר גאוה ושפתי חכמים תשמורם 3
Kati na monoko ya moto oyo azangi mayele, ezalaka na nzete ya lolendo, kasi bibebu ya moto ya bwanya ebatelaka ye.
באין אלפים אבוס בר ורב-תבואות בכח שור 4
Esika oyo ezalaka na ngombe te, elielo mpe ezalaka na eloko te, pamba te ezali makasi ya bangombe nde epesaka bomengo.
עד אמונים לא יכזב ויפיח כזבים עד שקר 5
Motatoli ya sembo akosaka te, kasi motatoli ya mabe alobaka lokuta.
בקש-לץ חכמה ואין ודעת לנבון נקל 6
Motioli alukaka bwanya mpe azwaka yango te, kasi boyebi eyaka na pete epai na moto ya mayele.
לך מנגד לאיש כסיל ובל-ידעת שפתי-דעת 7
Zala mosika ya zoba, pamba te okotikala kozwa boyebi te na bibebu na ye.
חכמת ערום הבין דרכו ואולת כסילים מרמה 8
Bwanya ya moto ya mayele esosolisaka ye nzela na ye, kasi bozoba ya bato oyo bazangi mayele: lokuta.
אולים יליץ אשם ובין ישרים רצון 9
Bazoba balingaka te kosenga bolimbisi, kasi ngolu na Nzambe ezalaka kati na bato ya sembo.
לב--יודע מרת נפשו ובשמחתו לא-יתערב זר 10
Motema eyebaka pasi na yango moko, moko te akoki kokabola na yango esengo.
בית רשעים ישמד ואהל ישרים יפריח 11
Ndako ya moto mabe ekobukana, kasi ndako ya kapo ya bayengebene ekofuluka.
יש דרך ישר לפני-איש ואחריתה דרכי-מות 12
Nzela mosusu emonanaka sembo na miso ya bato, nzokande, na suka, ememaka na kufa.
גם-בשחק יכאב-לב ואחריתה שמחה תוגה 13
Ezala kati na koseka, motema ekoki kozala na mawa, mpe esengo ekoki kosuka na mawa.
מדרכיו ישבע סוג לב ומעליו איש טוב 14
Bato oyo batambolaka na boyengebene te bakozwa lifuti kolanda misala na bango, kasi moto ya sembo mpe akozwa lifuti kolanda misala na ye.
פתי יאמין לכל-דבר וערום יבין לאשרו 15
Moto oyo azangi mayele andimaka makambo nyonso oyo balobaka, kasi moto ya mayele atambolaka na bokebi.
חכם ירא וסר מרע וכסיל מתעבר ובוטח 16
Moto ya bwanya abangaka mabe mpe akimaka yango, kasi zoba atombokaka, na elikya nyonso.
קצר-אפים יעשה אולת ואיש מזמות ישנא 17
Moto oyo asilikaka noki asalaka makambo ya bozoba, mpe bayinaka moto ya mayele mabe.
נחלו פתאים אולת וערומים יכתרו דעת 18
Bato oyo bazangi mayele bazwaka bozoba lokola libula, kasi bato ya mayele bazwaka boyebi lokola motole.
שחו רעים לפני טובים ורשעים על-שערי צדיק 19
Bato mabe bakofukama liboso ya bato ya malamu, bato ya mitema mabe bakofukama na ekuke ya bato ya sembo.
גם-לרעהו ישנא רש ואהבי עשיר רבים 20
Mobola ayinamaka ata epai na moninga na ye moko, kasi mozwi azalaka na baninga ebele.
בז-לרעהו חוטא ומחונן עניים (ענוים) אשריו 21
Moto oyo atiolaka moninga na ye asalaka lisumu, kasi esengo na moto oyo asalaka bato bakelela bolamu.
הלוא-יתעו חרשי רע וחסד ואמת חרשי טוב 22
Boni, bato oyo babongisaka kosala mabe bazali na libunga te? Kasi boboto mpe solo ezali epai ya bato oyo babongisaka kosala bolamu.
בכל-עצב יהיה מותר ודבר-שפתים אך-למחסור 23
Mosala nyonso epesaka litomba, kasi maloba ya pamba ememaka na bobola.
עטרת חכמים עשרם אולת כסילים אולת 24
Bozwi ya bato ya bwanya ezalaka lokola motole na bango, kasi bozoba ya bato oyo bazangi mayele ezalaka lokola liboma.
מציל נפשות עד אמת ויפח כזבים מרמה 25
Motatoli oyo alobaka solo abikisaka bato ebele, kasi motatoli ya mabe alobaka lokuta.
ביראת יהוה מבטח-עז ולבניו יהיה מחסה 26
Moto oyo atosaka Yawe akomaka na kondima makasi, mpe bana na ye bakozwa ekimelo.
יראת יהוה מקור חיים-- לסור ממקשי מות 27
Kotosa Yawe ezali etima ya bomoi, ekangolaka na mitambo ya kufa.
ברב-עם הדרת-מלך ובאפס לאם מחתת רזון 28
Kozala na bato ebele epesaka mokonzi lokumu, kasi mokonzi akweyaka soki azali na bato te.
ארך אפים רב-תבונה וקצר-רוח מרים אולת 29
Moto oyo asilikaka noki te azalaka mayele, kasi moto oyo akangaka motema te abimisaka bozoba na ye.
חיי בשרים לב מרפא ורקב עצמות קנאה 30
Motema oyo ezali na kimia epesaka bomoi na nzoto, kasi bilulela epolisaka mikuwa.
עשק דל חרף עשהו ומכבדו חנן אביון 31
Moto oyo anyokolaka mobola atiolaka Mokeli ya mobola yango, kasi moto oyo asalelaka moto akelela bolamu apesaka Ye lokumu.
ברעתו ידחה רשע וחסה במותו צדיק 32
Babenganaka moto mabe mpo na mabe na ye, kasi moto ya sembo awumelaka na elikya kino ata na kufa.
בלב נבון תנוח חכמה ובקרב כסילים תודע 33
Bwanya ewumelaka kati na motema ya moto oyo azali na bososoli; kasi boni, ekoyebana solo kati na bazoba?
צדקה תרומם-גוי וחסד לאמים חטאת 34
Bosembo etombolaka ekolo, kasi lisumu ememelaka bato soni.
רצון-מלך לעבד משכיל ועברתו תהיה מביש 35
Mokonzi asepelaka na mosali ya bwanya, kasi mosali oyo ayokisaka ye soni apelisaka kanda na ye.

< מִשְׁלֵי 14 >