< Προς Κορινθιους Α΄ 11 >
1 μιμηται μου γινεσθε καθως καγω χριστου
Bolanda ndakisa na ngai, ndenge ngai nalandaka ndakisa ya Klisto.
2 επαινω δε υμας αδελφοι οτι παντα μου μεμνησθε και καθως παρεδωκα υμιν τας παραδοσεις κατεχετε
Nakumisaka bino kati na makambo nyonso, pamba te bokanisaka ngai mpe bopengwaka te kati na malakisi oyo napesaki bino.
3 θελω δε υμας ειδεναι οτι παντος ανδρος η κεφαλη ο χριστος εστιν κεφαλη δε γυναικος ο ανηρ κεφαλη δε χριστου ο θεος
Nzokande, nalingi boyeba ete Klisto azali Mokonzi ya mobali nyonso, mobali azali mokonzi ya mwasi, mpe Nzambe azali Mokonzi ya Klisto.
4 πας ανηρ προσευχομενος η προφητευων κατα κεφαλης εχων καταισχυνει την κεφαλην αυτου
Mobali nyonso oyo asambelaka to asakolaka, wana moto na ye ezali ya kozipama, ayokisaka Mokonzi na ye soni.
5 πασα δε γυνη προσευχομενη η προφητευουσα ακατακαλυπτω τη κεφαλη καταισχυνει την κεφαλην εαυτης εν γαρ εστιν και το αυτο τη εξυρημενη
Kasi mwasi nyonso oyo asambelaka to asakolaka, wana moto na ye ezali polele, ayokisaka mokonzi na ye soni, pamba te azali lokola mwasi oyo bakokola suki.
6 ει γαρ ου κατακαλυπτεται γυνη και κειρασθω ει δε αισχρον γυναικι το κειρασθαι η ξυρασθαι κατακαλυπτεσθω
Mwasi oyo alataka kitambala te na moto na ye asengeli kokokola suki na ye. Kasi soki ezali soni mpo na mwasi kokatisa to kokokola suki, ekoleka malamu mpo na ye kolata kitambala na moto na ye.
7 ανηρ μεν γαρ ουκ οφειλει κατακαλυπτεσθαι την κεφαλην εικων και δοξα θεου υπαρχων γυνη δε δοξα ανδρος εστιν
Mobali asengeli te kolata kitambala, pamba te azali elilingi mpe lokumu ya Nzambe; kasi mwasi azali lokumu ya mobali.
8 ου γαρ εστιν ανηρ εκ γυναικος αλλα γυνη εξ ανδρος
Pamba te mobali akelama te wuta na mwasi, kasi mwasi akelama wuta na mobali.
9 και γαρ ουκ εκτισθη ανηρ δια την γυναικα αλλα γυνη δια τον ανδρα
Mobali akelama te mpo na mwasi, kasi mwasi akelama mpo na mobali.
10 δια τουτο οφειλει η γυνη εξουσιαν εχειν επι της κεφαλης δια τους αγγελους
Yango wana, likolo ya ba-anjelu, mwasi asengeli kozala na elembo ya bokonzi na moto na ye.
11 πλην ουτε ανηρ χωρις γυναικος ουτε γυνη χωρις ανδρος εν κυριω
Nzokande, kati na Nkolo, mwasi azali te soki mobali azali te, mpe mobali azali te soki mwasi azali te.
12 ωσπερ γαρ η γυνη εκ του ανδρος ουτως και ο ανηρ δια της γυναικος τα δε παντα εκ του θεου
Pamba te ndenge mwasi akelamaki wuta na mobali, ndenge mpe mobali abotamaki na nzela ya mwasi. Kasi makambo nyonso ewutaka na Nzambe.
13 εν υμιν αυτοις κρινατε πρεπον εστιν γυναικα ακατακαλυπτον τω θεω προσευχεσθαι
Botala nanu bino moko: boni, ezali malamu mpo na mwasi kosambela Nzambe moto polele?
14 η ουδε αυτη η φυσις διδασκει υμας οτι ανηρ μεν εαν κομα ατιμια αυτω εστιν
Boni, mokili yango moko eteyaka bino te ete ezali soni mpo na mobali kozala na suki milayi,
15 γυνη δε εαν κομα δοξα αυτη εστιν οτι η κομη αντι περιβολαιου δεδοται αυτη
kasi ezali nde lokumu mpo na mwasi kozala na suki milayi? Pamba te suki epesama na mwasi lokola kitambala.
16 ει δε τις δοκει φιλονεικος ειναι ημεις τοιαυτην συνηθειαν ουκ εχομεν ουδε αι εκκλησιαι του θεου
Soki moto moko akanisi ete ezali malamu mpo na ye kotia tembe na tina na likambo oyo, biso elongo na Mangomba ya Nzambe tozalaka na ezaleli wana te.
17 τουτο δε παραγγελλων ουκ επαινω οτι ουκ εις το κρειττον αλλ εις το ηττον συνερχεσθε
Kati na malako oyo ezali kolanda, nakokumisa bino te; pamba te mayangani na bino esungaka bino te mpo bokoma bato ya esengo koleka, kasi ekomisaka bino lisusu bato na pasi makasi.
18 πρωτον μεν γαρ συνερχομενων υμων εν τη εκκλησια ακουω σχισματα εν υμιν υπαρχειν και μερος τι πιστευω
Liboso, nazali koyoka ete bozalaka na bokabwani kati na bino, tango boyaka na mayangani; mpe nazali kondima yango mwa moke.
19 δει γαρ και αιρεσεις εν υμιν ειναι ινα οι δοκιμοι φανεροι γενωνται εν υμιν
Solo, bokabwani esengeli kozala kati na bino mpo ete Baklisto ya solo bayebana kati na bino.
20 συνερχομενων ουν υμων επι το αυτο ουκ εστιν κυριακον δειπνον φαγειν
Boye, tango boyaka na mayangani, ezalaka lisusu te mpo na kolia bilei ya Nkolo;
21 εκαστος γαρ το ιδιον δειπνον προλαμβανει εν τω φαγειν και ος μεν πεινα ος δε μεθυει
pamba te emonanaka ete, soki kaka bokomi na mesa, moto na moto awelaka nanu kolia bilei na ye moko; mpe mpo na yango, bamoko batikalaka na nzala, mpe bamosusu balangwaka.
22 μη γαρ οικιας ουκ εχετε εις το εσθιειν και πινειν η της εκκλησιας του θεου καταφρονειτε και καταισχυνετε τους μη εχοντας τι υμιν ειπω επαινεσω υμας εν τουτω ουκ επαινω
Boni, bozangi bandako oyo kati na yango bokoki kolia mpe komela? Boni, bosalaka bongo mpo na kotiola Lingomba ya Nzambe mpe kosambwisa bato oyo bazangi bilei? Nini nakoki koloba na bino? Nakumisa bino? Na likambo oyo, nakokumisa bino te!
23 εγω γαρ παρελαβον απο του κυριου ο και παρεδωκα υμιν οτι ο κυριος ιησους εν τη νυκτι η παρεδιδοτο ελαβεν αρτον
Pamba te, nateyaki bino makambo oyo nazwaki epai ya Nkolo: Nkolo Yesu, na butu oyo batekaki Ye, azwaki lipa;
24 και ευχαριστησας εκλασεν και ειπεν λαβετε φαγετε τουτο μου εστιν το σωμα το υπερ υμων κλωμενον τουτο ποιειτε εις την εμην αναμνησιν
mpe, sima na Ye kozongisa matondi epai ya Nzambe, akataki yango mpe alobaki: « Oyo ezali nzoto na Ngai; epesami mpo na bino! Bosalaka boye mpo na kokanisa Ngai. »
25 ωσαυτως και το ποτηριον μετα το δειπνησαι λεγων τουτο το ποτηριον η καινη διαθηκη εστιν εν τω εμω αιματι τουτο ποιειτε οσακις αν πινητε εις την εμην αναμνησιν
Ndenge moko mpe, sima na Ye kolia, azwaki kopo mpe alobaki: « Kopo oyo ezali Boyokani ya sika kati na makila na Ngai! Tango nyonso bokobanda komela yango, bosalaka boye mpo na kokanisa Ngai. »
26 οσακις γαρ αν εσθιητε τον αρτον τουτον και το ποτηριον τουτο πινητε τον θανατον του κυριου καταγγελλετε αχρις ου αν ελθη
Boye, tango nyonso bokozala kolia lipa oyo mpe komela kopo oyo, bokozala kosakola kufa ya Nkolo kino akozonga.
27 ωστε ος αν εσθιη τον αρτον τουτον η πινη το ποτηριον του κυριου αναξιως ενοχος εσται του σωματος και αιματος του κυριου
Yango wana, moto nyonso oyo akolia lipa to akomela kopo ya Nkolo na lolenge oyo ebongi te, akomema ngambo epai ya nzoto mpe makila ya Nkolo.
28 δοκιμαζετω δε ανθρωπος εαυτον και ουτως εκ του αρτου εσθιετω και εκ του ποτηριου πινετω
Boye tika ete moto nyonso amitala malamu liboso ya kolia lipa mpe komela wuta na kopo!
29 ο γαρ εσθιων και πινων αναξιως κριμα εαυτω εσθιει και πινει μη διακρινων το σωμα του κυριου
Pamba te moto oyo azali kolia lipa mpe komela, na kozanga kososola ete ezali nzoto ya Nkolo, azali komikatela etumbu na kolia mpe komela bongo.
30 δια τουτο εν υμιν πολλοι ασθενεις και αρρωστοι και κοιμωνται ικανοι
Yango wana mingi kati na bino bakoma na bolembu mpe na bokono, mpe ebele kati na bino bakufa.
31 ει γαρ εαυτους διεκρινομεν ουκ αν εκρινομεθα
Kasi soki tozalaki kososola oyo tozali, tolingaki kozwa etumbu te.
32 κρινομενοι δε υπο κυριου παιδευομεθα ινα μη συν τω κοσμω κατακριθωμεν
Nzokande, Nkolo apesaka biso etumbu mpo na kozongisa biso na nzela, mpo ete tozwa etumbu te elongo na mokili.
33 ωστε αδελφοι μου συνερχομενοι εις το φαγειν αλληλους εκδεχεσθε
Boye bandeko na ngai, tango boyaka na mayangani mpo na kolia elongo, bozelanaka.
34 ει δε τις πεινα εν οικω εσθιετω ινα μη εις κριμα συνερχησθε τα δε λοιπα ως αν ελθω διαταξομαι
Moto nyonso oyo azali na nzala asengeli nanu kolia na ndako na ye, mpo ete mayangani na bino ememela bino etumbu te. Mpe na tina na makambo oyo etikali, nakopesela yango malako tango nakoya.