< Ἠσαΐας 28 >

1 οὐαὶ τῷ στεφάνῳ τῆς ὕβρεως οἱ μισθωτοὶ Εφραιμ τὸ ἄνθος τὸ ἐκπεσὸν ἐκ τῆς δόξης ἐπὶ τῆς κορυφῆς τοῦ ὄρους τοῦ παχέος οἱ μεθύοντες ἄνευ οἴνου
Mawa na motole ya lolendo ya balangwi masanga ya Efrayimi mpe na fololo ekawuka, fololo oyo ezalaki kosala kitoko na yango, oyo ezalaki na moto ya lubwaku ya mabele kitoko, na engumba wana oyo balangwi masanga ya vino bazalaki kosalela lolendo!
2 ἰδοὺ ἰσχυρὸν καὶ σκληρὸν ὁ θυμὸς κυρίου ὡς χάλαζα καταφερομένη οὐκ ἔχουσα σκέπην βίᾳ καταφερομένη ὡς ὕδατος πολὺ πλῆθος σῦρον χώραν τῇ γῇ ποιήσει ἀνάπαυσιν ταῖς χερσίν
Tala, Nkolo azali na elombe moko ya nguya mpe ya makasi, elombe yango azali lokola mvula ya mabanga mpe mopepe oyo ebebisaka; azali lokola mvula ya makasi mpe mpela ya somo, akokweyisa na makasi engumba yango na mabele.
3 καὶ τοῖς ποσὶν καταπατηθήσεται ὁ στέφανος τῆς ὕβρεως οἱ μισθωτοὶ τοῦ Εφραιμ
Motole ya lolendo ya balangwi masanga ya Efrayimi ekonyatama na makolo;
4 καὶ ἔσται τὸ ἄνθος τὸ ἐκπεσὸν τῆς ἐλπίδος τῆς δόξης ἐπ’ ἄκρου τοῦ ὄρους τοῦ ὑψηλοῦ ὡς πρόδρομος σύκου ὁ ἰδὼν αὐτὸ πρὶν ἢ εἰς τὴν χεῖρα αὐτοῦ λαβεῖν θελήσει αὐτὸ καταπιεῖν
mpe fololo ekawuka oyo ezalaki kosala kitoko na yango na moto ya lubwaku ya kitoko ekokoma lokola mbuma ya figi ya liboso oyo ebotaka liboso ya eleko ya molunge: soki kaka moto amoni yango, akobuka mpe akomela yango mbala moko.
5 τῇ ἡμέρᾳ ἐκείνῃ ἔσται κύριος σαβαωθ ὁ στέφανος τῆς ἐλπίδος ὁ πλακεὶς τῆς δόξης τῷ καταλειφθέντι μου λαῷ
Na mokolo wana, Yawe, Mokonzi ya mampinga, akozala motole ya lokumu mpe elembo ya kitoko mpo na ndambo ya bato na Ye;
6 καταλειφθήσονται ἐπὶ πνεύματι κρίσεως ἐπὶ κρίσιν καὶ ἰσχὺν κωλύων ἀνελεῖν
akopesa makanisi ya bosembo epai na ye oyo avandi mpo na kosambisa, mpe akozala mopesi makasi epai na bato oyo babenganaka na bitumba kino na ekuke.
7 οὗτοι γὰρ οἴνῳ πεπλανημένοι εἰσίν ἐπλανήθησαν διὰ τὸ σικερα ἱερεὺς καὶ προφήτης ἐξέστησαν διὰ τὸν οἶνον ἐσείσθησαν ἀπὸ τῆς μέθης τοῦ σικερα ἐπλανήθησαν τοῦτ’ ἔστι φάσμα
Mpe lisusu, Banganga-Nzambe mpe basakoli bapengwi mpo na masanga ya vino; masanga makasi ekomi kotengisa-tengisa bango; masanga epengwisi bango, vino ebungisi bango, masanga makasi ekomi kotengisa-tengisa bango; bakomi kobunga na bimoniseli na bango, bakomi kokata makambo na ndenge esengeli te.
8 ἀρὰ ἔδεται ταύτην τὴν βουλήν αὕτη γὰρ ἡ βουλὴ ἕνεκεν πλεονεξίας
Bamesa nyonso etondi na bisanza ya nkele; esika ya malamu etikali lisusu te.
9 τίνι ἀνηγγείλαμεν κακὰ καὶ τίνι ἀνηγγείλαμεν ἀγγελίαν οἱ ἀπογεγαλακτισμένοι ἀπὸ γάλακτος οἱ ἀπεσπασμένοι ἀπὸ μαστοῦ
Azali nani, ye oyo azali koluka koteya? Alingi kolimbola bimoniseli na ye epai ya banani? Epai ya bana oyo balongoli na mabele, bana oyo bakati bango mabele?
10 θλῖψιν ἐπὶ θλῖψιν προσδέχου ἐλπίδα ἐπ’ ἐλπίδι ἔτι μικρὸν ἔτι μικρὸν
Pamba te ezali nde « Bilobaloba ya pamba. »
11 διὰ φαυλισμὸν χειλέων διὰ γλώσσης ἑτέρας ὅτι λαλήσουσιν τῷ λαῷ τούτῳ
Solo, Nzambe akoloba na bato oyo na nzela ya likukuma mpe na lokota ya bapaya;
12 λέγοντες αὐτῷ τοῦτο τὸ ἀνάπαυμα τῷ πεινῶντι καὶ τοῦτο τὸ σύντριμμα καὶ οὐκ ἠθέλησαν ἀκούειν
alobaki na bango: « Tala esika ya kopema! Tika ete moto oyo alembi apema; » mpe: « Tala esika ya kimia, » kasi balingaki koyoka te.
13 καὶ ἔσται αὐτοῖς τὸ λόγιον κυρίου τοῦ θεοῦ θλῖψις ἐπὶ θλῖψιν ἐλπὶς ἐπ’ ἐλπίδι ἔτι μικρὸν ἔτι μικρόν ἵνα πορευθῶσιν καὶ πέσωσιν εἰς τὰ ὀπίσω καὶ κινδυνεύσουσιν καὶ συντριβήσονται καὶ ἁλώσονται
Bongo Liloba na Yawe ekokoma mpo na bango se bilobaloba ya pamba mpo ete, wana ezali bango kotambola, bakweya na ndenge ya sima, babukana mikongo, bazwama na mitambo mpe bakangama.
14 διὰ τοῦτο ἀκούσατε λόγον κυρίου ἄνδρες τεθλιμμένοι καὶ ἄρχοντες τοῦ λαοῦ τούτου τοῦ ἐν Ιερουσαλημ
Yango wana, bino batioli oyo bozali kokamba bato ya Yelusalemi, boyoka Liloba na Yawe!
15 ὅτι εἴπατε ἐποιήσαμεν διαθήκην μετὰ τοῦ ᾅδου καὶ μετὰ τοῦ θανάτου συνθήκας καταιγὶς φερομένη ἐὰν παρέλθῃ οὐ μὴ ἔλθῃ ἐφ’ ἡμᾶς ἐθήκαμεν ψεῦδος τὴν ἐλπίδα ἡμῶν καὶ τῷ ψεύδει σκεπασθησόμεθα (Sheol h7585)
Bozali koloba: « Tosalaki boyokani elongo na kufa, boyokani elongo na mboka ya bakufi. Tango likama ya makasi ekoya, ekozwa biso te; pamba te tokomisi lokuta ekimelo na biso mpe makambo ya lokuta ebombamelo na biso. » (Sheol h7585)
16 διὰ τοῦτο οὕτως λέγει κύριος ἰδοὺ ἐγὼ ἐμβαλῶ εἰς τὰ θεμέλια Σιων λίθον πολυτελῆ ἐκλεκτὸν ἀκρογωνιαῖον ἔντιμον εἰς τὰ θεμέλια αὐτῆς καὶ ὁ πιστεύων ἐπ’ αὐτῷ οὐ μὴ καταισχυνθῇ
Mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: « Tala, nasili kotia libanga moko kati na Siona, libanga ya makasi, libanga ya songe ya ndako, libanga ya motuya mpo na moboko ya malonga; moto oyo akozwa yango lokola eyekamelo na ye akotikala kobanga te.
17 καὶ θήσω κρίσιν εἰς ἐλπίδα ἡ δὲ ἐλεημοσύνη μου εἰς σταθμούς καὶ οἱ πεποιθότες μάτην ψεύδει ὅτι οὐ μὴ παρέλθῃ ὑμᾶς καταιγίς
Nakotia bosembo lokola singa oyo bamekelaka molayi mpe boyengebene lokola singa ya mbodi; mvula ya mabanga ekokombola ekimelo na bino ya lokuta, mpe mayi ekozindisa ebombamelo na bino.
18 μὴ καὶ ἀφέλῃ ὑμῶν τὴν διαθήκην τοῦ θανάτου καὶ ἡ ἐλπὶς ὑμῶν ἡ πρὸς τὸν ᾅδην οὐ μὴ ἐμμείνῃ καταιγὶς φερομένη ἐὰν ἐπέλθῃ ἔσεσθε αὐτῇ εἰς καταπάτημα (Sheol h7585)
Boyokani na bino elongo na kufa ekobebisama, boyokani oyo bosalaki elongo na mokili ya bakufi ekolonga te; tango likama ya makasi ekokomela bino, ekobebisa bino penza nye. (Sheol h7585)
19 ὅταν παρέλθῃ λήμψεται ὑμᾶς πρωὶ πρωὶ παρελεύσεται ἡμέρας καὶ ἐν νυκτὶ ἔσται ἐλπὶς πονηρά μάθετε ἀκούειν
Tango makambo nyonso oyo ekoya, ekobebisa bino; pamba te ekoleka na tongo nyonso, na moyi nyonso mpe na butu nyonso. » Bososoli ya emoniseli oyo ekomema nde somo makasi.
20 στενοχωρούμενοι οὐ δυνάμεθα μάχεσθαι αὐτοὶ δὲ ἀσθενοῦμεν τοῦ ἡμᾶς συναχθῆναι
Boye, ndenge balobaka na lisese: « Mbeto eleki mokuse mpo na kominyolusa, mpe bulangeti eleki moke mpo na komizipa nzoto; »
21 ὥσπερ ὄρος ἀσεβῶν ἀναστήσεται καὶ ἔσται ἐν τῇ φάραγγι Γαβαων μετὰ θυμοῦ ποιήσει τὰ ἔργα αὐτοῦ πικρίας ἔργον ὁ δὲ θυμὸς αὐτοῦ ἀλλοτρίως χρήσεται καὶ ἡ πικρία αὐτοῦ ἀλλοτρία
Yawe akotelema ndenge atelemaki na ngomba Perasimi, akotomboka ndenge atombokaki na lubwaku ya Gabaoni mpo na kosala mosala na Ye, mosala na Ye oyo ya kokamwa, mpe kokokisa mosala na Ye, mosala ya kokamwa oyo esalema nanu te.
22 καὶ ὑμεῖς μὴ εὐφρανθείητε μηδὲ ἰσχυσάτωσαν ὑμῶν οἱ δεσμοί διότι συντετελεσμένα καὶ συντετμημένα πράγματα ἤκουσα παρὰ κυρίου σαβαωθ ἃ ποιήσει ἐπὶ πᾶσαν τὴν γῆν
Sik’oyo, botika maseki na bino, noki te minyololo na bino ekokoma lisusu makasi; pamba te Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga, ayebisaki ngai ete asili kozwa mokano ya kobebisa mokili mobimba.
23 ἐνωτίζεσθε καὶ ἀκούετε τῆς φωνῆς μου προσέχετε καὶ ἀκούετε τοὺς λόγους μου
Bofungola matoyi mpe boyoka mongongo na ngai, bosala keba mpe boyoka malamu makambo oyo nazali koloba!
24 μὴ ὅλην τὴν ἡμέραν μέλλει ὁ ἀροτριῶν ἀροτριᾶν ἢ σπόρον προετοιμάσει πρὶν ἐργάσασθαι τὴν γῆν
Boni, ezali tango nyonso nde mosali bilanga abalolaka mabele, akataka mikala mpe atimolaka mabele mpo na kolona?
25 οὐχ ὅταν ὁμαλίσῃ αὐτῆς τὸ πρόσωπον τότε σπείρει μικρὸν μελάνθιον καὶ κύμινον καὶ πάλιν σπείρει πυρὸν καὶ κριθὴν καὶ ζέαν ἐν τοῖς ὁρίοις σου
Sima na kobongisa esika ya kolona, boni, akoki te kolona nkona ya nijeli to kobwaka kumini? Boni, akoki te kolona ble na esika oyo ebongi, mpe orje, na esika oyo ekoki; mpe epotele, na bandelo ya elanga na ye?
26 καὶ παιδευθήσῃ κρίματι θεοῦ σου καὶ εὐφρανθήσῃ
Nzambe na ye ateyaka ye mpe alakisaka ye nzela oyo asengeli kolanda.
27 οὐ γὰρ μετὰ σκληρότητος καθαίρεται τὸ μελάνθιον οὐδὲ τροχὸς ἁμάξης περιάξει ἐπὶ τὸ κύμινον ἀλλὰ ῥάβδῳ ἐκτινάσσεται τὸ μελάνθιον τὸ δὲ κύμινον
Pamba te basalelaka te mabaya ya kilo, oyo mpunda ebendaka mpo na kobuka nijeli to bapine ya shar mpo na kobuka kumini; basalelaka nde lingenda mpo na kobuka nijeli mpe kumini.
28 μετὰ ἄρτου βρωθήσεται οὐ γὰρ εἰς τὸν αἰῶνα ἐγὼ ὑμῖν ὀργισθήσομαι οὐδὲ φωνὴ τῆς πικρίας μου καταπατήσει ὑμᾶς
Esengeli konika ble mpo na kosala mapa; nzokande babetaka yango tango nyonso te, balekisaka nde bapine ya shar na likolo na yango mpe mabaya ya kilo, oyo mpunda ebendaka, kasi banikaka yango te.
29 καὶ ταῦτα παρὰ κυρίου σαβαωθ ἐξῆλθεν τὰ τέρατα βουλεύσασθε ὑψώσατε ματαίαν παράκλησιν
Nyonso wana mpe ewuti epai na Yawe, Mokonzi ya mampinga, oyo mabongisi na Ye ezali ya kitoko makasi mpe bwanya na Ye ezali monene.

< Ἠσαΐας 28 >