< קֹהֶלֶת 1 >
דברי קהלת בן דוד מלך בירושלם | 1 |
Maloba ya Moteyi, mwana mobali ya Davidi, mokonzi na Yelusalemi.
הבל הבלים אמר קהלת הבל הבלים הכל הבל | 2 |
Pamba na pamba, elobi Moteyi; pamba na pamba, nyonso ezali kaka pamba.
מה יתרון לאדם בכל עמלו--שיעמל תחת השמש | 3 |
Moto azwaka litomba nini penza na misala nyonso oyo amonelaka pasi na se ya moyi?
דור הלך ודור בא והארץ לעולם עמדת | 4 |
Eleko moko eleki, mpe eleko mosusu eyei, kasi mabele etikalaka kaka seko na seko.
וזרח השמש ובא השמש ואל מקומו--שואף זורח הוא שם | 5 |
Moyi ebimaka mpe elalaka, bongo ezongaka na lombangu na esika oyo ebimelaka.
הולך אל דרום וסובב אל צפון סובב סבב הולך הרוח ועל סביבתיו שב הרוח | 6 |
Mopepe ekeyi na ngambo ya sude, ebaluki na ngambo ya nor, ebaluki-baluki mpe ekeyi lisusu, ezongelaka kaka banzela wana.
כל הנחלים הלכים אל הים והים איננו מלא אל מקום שהנחלים הלכים--שם הם שבים ללכת | 7 |
Mayi nyonso ekendaka na ebale monene, kasi ebale monene etondaka te; mpe mayi yango ezongaka lisusu epai ewutaka.
כל הדברים יגעים לא יוכל איש לדבר לא תשבע עין לראות ולא תמלא אזן משמע | 8 |
Makambo nyonso elembisaka, moto oyo akoki kobeta na yango tembe azali te; nzokande, miso etondaka te na kotala, mpe matoyi etondaka te na koyoka.
מה שהיה הוא שיהיה ומה שנעשה הוא שיעשה ואין כל חדש תחת השמש | 9 |
Oyo ezalaki ekozala lisusu, oyo esalemaki ekosalema lisusu: likambo ya sika ezalaka te na se ya moyi.
יש דבר שיאמר ראה זה חדש הוא כבר היה לעלמים אשר היה מלפננו | 10 |
Boni, ezali penza na likambo moko oyo moto akoki koloba na tina yango: « Tala, oyo penza ezali likambo ya sika? » Te, esila komizalela kala, kala penza liboso ya eleko na biso.
אין זכרון לראשנים וגם לאחרנים שיהיו לא יהיה להם זכרון--עם שיהיו לאחרנה | 11 |
Ndenge bato bayebaka lisusu bato ya kala te, ndenge wana mpe bato oyo bakoya sima bakotikala koyeba bango te na bato oyo bakolanda.
אני קהלת הייתי מלך על ישראל--בירושלם | 12 |
Ngai, Moteyi, nazalaki mokonzi ya Isalaele, na Yelusalemi.
ונתתי את לבי לדרוש ולתור בחכמה על כל אשר נעשה תחת השמים הוא ענין רע נתן אלהים לבני האדם--לענות בו | 13 |
Namipesaki mpo na koyekola mpe kososola na nzela ya bwanya, makambo nyonso oyo esalemaka na se ya moyi. Nzokande, ezali na yango kaka mosala ya mpunda oyo Nzambe apesa na bana ya bato mpo ete bamonela yango pasi!
ראיתי את כל המעשים שנעשו תחת השמש והנה הכל הבל ורעות רוח | 14 |
Namona misala nyonso oyo esalemaka na se ya moyi; nyonso wana ezali kaka pamba, ezali lokola moto azali kolanda mopepe.
מעות לא יוכל לתקן וחסרון לא יוכל להמנות | 15 |
Bakoki te kosembola eloko oyo etengama, bakoki mpe te kotanga eloko oyo ezali te.
דברתי אני עם לבי לאמר--אני הנה הגדלתי והוספתי חכמה על כל אשר היה לפני על ירושלם ולבי ראה הרבה חכמה ודעת | 16 |
Namilobelaki: « Tala, nakolisi mpe nabakisi bwanya mingi koleka moto nyonso oyo azalaki liboso na ngai, na Yelusalemi. » Motema na ngai etondaki penza na bwanya mpe na boyebi ebele.
ואתנה לבי לדעת חכמה ודעת הוללת ושכלות ידעתי שגם זה הוא רעיון רוח | 17 |
Namipesaki makasi mpo na koyekola bwanya mpe, lisusu, makambo ya bozoba mpe ya liboma; kasi nasosolaki ete yango mpe ezali kaka lokola moto azali kolanda mopepe.
כי ברב חכמה רב כעס ויוסיף דעת יוסיף מכאוב | 18 |
Pamba te kozala na bwanya mingi ememelaka moto pasi, mpe kozala na mayele mingi etungisaka motema.