< שמות 23 >

לא תשא שמע שוא אל תשת ידך עם רשע להית עד חמס 1
Okopanza sango ya lokuta te; okosangana te na moto mabe mpo na koloba litatoli ya lokuta.
לא תהיה אחרי רבים לרעת ולא תענה על רב לנטת אחרי רבים--להטת 2
Okolanda ebele ya bato te mpo na kosala mabe. Tango okoloba litatoli liboso ya basambisi, okotatola te kolanda mokano ya bato ebele mpo na kokweyisa bosembo.
ודל לא תהדר בריבו 3
Okokotela mobola te na tango azali kosamba liboso ya basambisi.
כי תפגע שור איבך או חמרו--תעה השב תשיבנו לו 4
Soki okutani na ngombe to ane ya monguna na yo, oyo ebungi, osengeli kozongisela ye yango.
כי תראה חמור שנאך רבץ תחת משאו וחדלת מעזב לו--עזב תעזב עמו 5
Soki omoni ane ya moto oyo ayinaka yo ekweyi na se ya mokumba oyo yango ememi, okotika yango wana te; osengeli kosalisa yango.
לא תטה משפט אבינך בריבו 6
Okokweyisa bosembo ya mobola te tango azali kosamba liboso ya basambisi.
מדבר שקר תרחק ונקי וצדיק אל תהרג כי לא אצדיק רשע 7
Okozala mosika ya makambo ya lokuta. Okoboma te ezala moto oyo ayebi likambo te to moto ya sembo; pamba te nalongisaka te moto mabe.
ושחד לא תקח כי השחד יעור פקחים ויסלף דברי צדיקים 8
Okondimaka kanyaka te, pamba te kanyaka ezipaka miso ya bato oyo bamonaka malamu mpe ebebisaka maloba ya moto ya sembo.
וגר לא תלחץ ואתם ידעתם את נפש הגר--כי גרים הייתם בארץ מצרים 9
Okonyokola mopaya te, pamba te oyebi yo moko ndenge ezalaka soki ozali mopaya; bino mpe bozalaki bapaya na Ejipito.
ושש שנים תזרע את ארצך ואספת את תבואתה 10
Mibu motoba, okolona bilanga na yo mpe okobuka mbuma.
והשביעת תשמטנה ונטשתה ואכלו אביני עמך ויתרם תאכל חית השדה כן תעשה לכרמך לזיתך 11
Kasi na mobu ya sambo, okopemisa mabele. Boye babola kati na bato na yo bakozwa bilei ya kolia kati na yango mpe nyama ya zamba ekolia bilei oyo bato bakotika. Okosala ndenge moko mpo na elanga na yo ya vino mpe mpo na nzete na yo ya olive.
ששת ימים תעשה מעשיך וביום השביעי תשבת--למען ינוח שורך וחמרך וינפש בן אמתך והגר 12
Mikolo motoba, okosala mosala na yo; kasi na mokolo ya sambo, okosala mosala moko te mpo ete ngombe na yo elongo na ane na yo ekoka kopema, mpe mpo ete mwana mobali ya mwasi mowumbu na yo mpe mopaya bazwa lisusu makasi.
ובכל אשר אמרתי אליכם תשמרו ושם אלהים אחרים לא תזכירו לא ישמע על פיך 13
Bokosala keba na makambo nyonso oyo nayebisi bino. Bokobelela kombo ya banzambe mosusu te; bokomeka kutu te kotanga yango na bibebu na bino.
שלש רגלים תחג לי בשנה 14
Mbala misato na mobu, bokosala bafeti misato mpo na Ngai.
את חג המצות תשמר--שבעת ימים תאכל מצות כאשר צויתך למועד חדש האביב כי בו יצאת ממצרים ולא יראו פני ריקם 15
Bokosala feti ya Mapa ezanga levire. Na mikolo sambo kolanda ndenge napesaki bino mitindo, bokolia mapa ezanga levire na tango oyo ekatama, na sanza ya Abibi, mpo ete ezali na sanza yango nde bobimaki na Ejipito.
וחג הקציר בכורי מעשיך אשר תזרע בשדה וחג האסף בצאת השנה באספך את מעשיך מן השדה 16
Okosala feti ya kobuka bambuma, okosala mpe feti ya bambuma ya liboso ya bilanga na yo, oyo olonaki. Na suka ya mobu, okosala feti ya kobuka bambuma tango okobuka mbuma ya elanga.
שלש פעמים בשנה--יראה כל זכורך אל פני האדן יהוה 17
Mbala misato na mobu, bato nyonso bakoya liboso ya Nkolo Yawe.
לא תזבח על חמץ דם זבחי ולא ילין חלב חגי עד בקר 18
Okobonzela Ngai te mbeka ya makila elongo na mapa batia levire. Mafuta ya nyama ya feti na Ngai ekoki kobombama te kino na tongo.
ראשית בכורי אדמתך תביא בית יהוה אלהיך לא תבשל גדי בחלב אמו 19
Okomema na Ndako ya Yawe, Nzambe na yo, bambuma ya liboso ya mabele na yo. Okolamba te mwana ntaba oyo ezali nanu komela mabele ya mama na yango.
הנה אנכי שלח מלאך לפניך לשמרך בדרך ולהביאך אל המקום אשר הכנתי 20
Nakotinda anjelu liboso na bino mpo ete abatela bino na nzela mpe amema bino na esika oyo nabongisaki mpo na bino.
השמר מפניו ושמע בקלו אל תמר בו כי לא ישא לפשעכם כי שמי בקרבו 21
Bosala keba na miso na ye mpe boyoka makambo oyo akoloba; botombokela ye te mpo ete akolimbisa botomboki na bino te, pamba te Kombo na Ngai ezali kati na ye.
כי אם שמוע תשמע בקלו ועשית כל אשר אדבר--ואיבתי את איביך וצרתי את צרריך 22
Kasi soki boyoki na bokebi makambo oyo akoyebisa bino mpe soki bosaleli nyonso oyo nalobi, nakozala monguna ya banguna na bino mpe nakotelemela bato oyo bakotelemela bino.
כי ילך מלאכי לפניך והביאך אל האמרי והחתי והפרזי והכנעני החוי והיבוסי והכחדתיו 23
Anjelu na Ngai akotambola liboso na bino mpe akokotisa bino na mokili ya bato ya Amori, ya bato ya Iti, ya bato ya Perizi, ya bato ya Kanana, ya bato ya Evi mpe ya bato ya Yebusi; bongo Ngai nakosilisa bango.
לא תשתחוה לאלהיהם ולא תעבדם ולא תעשה כמעשיהם כי הרס תהרסם ושבר תשבר מצבתיהם 24
Bokogumbamela banzambe na bango te mpe bokosalela yango te to bokolanda te lolenge na bango ya kosalela. Bokokweyisa banzambe yango mpe bokobuka-buka bikeko na bango na biteni.
ועבדתם את יהוה אלהיכם וברך את לחמך ואת מימיך והסרתי מחלה מקרבך 25
Soki bokosalela Yawe, Nzambe na bino, akopambola mapa mpe mayi na bino, mpe akolongola bokono kati na bino.
לא תהיה משכלה ועקרה בארצך את מספר ימיך אמלא 26
Na mboka na bino, ekozala na mwasi moko te oyo akosopa zemi to akozanga kobota. Nakobakisela bino mikolo ebele na bomoi na bino.
את אימתי אשלח לפניך והמתי את כל העם אשר תבא בהם ונתתי את כל איביך אליך ערף 27
Nakotinda somo na Ngai liboso na bino mpe nakokotisa mobulu kati na bikolo nyonso oyo bokokota. Banguna na bino nyonso bakopesa bino mokongo mpe bakokima.
ושלחתי את הצרעה לפניך וגרשה את החוי את הכנעני ואת החתי--מלפניך 28
Nakotinda banzoyi ya minene liboso na bino mpo na kobengana bato ya Evi, ya Kanana mpe ya Iti na liboso na bino.
לא אגרשנו מפניך בשנה אחת פן תהיה הארץ שממה ורבה עליך חית השדה 29
Kasi nakobengana bango te na mbala moko mpo ete mboka ekoma te lokola ndako ezanga bato, mpe mpo ete banyama ya zamba ekoma mingi te mpo na kotungisa bino.
מעט מעט אגרשנו מפניך עד אשר תפרה ונחלת את הארץ 30
Nakobengana bango moke-moke liboso na bino kino bokokoma ebele mpo na kozwa mboka.
ושתי את גבלך מים סוף ועד ים פלשתים וממדבר עד הנהר כי אתן בידכם את ישבי הארץ וגרשתמו מפניך 31
Nakotia bandelo na bino kobanda na ebale monene ya barozo kino na ebale monene ya bato ya Filisitia mpe kobanda na esobe ya Sinai kino na ebale Efrate; pamba te nakopesa bato ya mboka na maboko na bino, bongo bino bokobengana bango liboso na bino.
לא תכרת להם ולאלהיהם ברית 32
Bokosala boyokani te elongo na bango mpe elongo na banzambe na bango.
לא ישבו בארצך פן יחטיאו אתך לי כי תעבד את אלהיהם כי יהיה לך למוקש 33
Botika bango te ete bawumela na mokili na bino, noki te bakotinda bino kosala masumu liboso na Ngai mpe kosalela banzambe na bango; pamba te ekozala solo motambo mpo na bino. »

< שמות 23 >