< Ψαλμοί 53 >
1 εἰς τὸ τέλος ὑπὲρ μαελεθ συνέσεως τῷ Δαυιδ εἶπεν ἄφρων ἐν καρδίᾳ αὐτοῦ οὐκ ἔστιν θεός διεφθάρησαν καὶ ἐβδελύχθησαν ἐν ἀνομίαις οὐκ ἔστιν ποιῶν ἀγαθόν
Nzembo ya Davidi. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki na flite. Bazoba bamilobelaka: « Nzambe azali te. » Makanisi na bango esila kobeba, basalaka makambo mabe mpe ya nkele; moko te asalaka bolamu.
2 ὁ θεὸς ἐκ τοῦ οὐρανοῦ διέκυψεν ἐπὶ τοὺς υἱοὺς τῶν ἀνθρώπων τοῦ ἰδεῖν εἰ ἔστιν συνίων ἢ ἐκζητῶν τὸν θεόν
Wuta na likolo, Nzambe atalaka bato mpo na koluka koyeba soki ezali ata na moko ya mayele, oyo atalelaka Nzambe.
3 πάντες ἐξέκλιναν ἅμα ἠχρεώθησαν οὐκ ἔστιν ποιῶν ἀγαθόν οὐκ ἔστιν ἕως ἑνός
Bango nyonso bazali batomboki, bango nyonso bamibebisa; moko te asalaka bolamu, ata moto moko te.
4 οὐχὶ γνώσονται πάντες οἱ ἐργαζόμενοι τὴν ἀνομίαν οἱ ἔσθοντες τὸν λαόν μου βρώσει ἄρτου τὸν θεὸν οὐκ ἐπεκαλέσαντο
Boni, bato nyonso ya misala mabe bayebi eloko te? Baliaka bato na ngai ndenge baliaka lipa mpe batikala nanu kobelela Nzambe te, bazali penza kososola eloko moko te?
5 ἐκεῖ φοβηθήσονται φόβον οὗ οὐκ ἦν φόβος ὅτι ὁ θεὸς διεσκόρπισεν ὀστᾶ ἀνθρωπαρέσκων κατῃσχύνθησαν ὅτι ὁ θεὸς ἐξουδένωσεν αὐτούς
Somo monene ekokanga bango na esika oyo ezali ata na eloko moko te oyo ekoki kopesa bango somo, pamba te Nzambe apanzi mikuwa ya bato oyo bayei kobundisa yo. Okoyokisa bango soni, pamba te Nzambe abwaka bango.
6 τίς δώσει ἐκ Σιων τὸ σωτήριον τοῦ Ισραηλ ἐν τῷ ἐπιστρέψαι κύριον τὴν αἰχμαλωσίαν τοῦ λαοῦ αὐτοῦ ἀγαλλιάσεται Ιακωβ καὶ εὐφρανθήσεται Ισραηλ
Tika ete lobiko ya Isalaele ebimela na Siona! Tango Nzambe akobimisa bato na Ye na bowumbu, bakitani ya Jakobi bakosepela, mpe Isalaele ekozala na esengo.