< ישעה 63 >

מי זה בא מאדום חמוץ בגדים מבצרה זה הדור בלבושו צעה ברב כחו אני מדבר בצדקה רב להושיע 1
Azali nani, ye oyo awuti na Edomi, na Botsira, na bilamba ya motane? Azali nani, ye oyo alati bilamba ya lokumu, oyo azali kotambola lokola elombe, mpo ayebi ete azalaka makasi? « Ezali nde Ngai; nakataka makambo na bosembo, natonda na nguya mpo na kobikisa. »
מדוע אדם ללבושך ובגדיך כדרך בגת 2
Mpo na nini bilamba na yo ezali motane lokola bilamba ya mokamoli vino?
פורה דרכתי לבדי ומעמים אין איש אתי ואדרכם באפי וארמסם בחמתי ויז נצחם על בגדי וכל מלבושי אגאלתי 3
« Nazalaki kaka ngai moko kati na ekamolelo mpo na kokamola vino, moko te kati na bato ya bikolo nyonso azalaki elongo na ngai. Nanyataki-nyataki bango na kanda na ngai mpe nakamolaki bango na kanda na ngai ya makasi; makila na bango epumbwelaki ngai na bilamba mpe ebebisaki bilamba na ngai nyonso.
כי יום נקם בלבי ושנת גאולי באה 4
Pamba te, na motema na ngai, ezalaki nde mokolo ya kozongisa mabe na mabe, mpe mobu na ngai ya kosikola ekokaki.
ואביט ואין עזר ואשתומם ואין סומך ותושע לי זרעי וחמתי היא סמכתני 5
Natalaki, kasi namonaki moto te oyo akosunga; nakamwaki ete moto azalaki te mpo na kosunga ngai! Bongo, loboko na ngai moko ebikisaki ngai, mpe kanda na ngai ya makasi esungaki ngai.
ואבוס עמים באפי ואשכרם בחמתי ואוריד לארץ נצחם 6
Nanyataki-nyataki bikolo na kanda na ngai, nalangwisaki bango na kanda na ngai ya makasi mpe nasopaki makila na bango na mabele. »
חסדי יהוה אזכיר תהלת יהוה כעל כל אשר גמלנו יהוה ורב טוב לבית ישראל אשר גמלם כרחמיו וכרב חסדיו 7
Nakotatola boboto ya Yawe, nakosanzola Ye mpo na misala na Ye, kolanda nyonso oyo Yawe asalaki mpo na biso; solo, asalelaki libota ya Isalaele makambo ebele ya kitoko kolanda boboto mpe bolingo na Ye ya monene.
ויאמר אך עמי המה בנים לא ישקרו ויהי להם למושיע 8
Alobaki: « Solo, bazali bato na Ngai, bazali bana oyo bakosaka Ngai te! » Yango wana, Yawe akomaki Mobikisi na bango.
בכל צרתם לא (לו) צר ומלאך פניו הושיעם--באהבתו ובחמלתו הוא גאלם וינטלם וינשאם כל ימי עולם 9
Tango nyonso bazalaki na pasi, Ye mpe azalaki koyoka pasi na motema; boye, anjelu oyo atelemaka liboso na Ye abikisaki bango; asikolaki bango na bolingo mpe na mawa na Ye, akongolaki bango mpe azalaki komema bango mikolo nyonso ya tango ya kala.
והמה מרו ועצבו את רוח קדשו ויהפך להם לאויב הוא נלחם בם 10
Nzokande, wana batombokelaki Ye mpe bayokisaki Molimo Mosantu na Ye mawa, abalukelaki bango mpe akomaki monguna na bango; mpe Ye moko akomaki kobundisa bango.
ויזכר ימי עולם משה עמו איה המעלם מים את רעי צאנו--איה השם בקרבו את רוח קדשו 11
Boye, bato na Ye bakanisaki mikolo ya tango ya kala, mikolo ya tango ya Moyize: Wapi Ye oyo akatisaki bango ebale monene, elongo na mobateli bibwele ya etonga na Ye? Wapi Ye oyo atiaki kati na bango Molimo Mosantu na Ye?
מוליך לימין משה זרוע תפארתו בוקע מים מפניהם לעשות לו שם עולם 12
Ye oyo atindaki ete loboko na Ye ya nkembo ezala elongo na loboko ya mobali ya Moyize, Ye oyo akabolaki mayi ya ebale monene liboso na bango mpo na kopesa Kombo na Ye lokumu mpo na libela;
מוליכם בתהמות כסוס במדבר לא יכשלו 13
Ye oyo atambolisaki bango kati na mozindo? Lokola mpunda kati na esobe, babetaki libaku te;
כבהמה בבקעה תרד רוח יהוה תניחנו--כן נהגת עמך לעשות לך שם תפארת 14
lokola bibwele oyo ezali kokita na lubwaku, Molimo na Yawe apesaki bango bopemi. Ezali ndenge wana nde okambaki bato na Yo mpo na kopesa lokumu na Kombo na Yo.
הבט משמים וראה מזבל קדשך ותפארתך איה קנאתך וגבורתך המון מעיך ורחמיך אלי התאפקו 15
Tala wuta na likolo mpe mona wuta na ndako na Yo ya bule mpe ya nkembo: Wapi bolingo na Yo, oyo eleka ndelo mpe nguya na Yo? Bolingo mpe mawa na Yo mpo na biso esili?
כי אתה אבינו--כי אברהם לא ידענו וישראל לא יכירנו אתה יהוה אבינו גאלנו מעולם שמך 16
Nzokande, Yo nde ozali Tata na biso; atako Abrayami ayebi biso te to Isalaele andimi biso te; kasi Yo, Yawe, ozali Tata na biso, Kombo na Yo ezali: Mosikoli na biso ya tango nyonso.
למה תתענו יהוה מדרכיך תקשיח לבנו מיראתך שוב למען עבדיך שבטי נחלתך 17
Yawe, mpo na nini kotika biso koyengayenga mosika ya nzela na Yo? Mpo na nini kokomisa mitema na biso makasi mpo ete totosa Yo te? Zongisa motema sima mpo na bolamu ya basali na Yo, mabota ya libula na Yo!
למצער ירשו עם קדשך צרינו בוססו מקדשך 18
Bato na Yo bazwaki esika na Yo ya bule kaka mpo na mwa tango moke; kasi sik’oyo, banguna na biso bakweyisi Ndako na Yo ya bule!
היינו מעולם לא משלת בם--לא נקרא שמך עליהם לוא קרעת שמים ירדת מפניך הרים נזלו 19
Wuta kala, tozalaka bato na Yo; kasi tokomi lokola bato oyo okambaka lisusu te, lokola bato oyo babengami na Kombo na Yo te.

< ישעה 63 >