< Προς Κορινθιους Α΄ 10 >

1 Οὐ θέλω δὲ ὑμᾶς ἀγνοεῖν, ἀδελφοί, ὅτι οἱ πατέρες ἡμῶν πάντες ὑπὸ τὴν νεφέλην ἦσαν, καὶ πάντες διὰ τῆς θαλάσσης διῆλθον,
Bandeko, nalingi boyeba malamu likambo oyo: Bakoko na biso bazalaki bango nyonso na se ya lipata, bakatisaki bango nyonso ebale monene,
2 καὶ πάντες εἰς τὸν Μωϋσῆν ἐβαπτίσαντο ἐν τῇ νεφέλῃ καὶ ἐν τῇ θαλάσσῃ,
babatisamaki bango nyonso mpo na Moyize kati na lipata mpe kati na ebale monene,
3 καὶ πάντες τὸ αὐτὸ βρῶμα πνευματικὸν ἔφαγον,
baliaki bango nyonso bilei ya molimo ya ndenge moko,
4 καὶ πάντες τὸ αὐτὸ πόμα πνευματικὸν ἔπιον· ἔπινον γὰρ ἐκ πνευματικῆς ἀκολουθούσης πέτρας· ἡ δὲ πέτρα ἦν ὁ Χριστός.
mpe bamelaki bango nyonso mayi ya molimo ya ndenge moko; pamba te bazalaki komela na libanga ya molimo, oyo ezalaki kotambola elongo na bango; mpe libanga yango ezalaki Klisto.
5 Ἀλλ᾽ οὐκ ἐν τοῖς πλείοσιν αὐτῶν εὐδόκησεν ὁ Θεός· κατεστρώθησαν γὰρ ἐν τῇ ἐρήμῳ.
Nzokande, Nzambe asepelaki te na mingi kati na bango; solo, babomaki bango kati na esobe.
6 Ταῦτα δὲ τύποι ἡμῶν ἐγενήθησαν, εἰς τὸ μὴ εἶναι ἡμᾶς ἐπιθυμητὰς κακῶν, καθὼς κἀκεῖνοι ἐπεθύμησαν.
Ezali bandakisa mpo na biso, mpo ete tolula makambo mabe te ndenge bango balulaki.
7 Μηδὲ εἰδωλολάτραι γίνεσθε, καθώς τινες αὐτῶν· ὥσπερ γέγραπται, Ἐκάθισεν ὁ λαὸς φαγεῖν καὶ πιεῖν, καὶ ἀνέστησαν παίζειν.
Bozala basambeli ya banzambe ya bikeko te, ndenge bamosusu kati na bango bazalaki, kolanda ndenge ekomama: « Bato bavandaki mpo na kolia mpe mpo na komela, mpe batelemaki mpo na kosakana. »
8 Μηδὲ πορνεύωμεν, καθώς τινες αὐτῶν ἐπόρνευσαν, καὶ ἔπεσον ἐν μιᾷ ἡμέρᾳ εἴκοσι τρεῖς χιλιάδες.
Tosengeli te kosala pite, ndenge bamosusu kati na bango basalaki; mpe, na mokolo moko, bato nkoto tuku mibale na misato bakufaki.
9 Μηδὲ ἐκπειράζωμεν τὸν Χριστόν, καθὼς καί τινες αὐτῶν ἐπείρασαν, καὶ ὑπὸ τῶν ὄφεων ἀπώλοντο.
Tosengeli mpe te komeka Klisto, ndenge bamosusu kati na bango basalaki; mpe banyoka ebomaki bango mpo ete eswaki bango.
10 Μηδὲ γογγύζετε, καθὼς καί τινες αὐτῶν ἐγόγγυσαν, καὶ ἀπώλοντο ὑπὸ τοῦ ὀλοθρευτοῦ.
Boyimaka-yimaka te ndenge bamosusu kati na bango bayimaki-yimaki, mpe anjelu mobebisi abomaki bango.
11 Ταῦτα δὲ πάντα τύποι συνέβαινον ἐκείνοις· ἐγράφη δὲ πρὸς νουθεσίαν ἡμῶν, εἰς οὓς τὰ τέλη τῶν αἰώνων κατήντησεν. (aiōn g165)
Makambo wana nyonso ekweyelaki bango mpo ete ezala ndakisa mpo na biso, mpe ekomamaki mpo na kokebisa biso oyo tokomi na tango ya suka. (aiōn g165)
12 Ὥστε ὁ δοκῶν ἑστάναι, βλεπέτω μὴ πέσῃ.
Yango wana, tika ete moto oyo azali kokanisa ete azali ya kotelema asala keba ete akweya te!
13 Πειρασμὸς ὑμᾶς οὐκ εἴληφεν εἰ μὴ ἀνθρώπινος· πιστὸς δὲ ὁ Θεός, ὃς οὐκ ἐάσει ὑμᾶς πειρασθῆναι ὑπὲρ ὃ δύνασθε, ἀλλὰ ποιήσει σὺν τῷ πειρασμῷ καὶ τὴν ἔκβασιν, τοῦ δύνασθαι ὑμᾶς ὑπενεγκεῖν.
Komekama oyo ekomelaki bino ekomelaka bato nyonso; mpe Nzambe azali Moyengebene; akotika te ete bomekama koleka makasi na bino. Kasi na tango ya komekama, akobongisela bino nzela ya kobima na komekama yango, mpe akopesa bino makasi ya kotelemela yango.
14 Διόπερ, ἀγαπητοί μου, φεύγετε ἀπὸ τῆς εἰδωλολατρείας.
Yango wana, balingami na ngai, bokima kosambela banzambe ya bikeko.
15 Ὡς φρονίμοις λέγω, κρίνατε ὑμεῖς ὅ φημι.
Nazali koloba na bino lokola na bato ya mayele; botala bino moko soki makambo oyo nazali koloba ezali malamu to mabe.
16 Τὸ ποτήριον τῆς εὐλογίας ὃ εὐλογοῦμεν, οὐχὶ κοινωνία τοῦ αἵματος τοῦ Χριστοῦ ἐστι; Τὸν ἄρτον ὃν κλῶμεν, οὐχὶ κοινωνία τοῦ σώματος τοῦ Χριστοῦ ἐστιν;
Boni, kopo ya elambo oyo, mpo na yango, tozongisaka matondi epai ya Nzambe, ekomisaka biso te moko na makila ya Klisto? Lipa oyo tokataka ekomisaka biso te moko na nzoto ya Klisto?
17 Ὅτι εἷς ἄρτος, ἓν σῶμα, οἱ πολλοί ἐσμεν· οἱ γὰρ πάντες ἐκ τοῦ ἑνὸς ἄρτου μετέχομεν.
Lokola lipa ezali kaka moko, biso nyonso tozali kosala nzoto kaka moko atako tozali ebele, pamba te biso nyonso tokabolaka lipa yango kaka moko.
18 Βλέπετε τὸν Ἰσραὴλ κατὰ σάρκα· οὐχὶ οἱ ἐσθίοντες τὰς θυσίας κοινωνοὶ τοῦ θυσιαστηρίου εἰσί;
Bokanisa nanu Isalaele! Boni, bato oyo baliaka banyama oyo epesami lokola mbeka bazalaka moko te na etumbelo?
19 Τί οὖν φημι; Ὅτι εἴδωλόν τί ἐστιν; Ἢ ὅτι εἰδωλόθυτόν τί ἐστιν;
Nalingi koloba nini? Nalingi koloba ete misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu, mpe yango moko nzambe ya ekeko, ezali na tina?
20 Ἀλλ᾽ ὅτι ἃ θύει τὰ ἔθνη, δαιμονίοις θύει, καὶ οὐ Θεῷ· οὐ θέλω δὲ ὑμᾶς κοινωνοὺς τῶν δαιμονίων γίνεσθαι.
Te! Kasi lokola babonzaka bambeka na bango epai ya milimo mabe mpe epai ya oyo ezali Nzambe te, naboyi ete bozala moko na milimo mabe.
21 Οὐ δύνασθε ποτήριον Κυρίου πίνειν καὶ ποτήριον δαιμονίων· οὐ δύνασθε τραπέζης Κυρίου μετέχειν καὶ τραπέζης δαιμονίων.
Bokoki te komela oyo ezali kati na kopo ya Nkolo mpe komela lisusu oyo ezali kati na kopo ya milimo mabe; bokoki te kolia na mesa ya Nkolo mpe kolia lisusu na mesa ya milimo mabe.
22 Ἢ παραζηλοῦμεν τὸν Κύριον; Μὴ ἰσχυρότεροι αὐτοῦ ἐσμεν;
Boni, tolingi nde kotumbola zuwa ya Nkolo? Boni, tozali makasi koleka Ye?
23 Πάντα μοι ἔξεστιν, ἀλλ᾽ οὐ πάντα συμφέρει. Πάντα μοι ἔξεστιν, ἀλλ᾽ οὐ πάντα οἰκοδομεῖ.
Bolobaka: « Nazali na ndingisa ya kosala nyonso, » nzokande nyonso ezali na litomba te; « Nazali na ndingisa ya kosala nyonso, » nzokande nyonso elendisaka te.
24 Μηδεὶς τὸ ἑαυτοῦ ζητείτω, ἀλλὰ τὸ τοῦ ἑτέρου ἕκαστος.
Tika ete moto moko te aluka bolamu na ye moko kaka, kasi aluka mpe bolamu ya moto mosusu!
25 Πᾶν τὸ ἐν μακέλλῳ πωλούμενον ἐσθίετε, μηδὲν ἀνακρίνοντες διὰ τὴν συνείδησιν·
Boliaka nyonso oyo etekamaka na zando, na komipesa mituna te na tina na yango, noki te bobebisa mitema na bino.
26 Τοῦ γὰρ Κυρίου ἡ γῆ καὶ τὸ πλήρωμα αὐτῆς.
Pamba te mabele mpe nyonso oyo ezali kati na yango ezali ya Nkolo.
27 Εἰ δέ τις καλεῖ ὑμᾶς τῶν ἀπίστων, καὶ θέλετε πορεύεσθαι, πᾶν τὸ παρατιθέμενον ὑμῖν ἐσθίετε, μηδὲν ἀνακρίνοντες διὰ τὴν συνείδησιν.
Soki moto oyo azali mondimi te abengisi yo, mpe ondimi kokende epai na ye, lia nyonso oyo bakopesa yo, na komipesa mituna te, noki te obebisa motema na yo.
28 Ἐὰν δέ τις ὑμῖν εἴπῃ, Τοῦτο εἰδωλόθυτόν ἐστι, μὴ ἐσθίετε δι᾽ ἐκεῖνον τὸν μηνύσαντα καὶ τὴν συνείδησιν· Τοῦ γὰρ Κυρίου ἡ γῆ καὶ τὸ πλήρωμα αὐτῆς.
Kasi soki moto moko alobi na yo: « Mosuni oyo ebonzamaki lokola mbeka epai ya nzambe ya ekeko, » kolia yango te, likolo ya moto oyo akebisi yo mpe mpo ete obebisa te motema na yo.
29 Συνείδησιν δὲ λέγω, οὐχὶ τὴν ἑαυτοῦ, ἀλλὰ τὴν τοῦ ἑτέρου· ἵνα τί γὰρ ἡ ἐλευθερία μου κρίνεται ὑπὸ ἄλλης συνειδήσεως;
Awa, nazali koloba te na tina na motema na yo, kasi na tina na motema ya moto yango, pamba te mpo na nini motema ya moto mosusu elandela bonsomi na ngai?
30 Εἰ ἐγὼ χάριτι μετέχω, τί βλασφημοῦμαι ὑπὲρ οὗ ἐγὼ εὐχαριστῶ;
Soki naliaka na kozongisa matondi epai ya Nzambe, mpo na nini kopamela ngai na tina na oyo, ngai, nazongiselaka matondi epai ya Nzambe?
31 Εἴτε οὖν ἐσθίετε, εἴτε πίνετε, εἴτε τι ποιεῖτε, πάντα εἰς δόξαν Θεοῦ ποιεῖτε.
Boye, ezala kolia to komela, nyonso oyo bokoki kozala kosala, bosalaka nyonso mpo na lokumu ya Nzambe.
32 Ἀπρόσκοποι γίνεσθε καὶ Ἰουδαίοις καὶ Ἕλλησι καὶ τῇ ἐκκλησίᾳ τοῦ Θεοῦ·
Bozalaka libaku te, ezala mpo na Bayuda, mpo na Bagreki to mpo na Lingomba ya Nzambe.
33 καθὼς κἀγὼ πάντα πᾶσιν ἀρέσκω, μὴ ζητῶν τὸ ἐμαυτοῦ συμφέρον, ἀλλὰ τὸ τῶν πολλῶν, ἵνα σωθῶσι.
Yango wana, ngai, kati na makambo nyonso, nasalaka makasi mpo na kosepelisa bato nyonso; nalukaka litomba na ngai moko te, kasi nalukaka bolamu ya bato ebele, mpo ete babika.

< Προς Κορινθιους Α΄ 10 >