< שמואל ב 3 >
ותהי המלחמה ארכה בין בית שאול ובין בית דוד ודוד הלך וחזק ובית שאול הלכים ודלים | 1 |
Bitumba kati na libota ya Saulo mpe libota ya Davidi ewumelaki tango molayi. Wana makasi ya Davidi ezalaki komata se komata, makasi ya libota ya Saulo ezalaki kaka kokita.
וילדו (ויולדו) לדוד בנים בחברון ויהי בכורו אמנון לאחינעם היזרעאלת | 2 |
Tala bana mibali ya Davidi oyo babotamaki na Ebron: Mwana ya liboso ezalaki Aminoni oyo Ayinoami, moto ya Jizireyeli, abotelaki ye;
ומשנהו כלאב לאביגל (לאביגיל) אשת נבל הכרמלי והשלשי אבשלום בן מעכה בת תלמי מלך גשור | 3 |
ya mibale, Kileabi oyo Abigayili oyo akufisaki mobali na ye ya liboso, Nabali, moto ya Karimeli, abotelaki ye; ya misato, Abisalomi oyo Maaka, mwana ya Talimayi, mokonzi ya Geshuri, abotelaki ye;
והרביעי אדניה בן חגית והחמישי שפטיה בן אביטל | 4 |
ya minei, Adoniya oyo Agite abotelaki ye; ya mitano, Shefatia oyo Abitali abotelaki ye;
והששי יתרעם לעגלה אשת דוד אלה ילדו לדוד בחברון | 5 |
ya motoba, Yitileami oyo Egila, mwasi ya Davidi, abotelaki ye. Bango nde bana mibali ya Davidi oyo babotamaki na Ebron.
ויהי בהיות המלחמה בין בית שאול ובין בית דוד ואבנר היה מתחזק בבית שאול | 6 |
Na tango ya bitumba kati na mabota ya Saulo mpe ya Davidi, Abineri azalaki kolendisa nguya na ye kati na ndako ya Saulo.
ולשאול פלגש ושמה רצפה בת איה ויאמר אל אבנר מדוע באתה אל פילגש אבי | 7 |
Nzokande, Saulo azalaki na makangu moko; kombo na ye ezalaki « Ritsipa, » mwana mwasi ya Aya. Bongo Ishi-Bosheti alobaki na Abineri: — Mpo na nini osangisi nzoto na makangu ya tata na ngai?
ויחר לאבנר מאד על דברי איש בשת ויאמר הראש כלב אנכי אשר ליהודה היום אעשה חסד עם בית שאול אביך אל אחיו ואל מרעהו ולא המציתך ביד דוד ותפקד עלי עון האשה היום | 8 |
Tango Abineri ayokaki makambo oyo Ishi-Bosheti alobaki, asilikaki makasi mpe azongisaki: — Boni! Ngai nazali moto ya mbwa na ngambo ya bato ya Yuda? Ngai oyo, na mokolo ya lelo, nazali kosalela bosembo epai ya libota ya Saulo, tata na yo, epai ya bandeko na ye mpe epai ya baninga na ye; ngai oyo nakabaki yo te na maboko ya Davidi, ngai nde sik’oyo ozali kofunda ete nasali mabe na tina na mwasi oyo!
כה יעשה אלהים לאבנר וכה יסיף לו כי כאשר נשבע יהוה לדוד--כי כן אעשה לו | 9 |
Tika ete Nzambe apesa ngai Abineri etumbu ya makasi soki nasali te mpo na Davidi makambo oyo Yawe alakaki ye, na nzela ya ndayi,
להעביר הממלכה מבית שאול ולהקים את כסא דוד על ישראל ועל יהודה--מדן ועד באר שבע | 10 |
ete akolongola bokonzi na ndako ya Saulo mpe akotia kiti ya bokonzi ya Davidi kati na Isalaele mpe kati na Yuda, longwa na Dani kino na Beri-Sheba.
ולא יכל עוד להשיב את אבנר דבר מיראתו אתו | 11 |
Ishi-Bosheti akokaki kozongisa ata liloba moko te epai ya Abineri, pamba te azalaki kobanga ye.
וישלח אבנר מלאכים אל דוד תחתו לאמר למי ארץ לאמר כרתה בריתך אתי והנה ידי עמך להסב אליך את כל ישראל | 12 |
Abineri atindaki bantoma koloba na Davidi: — Mokili oyo ezali ya nani? Sala boyokani elongo na ngai, bongo ngai nakosunga yo mpo na kosangisa Isalaele mobimba epai na yo.
ויאמר טוב--אני אכרת אתך ברית אך דבר אחד אנכי שאל מאתך לאמר לא תראה את פני--כי אם לפני הביאך את מיכל בת שאול בבאך לראות את פני | 13 |
Davidi azongisaki: — Malamu! Nandimi kosala boyokani elongo na yo, kasi nasengi yo eloko moko: koya liboso na ngai te soki otindeli ngai nanu te Mikali, mwana mwasi ya Saulo, tango okoya kokutana na ngai.
וישלח דוד מלאכים אל איש בשת בן שאול לאמר תנה את אשתי את מיכל אשר ארשתי לי במאה ערלות פלשתים | 14 |
Bongo Davidi atindaki bantoma koloba na Ishi-Bosheti, mwana mobali ya Saulo: — Pesa ngai mwasi na ngai, Mikali, oyo nabalaki ngai moko na motuya ya bangenga nkama moko ya bato ya Filisitia.
וישלח איש בשת ויקחה מעם איש--מעם פלטיאל בן לוש (ליש) | 15 |
Boye Ishi-Bosheti atindaki bato kozwa Mikali epai ya mobali na ye, Palitieli, mwana mobali ya Laishi.
וילך אתה אישה הלוך ובכה אחריה--עד בחרים ויאמר אליו אבנר לך שוב וישב | 16 |
Mobali na ye alandaki ye na kolela kino na Bawurimi. Kasi Abineri alobaki na mobali yango: — Zonga na ndako na yo. Mpe mobali azongaki.
ודבר אבנר היה עם זקני ישראל לאמר גם תמול גם שלשם הייתם מבקשים את דוד למלך עליכם | 17 |
Abineri asololaki na bampaka ya Isalaele mpe alobaki na bango: — Lokola wuta kala bolingaka ete Davidi akoma mokonzi na bino,
ועתה עשו כי יהוה אמר אל דוד לאמר ביד דוד עבדי הושיע את עמי ישראל מיד פלשתים ומיד כל איביהם | 18 |
bosala yango sik’oyo; pamba te Yawe alobaki boye na tina na ye: « Ezali na nzela ya Davidi, mosali na ngai, nde nakobikisa bato na Ngai, Isalaele, na maboko ya bato ya Filisitia mpe ya banguna na bango nyonso. »
וידבר גם אבנר באזני בנימין וילך גם אבנר לדבר באזני דוד בחברון את כל אשר טוב בעיני ישראל ובעיני כל בית בנימן | 19 |
Sima na Abineri koloba likambo yango epai ya bato ya libota ya Benjame, akendeki na Ebron mpo na koyebisa Davidi makambo nyonso oyo bato ya Isalaele mpe libota mobimba ya Benjame babongisaki.
ויבא אבנר אל דוד חברון ואתו עשרים אנשים ויעש דוד לאבנר ולאנשים אשר אתו משתה | 20 |
Mpe tango Abineri elongo na bato na ye, tuku mibale, bakomaki epai ya Davidi, na Ebron, Davidi asaliselaki bango feti.
ויאמר אבנר אל דוד אקומה ואלכה ואקבצה אל אדני המלך את כל ישראל ויכרתו אתך ברית ומלכת בכל אשר תאוה נפשך וישלח דוד את אבנר וילך בשלום | 21 |
Abineri alobaki na Davidi: — Na ndingisa na yo mokonzi, nkolo na ngai, nalingi kokende sik’oyo kosangisela yo bato nyonso ya Isalaele mpo ete basala boyokani elongo na yo; mpe na bongo, yo okokonza na bisika nyonso oyo olingi. Davidi atikaki Abineri kokende, mpe Abineri azongaki na kimia.
והנה עבדי דוד ויואב בא מהגדוד ושלל רב עמם הביאו ואבנר איננו עם דוד בחברון--כי שלחו וילך בשלום | 22 |
Sima na mwa tango, basali ya Davidi mpe Joabi bazongaki wuta na bitumba mpe bamemaki bomengo ebele ya bitumba. Abineri azalaki lisusu na Ebron te, epai ya Davidi, pamba te Davidi asilaki kotika ye kokende, mpe azongaki na kimia.
ויואב וכל הצבא אשר אתו באו ויגדו ליואב לאמר בא אבנר בן נר אל המלך וישלחהו וילך בשלום | 23 |
Tango kaka Joabi mpe basoda na ye nyonso bakomaki, bayebisaki Joabi: — Abineri, mwana mobali ya Neri, ayaki epai ya mokonzi; bongo mokonzi atikaki ye kokende, mpe azongaki na kimia.
ויבא יואב אל המלך ויאמר מה עשיתה הנה בא אבנר אליך למה זה שלחתו וילך הלוך | 24 |
Joabi akendeki komona mokonzi mpe alobaki na ye: — Eloko nini oyo osali? Mpo na nini otikaki penza Abineri oyo ayaki epai na yo kokende? Mpe tala sik’oyo, akei!
ידעת את אבנר בן נר כי לפתתך בא ולדעת את מוצאך ואת מבואך (מובאך) ולדעת את כל אשר אתה עשה | 25 |
Nzokande oyebi malamu Abineri, mwana mobali ya Neri! Soki ayaki epai na yo, ezalaki nde mpo na kokosa yo, mpo na kononga mpe koluka koyeba bisika nyonso oyo otambolaka mpe makambo nyonso oyo osalaka.
ויצא יואב מעם דוד וישלח מלאכים אחרי אבנר וישבו אתו מבור הסרה ודוד לא ידע | 26 |
Sima na Joabi kowuta na ndako ya Davidi, atindaki bantoma mpo ete balanda mpe bakanga Abineri. Mpe wana Davidi ayebaki te, bantoma bazongisaki Abineri wuta na libulu ya mayi ya Sira.
וישב אבנר חברון ויטהו יואב אל תוך השער לדבר אתו בשלי ויכהו שם החמש--וימת בדם עשהאל אחיו | 27 |
Tango Abineri azongaki lisusu na Ebron, Joabi abendaki ye na pembeni, na kati-kati ya ekuke ya engumba lokola nde alingi kosolola na ye na nkuku. Mpe kuna, mpo na kozongisa mabe na mabe na tina na makila ya ndeko na ye ya mobali Asaeli, Joabi atubaki Abineri mbeli na libumu, mpe Abineri akufaki.
וישמע דוד מאחרי כן ויאמר נקי אנכי וממלכתי מעם יהוה עד עולם--מדמי אבנר בן נר | 28 |
Sima na yango, tango kaka Davidi ayokaki sango ya makambo oyo ewutaki kosalema, alobaki: — Na miso ya Yawe, ngai mpe bokonzi na ngai tozali na ngambo te mpo na libela na tina na makila ya Abineri, mwana mobali ya Neri.
יחלו על ראש יואב ואל כל בית אביו ואל יכרת מבית יואב זב ומצרע ומחזיק בפלך ונפל בחרב--וחסר לחם | 29 |
Tika ete makila na ye etangama na moto ya Joabi mpe ya libota na ye mobimba! Tika ete ndako ya Joabi ezangaka te bato oyo bakobela bokono ya sopisi to bokono ya maba to bato oyo bakotambola na banzete to bato oyo bakokufa na mopanga to bato oyo bakozanga bilei.
ויואב ואבישי אחיו הרגו לאבנר על אשר המית את עשהאל אחיהם בגבעון--במלחמה | 30 |
Joabi mpe ndeko na ye ya mobali, Abishayi, babomaki Abineri mpo ete abomaki Asaeli, ndeko na bango ya mobali, na bitumba ya Gabaoni.
ויאמר דוד אל יואב ואל כל העם אשר אתו קרעו בגדיכם וחגרו שקים וספדו לפני אבנר והמלך דוד הלך אחרי המטה | 31 |
Bongo Davidi alobaki na Joabi mpe na bato nyonso oyo bazalaki elongo na ye: — Bopasola bilamba na bino mpe bolata basaki, bosala matanga liboso ya Abineri. Ye moko mokonzi Davidi atambolaki na sima ya ebembe.
ויקברו את אבנר בחברון וישא המלך את קולו ויבך אל קבר אבנר ויבכו כל העם | 32 |
Bakundaki Abineri, na Ebron, mpe mokonzi alelaki makasi na likolo ya kunda ya Abineri. Bato nyonso mpe balelaki.
ויקנן המלך אל אבנר ויאמר הכמות נבל ימות אבנר | 33 |
Bongo mokonzi ayembaki nzembo oyo ya mawa mpo na Abineri: « Esengelaki ete Abineri akufa penza lokola zoba?
ידך לא אסרות ורגליך לא לנחשתים הגשו כנפול לפני בני עולה נפלת ויספו כל העם לבכות עליו | 34 |
Bakangaki te maboko na yo na basinga, bakangaki te makolo na yo na basheni. Kasi okweyi ndenge bakweyaka liboso ya babomi. » Mpe bato nyonso balelaki ye lisusu makasi
ויבא כל העם להברות את דוד לחם--בעוד היום וישבע דוד לאמר כה יעשה לי אלהים וכה יסיף כי אם לפני בוא השמש אטעם לחם או כל מאומה | 35 |
mpe basengaki na Davidi ete alia wana moyi ezali nanu. Kasi Davidi alapaki ndayi na maloba oyo: « Tika ete Nzambe apesa ngai etumbu oyo eleki makasi soki nameki kolia mapa to eloko mosusu liboso ete moyi elala! »
וכל העם הכירו וייטב בעיניהם ככל אשר עשה המלך בעיני כל העם טוב | 36 |
Bato nyonso bayokaki ndayi yango mpe basepelaki na yango: bazalaki kosepela na makambo nyonso oyo mokonzi azalaki kosala.
וידעו כל העם וכל ישראל ביום ההוא כי לא היתה מהמלך להמית את אבנר בן נר | 37 |
Mpe na mokolo wana, basoda nyonso ya Isalaele mpe Isalaele mobimba bandimaki ete mokonzi ayebaki ata likambo moko te na tina na kufa ya Abineri, mwana mobali ya Neri.
ויאמר המלך אל עבדיו הלוא תדעו--כי שר וגדול נפל היום הזה בישראל | 38 |
Mokonzi alobaki na basali na ye: « Boni, boyebi na bino ete mokambi moko mpe moto moko ya monene akweyi lelo kati na Isalaele?
ואנכי היום רך ומשוח מלך והאנשים האלה בני צרויה קשים ממני ישלם יהוה לעשה הרעה כרעתו | 39 |
Na mokolo ya lelo, atako bapakola ngai mafuta lokola mokonzi, nazali na makasi te, mpe bana mibali oyo ya Tseruya baleki ngai na makasi. Tika ete Yawe apesa etumbu na moto oyo asali mabe oyo kolanda mabe na ye! »