< איוב 22 >
Elifazi, moto ya Temani, azwaki maloba mpe alobaki:
הלאל יסכן-גבר-- כי-יסכן עלימו משכיל | 2 |
« Boni, litomba nini Nzambe akoki kozwa epai ya moto? Ezala ata moto ya bwanya, azalaka na litomba kaka mpo na ye moko.
החפץ לשדי כי תצדק ואם-בצע כי-תתם דרכיך | 3 |
Ezala soki ozali moyengebene, litomba nini Nkolo-Na-Nguya-Nyonso akoki kozwa, ata ozali kobongisa nzela na yo ya bosembo?
המיראתך יכיחך יבוא עמך במשפט | 4 |
Boni, okanisi ete ezali mpo na boyengebene na yo nde azali kopamela yo mpe kosambisa yo?
הלא רעתך רבה ואין-קץ לעונתיך | 5 |
Mabe na yo ezali monene te? Masumu na yo eleki ndelo te?
כי-תחבל אחיך חנם ובגדי ערומים תפשיט | 6 |
Ozalaki koluka na pamba ndanga epai ya bandeko na yo ya mibali, ozalaki kolongola bato bilamba mpe kotika bango bolumbu,
לא-מים עיף תשקה ומרעב תמנע-לחם | 7 |
ozalaki kopesa mayi te na moto oyo azalaki na posa ya mayi, mpe ozalaki kopimela moto oyo azalaki na nzala bilei,
ואיש זרוע לו הארץ ונשוא פנים ישב בה | 8 |
atako ozalaki moto monene, nkolo mabele, mpe ozalaki kovanda na mabele yango lokola moto ya lokumu;
אלמנות שלחת ריקם וזרעות יתמים ידכא | 9 |
ozalaki kozongisa basi bakufisa mibali maboko pamba, mpe ozalaki kosilisa makasi ya bana bitike.
על-כן סביבותיך פחים ויבהלך פחד פתאם | 10 |
Yango wana, mitambo ezingeli yo, kobebisama ya mbalakata ekomi kopesa yo somo,
או-חשך לא-תראה ושפעת-מים תכסך | 11 |
molili makasi ezwi yo mpe ozali kokoka komona te, mpe mpela ezipi yo.
הלא-אלוה גבה שמים וראה ראש כוכבים כי-רמו | 12 |
Boni, Nzambe azali te kuna na likolo, kati na Lola? Tala ndenge nini etando ya minzoto ezali likolo koleka!
ואמרת מה-ידע אל הבעד ערפל ישפוט | 13 |
Nzokande, ozali koloba: ‹ Nzambe ayebi nini? Akoki kosambisa kati na mapata ya molili ya boye? ›
עבים סתר-לו ולא יראה וחוג שמים יתהלך | 14 |
Mapata minene ezipi Ye, yango wana azali komona biso te, wana azali kotambola-tambola na etando ya Lola?
הארח עולם תשמור-- אשר דרכו מתי-און | 15 |
Olingi solo kotikala kaka na nzela ya kala, nzela oyo bato mabe balekelaki?
אשר-קמטו ולא-עת נהר יוצק יסודם | 16 |
Kufa ememaki bango na mbalakata, mpe miboko na bango etiolaki na mpela.
האמרים לאל סור ממנו ומה-יפעל שדי למו | 17 |
Bazalaki koloba na Nzambe: ‹ Tika biso, biso moko! Nkolo-Na-Nguya-Nyonso akosala biso nini? ›
והוא מלא בתיהם טוב ועצת רשעים רחקה מני | 18 |
Nzokande, Ye nde atondisaki bandako na bango na biloko ya kitoko. Yango wana, ngai, naboyaka toli ya bato mabe.
יראו צדיקים וישמחו ונקי ילעג-למו | 19 |
Bato ya sembo bazali komona kobebisama na bango mpe bazali kosepela, bayengebene bazali koseka bango mpe bazali koloba:
אם-לא נכחד קימנו ויתרם אכלה אש | 20 |
‹ Solo, banguna na biso babebi, moto ezikisi bomengo na bango. ›
הסכן-נא עמו ושלם בהם תבואתך טובה | 21 |
Zongisa boyokani na yo elongo na Ye mpe luka kimia. Na nzela wana, bomengo ekoya lisusu epai na yo.
קח-נא מפיו תורה ושים אמריו בלבבך | 22 |
Ndima malako oyo ekowuta na monoko na Ye, mpe batela maloba na Ye kati na motema na yo.
אם-תשוב עד-שדי תבנה תרחיק עולה מאהלך | 23 |
Soki ozongi epai na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso, soki obengani mabe mosika ya ndako na yo, bomengo na yo ekozongela yo.
ושית-על-עפר בצר ובצור נחלים אופיר | 24 |
Bwaka wolo na yo kati na putulu, wolo na yo ya Ofiri kati na mabanga ya lubwaku;
והיה שדי בצריך וכסף תועפות לך | 25 |
bongo Nkolo-Na-Nguya-Nyonso akozala wolo na yo, mpe palata oyo eleki kitoko mpo na yo.
כי-אז על-שדי תתענג ותשא אל-אלוה פניך | 26 |
Solo, okozwa esengo epai ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso mpe okotombola elongi na yo epai ya Nzambe.
תעתיר אליו וישמעך ונדריך תשלם | 27 |
Okosambela Ye, Ye akoyoka yo, mpe okokokisa ndayi na yo.
ותגזר-אמר ויקם לך ועל-דרכיך נגה אור | 28 |
Makambo oyo okokana, ekosalema, mpe pole ekongenga na nzela na yo.
כי-השפילו ותאמר גוה ושח עינים יושע | 29 |
Soki bato balembi, mpe yo olobi: ‹ Telema! › Nzambe akobikisa bango,
ימלט אי-נקי ונמלט בבר כפיך | 30 |
akokangola ata moto oyo asali mabe, akokangola ye penza mpo na bopeto ya maboko na yo. »