< איוב 11 >
Tsofari, moto ya engumba ya Naama, azwaki maloba mpe alobaki:
הרב דברים לא יענה ואם-איש שפתים יצדק | 2 |
« Boni, maloba oyo nyonso ekoki solo kozanga eyano? Moto oyo azali koloba alonga na ye, kaka mpo ayebi koloba?
בדיך מתים יחרישו ותלעג ואין מכלם | 3 |
Bato bavanda kaka nye likolo ya maloba na yo ya pamba oyo ozali kobimisa? Bapamela yo te soki ozali kosala maseki?
ותאמר זך לקחי ובר הייתי בעיניך | 4 |
Ozali koloba na Nzambe: ‹ Makambo oyo nazali koloba ezali ya solo; nazali sembo na miso na Yo. ›
ואולם--מי יתן אלוה דבר ויפתח שפתיו עמך | 5 |
Oh, tala ndenge nini nazali na posa ete Nzambe aloba, ete afungola monoko na Ye mpo na kopamela yo,
ויגד-לך תעלמות חכמה-- כי-כפלים לתושיה ודע-- כי-ישה לך אלוה מעונך | 6 |
mpe asosolisa yo basekele ya bwanya, pamba te bwanya ya solo ezalaka na bilongi mibale. Yeba likambo oyo: Nzambe abosana masumu na yo ebele.
החקר אלוה תמצא אם עד-תכלית שדי תמצא | 7 |
Okoki penza kososola mabombami ya Nzambe? Okoki solo kososola bandelo ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso?
גבהי שמים מה-תפעל עמקה משאול מה-תדע (Sheol ) | 8 |
Bandelo yango eleki Lola na likolo; yo penza okosala nini? Eleki mboka ya bakufi na bozindo; yo penza okoyeba nini? (Sheol )
ארכה מארץ מדה ורחבה מני-ים | 9 |
Molayi ya bandelo yango eleki mokili na molayi, mpe eleki ebale monene na kopanzana.
אם-יחלף ויסגיר ויקהיל ומי ישיבנו | 10 |
Soki akotisi yo na boloko mpe asangisi basambisi mpo na kokata likambo, nani akotelemela Ye?
כי-הוא ידע מתי-שוא וירא-און ולא יתבונן | 11 |
Solo, ayebaka bakosi mpe asosolaka mabe na pete.
ואיש נבוב ילבב ועיר פרא אדם יולד | 12 |
Ndenge mwana ya ane ya zamba ebotaka moto te, ndenge mpe kizengi akokoka te kokoma mayele.
אם-אתה הכינות לבך ופרשת אליו כפיך | 13 |
Nzokande, soki opesi Ye motema na yo mpe osemboli maboko na yo epai na Ye,
אם-און בידך הרחיקהו ואל-תשכן באהליך עולה | 14 |
soki olongoli lisumu oyo ezali na loboko na yo mpe opekisi mabe kovanda kati na ndako na yo,
כי-אז תשא פניך ממום והיית מצק ולא תירא | 15 |
okotombola elongi na yo na soni te, okotelema ngwi mpe okobanga eloko te;
כי-אתה עמל תשכח כמים עברו תזכר | 16 |
pamba te okobosana pasi na yo, okokoma kokanisa yango kaka lokola mayi oyo esili kotiola.
ומצהרים יקום חלד תעפה כבקר תהיה | 17 |
Bomoi na yo ekongenga lokola pole ya moyi oyo engengaka na midi, mpe butu na yo ekokoma lokola tongo.
ובטחת כי-יש תקוה וחפרת לבטח תשכב | 18 |
Okozala na kimia, pamba te elikya ezali, okotala zingazinga na yo mpe okozwa bopemi na yo na kimia,
ורבצת ואין מחריד וחלו פניך רבים | 19 |
okolala pongi, mpe okomona moto moko te kobangisa yo lisusu, mpe bato ebele bakoya kosenga ngolu na yo.
ועיני רשעים תכלינה ומנוס אבד מנהם ותקותם מפח-נפש | 20 |
Kasi miso ya bato mabe ekokufa, mpe bakozanga ekimelo, bakotikala na elikya se moko: kufa. »