< דניאל 7 >

בשנת חדה לבלאשצר מלך בבל דניאל חלם חזה וחזוי ראשה על משכבה באדין חלמא כתב ראש מלין אמר 1
Na mobu ya liboso ya bokonzi ya Balitazari, mokonzi ya Babiloni, Daniele alotaki ndoto moko: bimoniseli eyaki na makanisi na ye tango azalaki ya kolala na mbeto na ye. Bongo, akomaki ndoto yango mpe alobaki mama na likambo na yango.
ענה דניאל ואמר חזה הוית בחזוי עם ליליא וארו ארבע רוחי שמיא מגיחן לימא רבא 2
Daniele alobaki: Na emoniseli oyo nazwaki na butu, namonaki mipepe minei kowuta na likolo mpe eningisaki ebale monene.
וארבע חיון רברבן סלקן מן ימא שנין דא מן דא 3
Banyama minei ya minene, ekesana yango nyonso, ebimaki wuta na ebale monene.
קדמיתא כאריה וגפין די נשר לה חזה הוית עד די מריטו גפיה (גפה) ונטילת מן ארעא ועל רגלין כאנש הקימת ולבב אנש יהיב לה 4
Nyama ya liboso ezalaki lokola nkosi mpe ezalaki na mapapu lokola mpongo. Wana nazalaki kotala, balongolaki yango mapapu, batombolaki yango longwa na mabele mpo ete etelema na makolo mibale lokola moto; mpe bapesaki yango motema ya moto.
וארו חיוה אחרי תנינה דמיה לדב ולשטר חד הקמת ותלת עלעין בפמה בין שניה (שנה) וכן אמרין לה קומי אכלי בשר שגיא 5
Bongo, namonaki nyama ya mibale: ezalaki lokola ngombolo; etelemaki na moko ya mipanzi na yango mpe ezalaki na mikuwa ya mipanzi misato na kati-kati ya minu ya monoko na yango. Balobaki na yango: « Telema, lia mpe otonda misuni! »
באתר דנה חזה הוית וארו אחרי כנמר ולה גפין ארבע די עוף על גביה (גבה) וארבעה ראשין לחיותא ושלטן יהיב לה 6
Sima na yango, nakobaki kotala mpe namonaki nyama mosusu: ezalaki lokola nkoyi, mpe mokongo na yango ezalaki na mapapu minei lokola mapapu ya ndeke. Nyama yango ezalaki na mito minei, bongo bapesaki yango bokonzi ya kokamba.
באתר דנה חזה הוית בחזוי ליליא וארו חיוה רביעיה (רביעאה) דחילה ואימתני ותקיפא יתירה ושנין די פרזל לה רברבן אכלה ומדקה ושארא ברגליה (ברגלה) רפסה והיא משניה מן כל חיותא די קדמיה (קדמה) וקרנין עשר לה 7
Sima na yango, kati na emoniseli na ngai ya butu, namonaki nyama ya minei: ezalaki somo, ezalaki kobangisa mpe ezalaki na nguya makasi penza. Ezalaki na minu minene ya bibende; ezalaki kolia, kopanzapanza mpe konyata misuni oyo ezalaki kotikala; ekesenaki makasi na banyama nyonso ya liboso mpe ezalaki na maseke zomi.
משתכל הוית בקרניא ואלו קרן אחרי זעירה סלקת ביניהון (ביניהן) ותלת מן קרניא קדמיתא אתעקרו (אתעקרה) מן קדמיה (קדמה) ואלו עינין כעיני אנשא בקרנא דא ופם ממלל רברבן 8
Wana nazali kotala malamu maseke, namonaki liseke mosusu ya moke kobima kati na maseke wana; bongo maseke misato kati na maseke ya liboso elongwaki liboso ya liseke ya moke oyo ezalaki na miso lokola ya moto mpe monoko oyo ezalaki koloba na lolendo.
חזה הוית עד די כרסון רמיו ועתיק יומין יתב לבושה כתלג חור ושער ראשה כעמר נקא כרסיה שבבין די נור גלגלוהי נור דלק 9
Wana nazalaki kotala, namonaki bazali kotanda bakiti ya bokonzi, mpe Mpaka oyo azala liboso ya tango avandaki na moko kati na bakiti yango. Bilamba na Ye ezalaki pembe lokola mvula ya pembe, suki ya moto na Ye ezalaki pembe lokola bapwale ya meme, oyo basukola malamu. Kiti ya Bokonzi na Ye ezalaki lokola moto, mpe bapine na yango ezalaki lokola moto oyo ezali kongala.
נהר די נור נגד ונפק מן קדמוהי אלף אלפים (אלפין) ישמשונה ורבו רבון (רבבן) קדמוהי יקומון דינא יתב וספרין פתיחו 10
Ebale ya moto ezalaki kobima mpe kotambola liboso na Ye. Minkoko ya bato bazalaki kosalela Ye, minkoko ya minkoko ya bato batelemaki liboso na Ye. Basambisi bavandaki, mpe babuku efungwamaki.
חזה הוית--באדין מן קל מליא רברבתא די קרנא ממללה חזה הוית עד די קטילת חיותא והובד גשמה ויהיבת ליקדת אשא 11
Nakobaki kotala mpo na maloba ya lofundu oyo liseke yango ezalaki koloba; mpe wana nazalaki kaka kotala, babomaki nyama yango, nzoto na yango ebebaki mpe babwakaki yango na moto.
ושאר חיותא העדיו שלטנהון וארכה בחיין יהיבת להון עד זמן ועדן 12
Balongolaki bokonzi ya banyama mosusu, kasi babakiselaki yango mikolo ya bomoi kino na tango oyo ekatama.
חזה הוית בחזוי ליליא וארו עם ענני שמיא כבר אנש אתה הוא ועד עתיק יומיא מטה וקדמוהי הקרבוהי 13
Kati na bimoniseli na ngai ya butu,
ולה יהב שלטן ויקר ומלכו וכל עממיא אמיא ולשניא לה יפלחון שלטנה שלטן עלם די לא יעדה ומלכותה די לא תתחבל 14
Bapesaki Ye bokonzi, lokumu mpe nguya;
אתכרית רוחי אנה דניאל בגו נדנה וחזוי ראשי יבהלנני 15
Ngai, Daniele, namitungisaki makasi; mpe bimoniseli oyo eyaki na makanisi na ngai ebangisaki ngai makasi.
קרבת על חד מן קאמיא ויציבא אבעא מנה על כל דנה ואמר לי ופשר מליא יהודענני 16
Napusanaki pene ya moko kati na ba-oyo batelemaki wana, natunaki ye ndimbola ya solo ya makambo oyo namonaki. Ayanolaki ngai mpe apesaki ngai ndimbola ya makambo wana nyonso:
אלין חיותא רברבתא די אנין ארבע--ארבעה מלכין יקומון מן ארעא 17
— Banyama nyonso minei wana ya minene ezali kolakisa bakonzi minei oyo bakobima na mabele;
ויקבלון מלכותא קדישי עליונין ויחסנון מלכותא עד עלמא ועד עלם עלמיא 18
kasi basantu ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo bakozwa bokonzi mpe bakobatela yango mpo na libela, seko na seko.
אדין צבית ליצבא על חיותא רביעיתא די הות שניה מן כלהון (כלהן) דחילה יתירה שניה (שנה) די פרזל וטפריה (וטפרה) די נחש אכלה מדקה ושארא ברגליה (ברגלה) רפסה 19
Bongo, nalingaki koyeba na bosolo ndimbola ya nyama ya minei oyo ekesenaki makasi na banyama mosusu wana, ezalaki kobangisa makasi, ezalaki na minu ya bibende mpe mbanga ya bronze, ezalaki kolia, kopanzapanza mpe konyata misuni oyo ezalaki etikala.
ועל קרניא עשר די בראשה ואחרי די סלקת ונפלו (ונפלה) מן קדמיה (קדמה) תלת וקרנא דכן ועינין לה ופם ממלל רברבן וחזוה רב מן חברתה 20
Nalingaki lisusu koyeba ndimbola ya maseke zomi oyo ezalaki na moto na yango mpe ya liseke mosusu oyo ebimaki, oyo maseke misato kati na maseke wana zomi ekweyaki liboso na yango, oyo ezalaki na miso mpe na monoko oyo ezalaki koloba na lolendo, mpe oyo ezalaki makasi koleka maseke mosusu.
חזה הוית--וקרנא דכן עבדא קרב עם קדישין ויכלה להן 21
Wana nazalaki kotala liseke yango, namonaki yango kobundisa mpe kolonga basantu
עד די אתה עתיק יומיא ודינא יהב לקדישי עליונין וזמנא מטה ומלכותא החסנו קדישין 22
kino tango Mpaka oyo azala liboso ya tango ayaki kobundela basantu ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo, mpe kino tango ya kozwa bokonzi ekokoka mpo na bango.
כן אמר חיותא רביעיתא מלכו רביעיה (רביעאה) תהוא בארעא די תשנא מן כל מלכותא ותאכל כל ארעא ותדושנה ותדקנה 23
Moto oyo natunaki ndimbola ya ndoto alobaki na ngai: — Nyama oyo ya minei ezali mokonzi ya minei oyo akobima na mabele. Akokesana makasi na babokonzi wana nyonso: akoboma mokili mobimba, akonyata mpe akopanza-panza yango.
וקרניא עשר--מנה מלכותא עשרה מלכין יקמון ואחרן יקום אחריהן והוא ישנא מן קדמיא ותלתה מלכין יהשפל 24
Maseke zomi elingi koloba ete bakonzi zomi bakobima na bokonzi oyo. Sima na bango, mokonzi mosusu akobima, akokesana na bakonzi ya liboso mpe akokweyisa bakonzi misato;
ומלין לצד עליא (עלאה) ימלל ולקדישי עליונין יבלא ויסבר להשניה זמנין ודת ויתיהבון בידה עד עדן ועדנין ופלג עדן 25
akotiola na maloba na ye Ye-Oyo-Aleki-Likolo, akonyokola basantu na Ye, akomeka ata kobongola manaka ya bafeti oyo ekatama mpe mibeko. Basantu bakozala na se ya bokonzi na ye mibu misato na ndambo.
ודינא יתב ושלטנה יהעדון להשמדה ולהובדה עד סופא 26
Kasi bato ya mibeko bakovanda lisanga mpe bakobotola ye bokonzi, mpe bokonzi yango ekokufa mpe ekolimwa libela.
ומלכותא ושלטנא ורבותא די מלכות תחות כל שמיא יהיבת לעם קדישי עליונין מלכותה מלכות עלם וכל שלטניא לה יפלחון וישתמעון 27
Kasi bokonzi, nguya mpe lokumu ya bikolo oyo ezali na se ya moyi ekopesama na ekolo ya basantu ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo. Bokonzi ya ekolo yango ekowumela seko na seko, mpe bakonzi ya bikolo nyonso ya mokili bakosalela mpe bakotosa ekolo yango.
עד כה סופא די מלתא אנה דניאל שגיא רעיוני יבהלנני וזיוי ישתנון עלי ומלתא בלבי נטרת 28
Lisolo ya ndoto na ngai esuki awa. Ngai, Daniele, namitungisaki mingi kati na motema na ngai, elongi na ngai ebebaki na somo mpe nabombaki makambo oyo kati na motema na ngai.

< דניאל 7 >