< איוב 29 >
ויסף איוב שאת משלו ויאמר | 1 |
Yobo akobaki koloba:
מי-יתנני כירחי-קדם כימי אלוה ישמרני | 2 |
« Ah! Soki nakokaki kozala lisusu ndenge nazalaki na basanza oyo eleki, ndenge nazalaki na mikolo oyo Nzambe azalaki kobatela ngai,
בהלו נרו עלי ראשי לאורו אלך חשך | 3 |
tango mwinda na Ye ezalaki kongenga na moto na ngai, mpe tango, na pole na Ye, nazalaki kotambola kati na molili.
כאשר הייתי בימי חרפי בסוד אלוה עלי אהלי | 4 |
Ah! Soki nakokaki kozala lisusu ndenge nazalaki na mikolo oyo nazalaki nanu na makasi, tango bolingo ya Nzambe ezalaki kopambola ndako na ngai,
בעוד שדי עמדי סביבותי נערי | 5 |
tango Nkolo-Na-Nguya-Nyonso azalaki nanu elongo na ngai bana mibali na ngai bazingelaki ngai,
ברחץ הליכי בחמה וצור יצוק עמדי פלגי-שמן | 6 |
tango nzela na ngai etondisamaki na miliki mpe libanga ezalaki kosopa mafuta ya olive mpo na ngai!
בצאתי שער עלי-קרת ברחוב אכין מושבי | 7 |
Tango nazalaki kokende na ekuke ya mboka mpe nazalaki kotia kiti na ngai na esika oyo bato ebele bakutanaka,
ראוני נערים ונחבאו וישישים קמו עמדו | 8 |
bilenge bazalaki komona ngai mpe bazalaki kobombama, mibange bazalaki kotelema,
שרים עצרו במלים וכף ישימו לפיהם | 9 |
bakambi bazalaki kozanga maloba mpe kozipa minoko na bango na maboko,
קול-נגידים נחבאו ולשונם לחכם דבקה | 10 |
bato ya lokumu bazalaki kokitisa mingongo na bango mpe lolemo na bango ezalaki kokangama na minoko na bango.
כי אזן שמעה ותאשרני ועין ראתה ותעידני | 11 |
Moto nyonso oyo azalaki koyoka ngai azalaki koloba ete nazali moto ya esengo, mpe bato nyonso oyo bazalaki komona ngai bazalaki kotatola mpo na ngai;
כי-אמלט עני משוע ויתום ולא-עזר לו | 12 |
pamba te nazalaki kosunga babola oyo bazalaki kosenga lisungi, mpe mwana etike oyo azangi moto oyo akosunga ye.
ברכת אבד עלי תבא ולב אלמנה ארנן | 13 |
Moto oyo akomaki pene ya kokufa azalaki kopambola ngai, mpe nazalaki kopesa esengo na motema ya mwasi oyo akufisa mobali.
צדק לבשתי וילבשני כמעיל וצניף משפטי | 14 |
Nazalaki kolata bosembo lokola elamba; bosembo ezalaki elamba na ngai mpe kitendi na ngai ya kokanga na moto.
עינים הייתי לעור ורגלים לפסח אני | 15 |
Nazalaki miso ya mokufi miso mpe makolo ya mokakatani;
אב אנכי לאביונים ורב לא-ידעתי אחקרהו | 16 |
nazalaki tata ya moto oyo akelela, nazalaki kobundela moto oyo nayebi te;
ואשברה מתלעות עול ומשניו אשליך טרף | 17 |
nabukaki mbanga ya moto mabe mpe nabotolaki bato oyo akangaki na minu na ye.
ואמר עם-קני אגוע וכחול ארבה ימים | 18 |
Nazalaki kokanisa: ‹ Nakokufa kati na ndako na ngai moko sima na mikolo ebele lokola zelo.
שרשי פתוח אלי-מים וטל ילין בקצירי | 19 |
Misisa na ngai ekoluka mayi, mpe mayi oyo ezalaka na matiti ekovanda butu mobimba na bitape na ngai.
כבודי חדש עמדי וקשתי בידי תחליף | 20 |
Lokumu na ngai ekozongisela ngai esengo, ata tolotolo ekokoma ya sika na loboko na ngai. ›
לי-שמעו ויחלו וידמו למו עצתי | 21 |
Bato bazalaki koyoka ngai na bokebi, bazalaki na kimia mpo na koyoka toli na ngai.
אחרי דברי לא ישנו ועלימו תטף מלתי | 22 |
Sima na ngai koloba, bazalaki na liloba ya kozongisa te; maloba na ngai ezalaki kokota na esengo na matoyi na bango.
ויחלו כמטר לי ופיהם פערו למלקוש | 23 |
Bazalaki kozela ngai ndenge bazelaka mvula, mpe bazalaki komela maloba na ngai lokola mvula ya suka.
אשחק אלהם לא יאמינו ואור פני לא יפילון | 24 |
Soki nasekisi bango, bazalaki kondima te; kongenga ya elongi na ngai ezalaki na motuya mpo na bango.
אבחר דרכם ואשב ראש ואשכון כמלך בגדוד כאשר אבלים ינחם | 25 |
Naponaki nzela mpo na bango mpe navandaki lokola mokonzi na bango; nazalaki kokonza bango lokola mokonzi kati na mampinga na ye, nazalaki lokola moto oyo azalaki kolendisa bato ya mawa. »