< דברי הימים ב 32 >
אחרי הדברים והאמת האלה בא סנחריב מלך אשור ויבא ביהודה ויחן על הערים הבצרות ויאמר לבקעם אליו | 1 |
Sima na Ezekiasi kotalisa boyengebene na ye epai ya Nzambe, Senakeribe, mokonzi ya Asiri, ayaki kobundisa Yuda. Azingelaki bingumba batonga makasi, pamba te azalaki na posa ya kobotola yango.
וירא יחזקיהו כי בא סנחריב ופניו למלחמה על ירושלם | 2 |
Tango Ezekiasi amonaki ete Senakeribe ayei mpe azali na makanisi ya kobundisa Yelusalemi,
ויועץ עם שריו וגבריו לסתום את מימי העינות אשר מחוץ לעיר ויעזרוהו | 3 |
apesaki bakalaka mpe bakonzi ya basoda na ye likanisi ya kokanga bitima oyo ezalaki na libanda ya engumba. Bango nyonso bandimaki likanisi yango mpe basungaki ye.
ויקבצו עם רב--ויסתמו את כל המעינות ואת הנחל השוטף בתוך הארץ לאמר למה יבואו מלכי אשור ומצאו מים רבים | 4 |
Bato ebele basanganaki mpe bakangaki bitima nyonso elongo na mayi oyo ezalaki kotiola na se ya mabele. Balobaki: — Mpo na nini bakonzi ya Asiri baya kokuta mayi ebele?
ויתחזק ויבן את כל החומה הפרוצה ויעל על המגדלות ולחוצה החומה אחרת ויחזק את המלוא עיר דויד ויעש שלח לרב ומגנים | 5 |
Ezekiasi asalaki mosala makasi ya kobamba madusu ya mir mpe ya kobakisa bosanda ya bandako milayi; atongaki mir mosusu na libanda, alendisaki mir ya engumba ya Davidi mpe asalaki lisusu makonga mpe banguba ebele.
ויתן שרי מלחמות על העם ויקבצם אליו אל רחוב שער העיר וידבר על לבבם לאמר | 6 |
Atiaki bakonzi ya basoda mpo ete bakamba bato mpe asangisaki bango liboso na ye, na esika oyo ezali pene ya ekuke ya engumba. Alendisaki bango na maloba oyo:
חזקו ואמצו--אל תיראו ואל תחתו מפני מלך אשור ומלפני כל ההמון אשר עמו כי עמנו רב מעמו | 7 |
— Bozala makasi mpe boyika mpiko! Bobanga te mpe bolenga te liboso ya mokonzi ya Asiri mpe ya mampinga ya basoda ebele oyo bazali elongo na ye, pamba te Ye oyo azali elongo na biso azali na nguya monene koleka ye.
עמו זרוע בשר ועמנו יהוה אלהינו לעזרנו ולהלחם מלחמתנו ויסמכו העם על דברי יחזקיהו מלך יהודה | 8 |
Mokonzi oyo ya Asiri azali kaka na nguya ya bomoto; kasi biso, tozali elongo na Yawe, Nzambe na biso, oyo akosunga mpe akobundela biso bitumba. Boye bato batiaki elikya na maloba oyo Ezekiasi, mokonzi ya Yuda, alobaki.
אחר זה שלח סנחריב מלך אשור עבדיו ירושלימה והוא על לכיש וכל ממשלתו עמו--על יחזקיהו מלך יהודה ועל כל יהודה אשר בירושלם לאמר | 9 |
Sima na yango, wana Senakeribe, mokonzi ya Asiri, elongo na mampinga ya basoda na ye nyonso bazingelaki engumba Lakishi, atindaki bakonzi ya basoda na ye epai ya Ezekiasi, mokonzi ya Yuda, mpe epai ya bato nyonso ya Yuda, oyo bazalaki na Yelusalemi; atindaki bango kopesa sango oyo:
כה אמר סנחריב מלך אשור על מה אתם בטחים וישבים במצור בירושלם | 10 |
« Tala makambo oyo Senakeribe, mokonzi ya Asiri, alobi: Botie elikya na bino na nini mpo ete bowumela kati na Yelusalemi oyo bazingeli?
הלא יחזקיהו מסית אתכם לתת אתכם למות ברעב ובצמא לאמר יהוה אלהינו--יצילנו מכף מלך אשור | 11 |
Bozali komona te ete Ezekiasi azali kokosa bino mpo ete bokufa na nzala mpe na posa ya mayi tango azali koloba: ‹ Yawe, Nzambe na biso, akokangola biso na loboko ya mokonzi ya Asiri? ›
הלא הוא יחזקיהו הסיר את במתיו ואת מזבחתיו ויאמר ליהודה ולירושלם לאמר לפני מזבח אחד תשתחוו ועליו תקטירו | 12 |
Boni, ezali kaka Ezekiasi wana te oyo alongolaki bisambelo ya likolo ya bangomba mpe bitumbelo ya banzambe tango alobaki na Yuda mpe na Yelusalemi: ‹ Bosengeli kogumbama liboso ya etumbelo moko kaka mpe kobonza mbeka ya malasi na likolo ya etumbelo yango? ›
הלא תדעו מה עשיתי אני ואבותי לכל עמי הארצות היכול יכלו אלהי גוי הארצות להציל את ארצם מידי | 13 |
Boyebi te makambo oyo ngai mpe batata na ngai tosalaki bato nyonso ya bikolo mosusu? Boni, banzambe ya bikolo wana bakokaki solo kokangola mikili na bango na maboko na ngai?
מי בכל אלהי הגוים האלה אשר החרימו אבותי אשר יכול להציל את עמו מידי כי יוכל אלהיכם להציל אתכם מידי | 14 |
Kati na banzambe nyonso ya bikolo oyo batata na ngai babebisaki, nani akokaki kokangola bato na ye na maboko na ngai? Bongo ndenge nini Nzambe na bino akoka solo kokangola bino na maboko na ngai?
ועתה אל ישיא אתכם חזקיהו ואל יסית אתכם כזאת ואל תאמינו לו--כי לא יוכל כל אלוה כל גוי וממלכה להציל עמו מידי ומיד אבותי אף כי אלהיכם לא יצילו אתכם מידי | 15 |
Sik’oyo, botika te ete Ezekiasi amema bino na libunga mpe akosa bino ndenge wana; bondimela ye te! Pamba te soki nzambe moko te ya ekolo songolo to ya mokili pakala alongaki kokangola bato na ye na loboko na ngai mpe na loboko ya batata na ngai, bongo nzambe na bino nde akolonga kokangola bino na loboko na ngai? »
ועוד דברו עבדיו על יהוה האלהים ועל יחזקיהו עבדו | 16 |
Bakonzi ya basoda ya Senakeribe bakobaki koloba mabe na tina na Yawe Nzambe mpe Ezekiasi, mosali na Ye.
וספרים כתב--לחרף ליהוה אלהי ישראל ולאמר עליו לאמר כאלהי גויי הארצות אשר לא הצילו עמם מידי--כן לא יציל אלהי יחזקיהו עמו מידי | 17 |
Senakeribe akomaki lisusu mikanda mpo na kofinga Yawe, Nzambe ya Isalaele. Tala maloba mabe oyo akomaki na tina na Ye: « Ndenge banzambe ya bato ya bikolo mosusu balongaki te kokangola bato na bango, ndenge wana mpe nzambe ya Ezekiasi akolonga te kokangola bato na ye na maboko na ngai. »
ויקראו בקול גדול יהודית על עם ירושלם אשר על החומה ליראם ולבהלם--למען ילכדו את העיר | 18 |
Boye bagangaki na lokota ya Ebre mpo na kolengisa mpe kobangisa bato ya Yelusalemi oyo batelemaki likolo ya mir, mpo ete bakoka kobotola engumba.
וידברו אל אלהי ירושלם כעל אלהי עמי הארץ--מעשה ידי האדם | 19 |
Balobaki na tina na Nzambe ya Yelusalemi lokola bato oyo bazali kolobela nzambe moko ya bapagano, nzambe oyo bato basali na ndenge mpe na maboko na bango!
ויתפלל יחזקיהו המלך וישעיהו בן אמוץ הנביא--על זאת ויזעקו השמים | 20 |
Mokonzi Ezekiasi mpe mosakoli Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, babondelaki Nzambe na tina na yango mpe bagangaki na ngambo ya Lola mpo na kosenga lisungi.
וישלח יהוה מלאך ויכחד כל גבור חיל ונגיד ושר במחנה מלך אשור וישב בבשת פנים לארצו ויבא בית אלהיו ומיציאו (ומיציאי) מעיו שם הפילהו בחרב | 21 |
Yawe atindaki anjelu moko oyo abomaki basoda nyonso ya mpiko, bakonzi ya basoda elongo na bakambi kati molako ya mokonzi ya Asiri. Mokonzi ya Asiri azongaki na mokili na ye na soni makasi. Mpe tango akotaki na ndako ya nzambe na ye, bana na ye ya mibali babomaki ye na mopanga.
ויושע יהוה את יחזקיהו ואת ישבי ירושלם מיד סנחריב מלך אשור--ומיד כל וינהלם מסביב | 22 |
Ezalaki ndenge wana nde Yawe akangolaki Ezekiasi mpe bato ya Yelusalemi na maboko ya Senakeribe, mokonzi ya Asiri, mpe na maboko ya banguna mosusu; mpe apesaki bango kimia na bangambo nyonso.
ורבים מביאים מנחה ליהוה לירושלם ומגדנות ליחזקיהו מלך יהודה וינשא לעיני כל הגוים מאחרי כן | 23 |
Bato ebele bamemaki na Yelusalemi makabo mpo na Yawe mpe bakado ya motuya mpo na Ezekiasi, mokonzi ya Yuda. Wuta tango wana, lokumu ya Ezekiasi emataki makasi na miso ya bikolo nyonso.
בימים ההם חלה יחזקיהו עד למות ויתפלל אל יהוה ויאמר לו ומופת נתן לו | 24 |
Na tango wana, Ezekiasi abelaki bokono moko ya makasi, pene akufa. Asambelaki Yawe; mpe Yawe ayanolaki, apesaki ye elembo moko ya kokamwa.
ולא כגמל עליו השיב יחזקיהו כי גבה לבו ויהי עליו קצף ועל יהודה וירושלם | 25 |
Kasi mpo ete Ezekiasi akomaki na lolendo, atambolaki lisusu te na lolenge ya kondima bolamu ya Nzambe mpe ya kozongisela Ye matondi; mpo na yango, Yawe asilikelaki ye, Yuda mpe Yelusalemi.
ויכנע יחזקיהו בגבה לבו הוא ויושבי ירושלם ולא בא עליהם קצף יהוה בימי יחזקיהו | 26 |
Bongo Ezekiasi amikitisaki, atikaki lolendo na ye mpe abongolaki motema. Bato ya Yelusalemi mpe basalaki lokola Ezekiasi. Boye, Yawe akweyiselaki bango kanda na Ye te na mikolo nyonso oyo Ezekiasi azalaki mokonzi.
ויהי ליחזקיהו עשר וכבוד הרבה מאד ואצרות עשה לו לכסף ולזהב ולאבן יקרה ולבשמים ולמגנים ולכל כלי חמדה | 27 |
Ezekiasi azalaki na bozwi ebele mpe na lokumu mingi, abombaki palata, wolo, mabanga ya talo, biloko ya solo kitoko, banguba mpe biloko nyonso ya talo.
ומסכנות--לתבואת דגן ותירוש ויצהר וארות לכל בהמה ובהמה ועדרים לאורת | 28 |
Atongaki bibombelo ya ble, ya vino ya sika mpe ya mafuta; atongaki lisusu mapango mpe bandako mpo na bibwele na ye.
וערים עשה לו ומקנה צאן ובקר לרב כי נתן לו אלהים רכוש רב מאד | 29 |
Atongaki bingumba mpe akomaki na bibwele ebele: bantaba, bameme mpe bangombe. Nzambe apesaki ye bozwi mingi.
והוא יחזקיהו סתם את מוצא מימי גיחון העליון ויישרם למטה מערבה לעיר דויד ויצלח יחזקיהו בכל מעשהו | 30 |
Ezali mpe Ezekiasi moto akangaki monoko ya etima ya Giyoni mpe alekisaki mayi na yango na se ya mabele, na ngambo ya weste ya engumba ya Davidi. Ezekiasi azalaki kolonga na misala na ye nyonso.
וכן במליצי שרי בבל המשלחים עליו לדרש המופת אשר היה בארץ עזבו האלהים--לנסותו לדעת כל בלבבו | 31 |
Kasi tango bakambi ya Babiloni batindelaki ye bakalaka mpo na kotuna ye na tina na elembo ya kokamwa oyo esalemaki kati na mokili, Nzambe atikaki Ezekiasi kosala na ndenge na ye moko mpo na komeka ye mpe koyeba mozindo ya motema na ye.
ויתר דברי יחזקיהו וחסדיו--הנם כתובים בחזון ישעיהו בן אמוץ הנביא על ספר מלכי יהודה וישראל | 32 |
Makambo mosusu oyo etali Ezekiasi elongo na misala ya botosi na ye kati na makambo ya Nzambe, ekomama kati na emoniseli ya mosakoli Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, mpe kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda mpe ya Isalaele.
וישכב יחזקיהו עם אבתיו ויקברהו במעלה קברי בני דויד וכבוד עשו לו במותו כל יהודה וישבי ירושלם וימלך מנשה בנו תחתיו | 33 |
Ezekiasi akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye na ngomba moke epai wapi bakunda ya bakitani ya Davidi ezali. Bato nyonso ya Yuda mpe ya Yelusalemi bapesaki ye lokumu tango akufaki, mpe Manase, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.