< Ψαλμοί 26 >

1 τοῦ Δαυιδ κρῖνόν με κύριε ὅτι ἐγὼ ἐν ἀκακίᾳ μου ἐπορεύθην καὶ ἐπὶ τῷ κυρίῳ ἐλπίζων οὐ μὴ ἀσθενήσω
Nzembo ya Davidi. Yawe, longisa ngai na miso ya basambisi, pamba te natambolaka na bosembo; natielaka Yawe motema, nakozonga sima te.
2 δοκίμασόν με κύριε καὶ πείρασόν με πύρωσον τοὺς νεφρούς μου καὶ τὴν καρδίαν μου
Yawe, tala ngai malamu mpe meka ngai, sosola motema mpe makanisi na ngai,
3 ὅτι τὸ ἔλεός σου κατέναντι τῶν ὀφθαλμῶν μού ἐστιν καὶ εὐηρέστησα ἐν τῇ ἀληθείᾳ σου
pamba te napengwaka te liboso ya bolingo na Yo mpe nabikaka bomoi na ngai kolanda bosembo na Yo.
4 οὐκ ἐκάθισα μετὰ συνεδρίου ματαιότητος καὶ μετὰ παρανομούντων οὐ μὴ εἰσέλθω
Navandaka esika moko te na bakosi, natambolaka nzela moko te na bato ya mitema mibale.
5 ἐμίσησα ἐκκλησίαν πονηρευομένων καὶ μετὰ ἀσεβῶν οὐ μὴ καθίσω
Nayinaka kosangana elongo na bato ya misala mabe mpe navandaka te esika moko na bato mabe.
6 νίψομαι ἐν ἀθῴοις τὰς χεῖράς μου καὶ κυκλώσω τὸ θυσιαστήριόν σου κύριε
Yawe, nasukoli maboko na ngai mpo na kolakisa ete nasali mabe te, mpe nabandi na etumbelo na Yo,
7 τοῦ ἀκοῦσαι φωνὴν αἰνέσεως καὶ διηγήσασθαι πάντα τὰ θαυμάσιά σου
mpo na kozongisela Yo matondi mpe kotatola misala minene na Yo.
8 κύριε ἠγάπησα εὐπρέπειαν οἴκου σου καὶ τόπον σκηνώματος δόξης σου
Yawe, nasepelaka na Tempelo epai wapi ovandaka elongo na nkembo na Yo.
9 μὴ συναπολέσῃς μετὰ ἀσεβῶν τὴν ψυχήν μου καὶ μετὰ ἀνδρῶν αἱμάτων τὴν ζωήν μου
Kolongola te molimo na ngai nzela moko na bato ya masumu, bomoi na ngai elongo na basopi makila,
10 ὧν ἐν χερσὶν ἀνομίαι ἡ δεξιὰ αὐτῶν ἐπλήσθη δώρων
oyo maboko na bango etondi na makila, mpe maboko na bango ya mibali etondi na kanyaka.
11 ἐγὼ δὲ ἐν ἀκακίᾳ μου ἐπορεύθην λύτρωσαί με καὶ ἐλέησόν με
Natambolaka na bomoi ya bosembo; kangola ngai mpe salela ngai ngolu.
12 ὁ γὰρ πούς μου ἔστη ἐν εὐθύτητι ἐν ἐκκλησίαις εὐλογήσω σε κύριε
Makolo na ngai etambolaka na nzela ya alima; nakopambola Yawe kati na mayangani ya monene.

< Ψαλμοί 26 >