< יחזקאל 11 >

ותשא אתי רוח ותבא אתי אל שער בית יהוה הקדמוני הפונה קדימה והנה בפתח השער עשרים וחמשה איש ואראה בתוכם את יאזניה בן עזר ואת פלטיהו בן בניהו--שרי העם 1
Bongo Molimo atombolaki ngai mpe amemaki ngai kino na ekuke ya Tempelo ya Yawe, oyo etala na ngambo ya este. Bato tuku mibale na mitano bazalaki wana na ekotelo ya ekuke; mpe namonaki kati na bango: Yazania, mwana mobali ya Azuri, mpe Pelatia, mwana mobali ya Benaya, oyo bazalaki bakambi ya bato.
ויאמר אלי בן אדם--אלה האנשים החשבים און והיעצים עצת רע בעיר הזאת 2
Yawe alobaki na ngai: « Mwana na moto, tala bato oyo basalaka mabongisi ya mabe mpe bapesaka batoli ya mabe kati na engumba oyo.
האמרים לא בקרוב בנות בתים היא הסיר ואנחנו הבשר 3
Balobaka: ‹ Boni, tango ya kotonga bandako ekoki nanu te? Engumba oyo ezali lokola nzungu, mpe biso, tozali lokola misuni. ›
לכן הנבא עליהם הנבא בן אדם 4
Yango wana, sakola makambo ya mabe na tina na bango; sakola, mwana na moto! »
ותפל עלי רוח יהוה ויאמר אלי אמר כה אמר יהוה כן אמרתם בית ישראל ומעלות רוחכם אני ידעתיה 5
Molimo na Yawe akitaki likolo na ngai mpe ayebisaki ngai ete naloba: « Tala liloba oyo Yawe alobi: Tala makambo oyo bozali koloba, bino bakambi kati na Isalaele! Kasi Ngai nayebi makambo oyo bozali kokanisa.
הרביתם חלליכם בעיר הזאת ומלאתם חוצתיה חלל 6
Bobomi bato ebele kati na engumba oyo mpe botondisi babalabala na yango na bibembe.
לכן כה אמר אדני יהוה חלליכם אשר שמתם בתוכה המה הבשר והיא הסיר ואתכם הוציא מתוכה 7
Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: engumba oyo ezali solo nzungu, mpe bibembe oyo bobwaki kuna, yango nde misuni; kasi Ngai, nakobengana bino kati na yango.
חרב יראתם וחרב אביא עליכם נאם אדני יהוה 8
Bozali kobanga mopanga? Solo, Ngai, nakotindela bino mopanga, elobi Nkolo Yawe;
והוצאתי אתכם מתוכה ונתתי אתכם ביד זרים ועשיתי בכם שפטים 9
nakobengana bino na engumba oyo, nakokaba bino na maboko ya bapaya mpe nakopesa bino etumbu.
בחרב תפלו על גבול ישראל אשפוט אתכם וידעתם כי אני יהוה 10
Bokokufa na mopanga, nakosambisa bino na bandelo ya mokili ya Isalaele, bongo bokoyeba solo ete Ngai nazali Yawe.
היא לא תהיה לכם לסיר ואתם תהיו בתוכה לבשר אל גבול ישראל אשפט אתכם 11
Engumba oyo ekotikala te kozala nzungu mpo na bino, mpe bino bokotikala te kozala misuni kati na yango; nakosambisa bino na bandelo ya mokili ya Isalaele.
וידעתם כי אני יהוה אשר בחקי לא הלכתם ומשפטי לא עשיתם וכמשפטי הגוים אשר סביבותיכם עשיתם 12
Mpe bokoyeba solo ete Ngai nazali Yawe, pamba te bolandaki te bikateli na Ngai mpe botosaki te mibeko na Ngai, kasi bolandaki nde bizaleli ya bikolo ya bapaya oyo bazingeli bino. »
ויהי כהנבאי ופלטיהו בן בניה מת ואפל על פני ואזעק קול גדול ואמר אהה אדני יהוה--כלה אתה עשה את שארית ישראל 13
Nzokande, wana nazalaki nanu kosakola, Pelatia, mwana mobali ya Benaya, akufaki. Nakweyaki, elongi na ngai kino na mabele, mpe nagangaki na mongongo makasi: « Oh Nkolo Yawe! Okosilisa solo koboma penza ndambo ya bana ya Isalaele, oyo batikali na bomoi? »
ויהי דבר יהוה אלי לאמר 14
Yawe alobaki na ngai:
בן אדם אחיך אחיך אנשי גאלתך וכל בית ישראל כלה אשר אמרו להם ישבי ירושלם רחקו מעל יהוה--לנו היא נתנה הארץ למורשה 15
« Mwana na moto, ezali epai ya bato na yo, bandeko na yo ya makila mpe ndako mobimba ya Isalaele nde bato ya Yelusalemi balobaki: ‹ Bozala mosika na Yawe; mokili oyo epesamelaki biso lokola libula na biso. ›
לכן אמר כה אמר אדני יהוה כי הרחקתים בגוים וכי הפיצותים בארצות ואהי להם למקדש מעט בארצות אשר באו שם 16
Yango wana, loba: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Atako nabenganaki bango kati na bikolo mpe napanzaki bango kati na mabota, kasi nazalaki mpo na bango lokola ndako ya bule kati na bikolo epai wapi bakendeki. ›
לכן אמר כה אמר אדני יהוה וקבצתי אתכם מן העמים ואספתי אתכם מן הארצות אשר נפצותם בהם ונתתי לכם את אדמת ישראל 17
Mpo na yango, loba: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Nakosangisa bino wuta na bikolo, nakozongisa bino wuta na mikili epai wapi napanzaki bino mpe nakozongisela bino lisusu mokili ya Isalaele. ›
ובאו שמה והסירו את כל שקוציה ואת כל תועבותיה--ממנה 18
Bakozonga kuna mpe bakolongola bililingi na yango nyonso ya mbindo elongo na banzambe nyonso ya bikeko.
ונתתי להם לב אחד ורוח חדשה אתן בקרבכם והסרתי לב האבן מבשרם ונתתי להם לב בשר 19
Nakopesa bango motema ya sika mpe nakotia kati na bango molimo ya sika; nakolongola kati na bango motema ya libanga mpe nakopesa bango motema ya mosuni,
למען בחקתי ילכו ואת משפטי ישמרו ועשו אתם והיו לי לעם--ואני אהיה להם לאלהים 20
mpo ete balanda bikateli na Ngai mpe batosa mibeko na Ngai. Bakozala bato na Ngai, mpe Ngai nakozala Nzambe na bango.
ואל לב שקוציהם ותועבותיהם לבם הלך--דרכם בראשם נתתי נאם אדני יהוה 21
Kasi mpo na bato oyo bapesa mitema na bango epai ya bililingi ya mbindo mpe banzambe ya bikeko mpo na kokoba kosalela yango, nakofuta bango kolanda misala na bango, elobi Nkolo Yawe. »
וישאו הכרובים את כנפיהם והאופנים לעמתם וכבוד אלהי ישראל עליהם מלמעלה 22
Na tango wana, basheribe bafungolaki mapapu na bango mpe bapine ekomaki kobaluka na mipanzi na bango; boye nkembo na Nzambe ya Isalaele ezalaki na likolo na bango.
ויעל כבוד יהוה מעל תוך העיר ויעמד על ההר אשר מקדם לעיר 23
Nkembo na Yawe emataki na likolo longwa kati na engumba mpe ekendeki kotelema na likolo ya ngomba oyo ezalaki na este ya Yelusalemi.
ורוח נשאתני ותבאני כשדימה אל הגולה במראה ברוח אלהים ויעל מעלי המראה אשר ראיתי 24
Molimo atombolaki ngai mpe amemaki ngai kati na Babiloni epai ya bato oyo bakendeki na bowumbu. Makambo oyo ezalaki kosalema kati na emoniseli oyo Molimo ya Nzambe apesaki ngai. Mpe emoniseli oyo namonaki esilaki.
ואדבר אל הגולה את כל דברי יהוה אשר הראני 25
Bongo nayebisaki bato oyo bazalaki na bowumbu makambo nyonso oyo Yawe alakisaki ngai.

< יחזקאל 11 >