< דברי הימים א 5 >

ובני ראובן בכור ישראל כי הוא הבכור--ובחללו יצועי אביו נתנה בכרתו לבני יוסף בן ישראל ולא להתיחש לבכרה 1
Ribeni azalaki mwana mobali ya liboso ya Isalaele. Kasi lokola asangisaki nzoto na mwasi moko kati na basi ya tata na ye, makoki ya bomwana na ye ya liboso epesamaki epai ya bana mibali ya Jozefi, mwana mobali ya Isalaele. Yango wana bazalaki kotanga ye lisusu te lokola mwana ya liboso. Nzokande, Jozefi akomamaki te na buku ya mabota lokola mwana ya liboso.
כי יהודה גבר באחיו ולנגיד ממנו והבכרה ליוסף 2
Yuda alekaki bandeko na ye nyonso ya mibali na makasi, mpe moto oyo akomaki mokonzi abimaki na nzela na ye. Kasi atako bongo, makoki ya bomwana ya liboso epesamaki kaka epai ya Jozefi.
בני ראובן בכור ישראל חנוך ופלוא חצרון וכרמי 3
Tala bana mibali ya Ribeni, mwana mobali ya liboso ya Isalaele: Enoki, Palu, Etsironi mpe Karimi.
בני יואל--שמעיה בנו גוג בנו שמעי בנו 4
Bakitani ya Joeli: Shemaya, mwana mobali ya Joeli; Gogi, mwana mobali ya Shemaya; Shimei, mwana mobali ya Gogi;
מיכה בנו ראיה בנו בעל בנו 5
Mishe, mwana mobali ya Shimei; Reaya, mwana mobali ya Mishe; Bala, mwana mobali ya Reaya;
בארה בנו--אשר הגלה תלגת פלנאסר מלך אשר הוא נשיא לראובני 6
Beera, mwana mobali ya Bala mpe mokambi ya bato ya Ribeni, oyo Tigilati-Pilezeri, mokonzi ya Asiri, amemaki na bowumbu.
ואחיו למשפחתיו בהתיחש לתלדותם--הראש יעיאל וזכריהו 7
Tala bandeko ya Beera kolanda etuka na bango ndenge bakomami na molongo ya botata na bango: mokambi Yeyeli, Zakari;
ובלע בן עזז בן שמע בן יואל הוא יושב בערער ועד נבו ובעל מעון 8
Bela, mwana mobali ya Azazi, koko ya Shema, mwana mobali ya Joeli. Bazalaki kovanda na mboka Aroeri mpe na etuka oyo ekenda kino na ngomba Nebo mpe na Bala-Meoni.
ולמזרח ישב עד לבוא מדברה למן הנהר פרת כי מקניהם רבו בארץ גלעד 9
Bavandaki na ngambo ya este, longwa na mondelo ya esobe kino na ebale Efrate, pamba te bangombe na bango ekomaki ebele kati na mokili ya Galadi.
ובימי שאול עשו מלחמה עם ההגראים ויפלו בידם וישבו באהליהם על כל פני מזרח לגלעד 10
Na tango Saulo azalaki mokonzi, babundisaki bato ya Agari mpe balongaki bango. Bavandaki na bandako na bango ya kapo oyo ezalaki na etuka mobimba ya ngambo ya Galadi.
ובני גד לנגדם ישבו בארץ הבשן--עד סלכה 11
Bakitani ya Gadi bazalaki kovanda pembeni ya bakitani ya Ribeni, na mokili ya Bashani kino na Salika.
יואל הראש ושפם המשנה ויעני ושפט בבשן 12
Etuka ya Joeli nde elekaki monene, elandamaki na etuka ya Shafami, mpe bituka ya Yaenayi mpe Shafati esukisaki, kati na Bashani.
ואחיהם לבית אבותיהם מיכאל ומשלם ושבע ויורי ויעכן וזיע ועבר--שבעה 13
Bandeko na bango ya mibali kolanda mabota na bango bazalaki: Mikaeli, Meshulami, Sheba, Yorayi, Yaekani, Ziya mpe Eberi. Bango nyonso bazalaki sambo.
אלה בני אביחיל בן חורי בן ירוח בן גלעד בן מיכאל בן ישישי בן יחדו--בן בוז 14
Bazalaki bana ya Abiyaili, mwana mobali ya Uri, mwana mobali ya Yaroa, mwana mobali ya Galadi, mwana mobali Mikaeli, mwana mobali ya Yeshishai, mwana mobali ya Yado, mwana mobali ya Buzi.
אחי בן עבדיאל בן גוני ראש לבית אבותם 15
Ayi, mwana mobali ya Abidieli, mwana mobali ya Guni, azalaki mokambi ya bituka na bango.
וישבו בגלעד בבשן ובבנתיה ובכל מגרשי שרון על תוצאותם 16
Bango nyonso bazalaki kovanda na Galadi, na Bashani, na bamboka na yango ya zingazinga mpe na bilanga nyonso ya Saroni kino na suka na yango.
כלם התיחשו בימי יותם מלך יהודה--ובימי ירבעם מלך ישראל 17
Batangaki bato nyonso oyo tango Yotami azalaki mokonzi ya Yuda mpe Jeroboami, mokonzi ya Isalaele.
בני ראובן וגדי וחצי שבט מנשה מן בני חיל אנשים נשאי מגן וחרב ודרכי קשת ולמודי מלחמה--ארבעים וארבעה אלף ושבע מאות וששים יצאי צבא 18
Bakitani ya mabota ya Ribeni, ya Gadi mpe ya ndambo ya libota ya Manase bazalaki bango nyonso nkoto tuku minei na minei na nkama sambo na tuku motoba. Babongamaki mpo na mosala ya soda. Bazalaki bilombe mibali oyo bayebi kosalela nguba, mopanga, tolotolo; mpe bamilengela mpo na bitumba.
ויעשו מלחמה עם ההגריאים ויטור ונפיש ונודב 19
Babundisaki bato ya Agari, ya Yeturi, ya Nafishi mpe ya Nodabi.
ויעזרו עליהם--וינתנו בידם ההגריאים וכל שעמהם כי לאלהים זעקו במלחמה ונעתור להם כי בטחו בו 20
Nzambe asungaki bango mpe apesaki bango elonga likolo ya bato ya Agari mpe baninga na bango nyonso oyo bayaki kosunga bango, pamba te babelelaki Yawe na tango ya bitumba. Yawe ayanolaki bango, pamba te batielaki Ye motema.
וישבו מקניהם גמליהם חמשים אלף וצאן מאתים וחמשים אלף וחמורים אלפים ונפש אדם מאה אלף 21
Bazwaki bibwele ya bato ya Agari: bashamo nkoto tuku mitano, bameme nkoto nkama mibale na tuku mitano, mpe ba-ane nkoto mibale. Bazwaki mpe bakangami nkoto nkama moko:
כי חללים רבים נפלו כי מהאלהים המלחמה וישבו תחתיהם עד הגלה 22
mingi bakufaki, pamba te bitumba ezalaki na maboko ya Nzambe. Bavandaki na mokili yango kino na tango ya bowumbu.
ובני חצי שבט מנשה ישבו בארץ מבשן עד בעל חרמון ושניר והר חרמון--המה רבו 23
Bakitani ya ndambo ya libota ya Manase bavandaki na mokili oyo ezalaki longwa na Bashani kino na Bala-Erimoni, Seniri mpe ngomba Erimoni.
ואלה ראשי בית אבותם ועפר וישעי ואליאל ועזריאל וירמיה והודויה ויחדיאל אנשים גבורי חיל--אנשי שמות ראשים לבית אבותם 24
Tala bakambi ya bituka na bango: Eferi, Yisheyi, Elieli, Azirieli, Jeremi, Odavia mpe Yadiele. Bazalaki bilombe ya bitumba, bato bayebana mpe bakambi ya mabota na bango.
וימעלו באלהי אבתיהם ויזנו אחרי אלהי עמי הארץ אשר השמיד אלהים מפניהם 25
Kasi lokola batosaki te Nzambe ya bakoko na bango mpe bakomaki kosalela banzambe ya bato ya mokili oyo Nzambe abebisaki liboso na bango.
ויער אלהי ישראל את רוח פול מלך אשור ואת רוח תלגת פלנסר מלך אשור ויגלם לראובני ולגדי ולחצי שבט מנשה ויביאם לחלח וחבור והרא ונהר גוזן עד היום הזה 26
Yango wana Nzambe ya Isalaele alamusaki molimo ya Puli, mokonzi ya Asiri, mpe molimo ya Tigilati-Pilezeri, mokonzi ya Asiri, mpo na komema na bowumbu: bato ya libota ya Ribeni, ya libota ya Gadi mpe ya ndambo ya libota ya Manase. Amemaki bango na Ala, na Abori, na Ara mpe na ngambo ya ebale Gozani, epai wapi bazali kovanda kino lelo.

< דברי הימים א 5 >