< Ἐσθήρ 7 >
1 εἰσῆλθεν δὲ ὁ βασιλεὺς καὶ Αμαν συμπιεῖν τῇ βασιλίσσῃ
Mokonzi mpe Amani bakendeki mpe bakomaki na feti oyo Ester, mwasi ya mokonzi, abongisaki.
2 εἶπεν δὲ ὁ βασιλεὺς Εσθηρ τῇ δευτέρᾳ ἡμέρᾳ ἐν τῷ πότῳ τί ἐστιν Εσθηρ βασίλισσα καὶ τί τὸ αἴτημά σου καὶ τί τὸ ἀξίωμά σου καὶ ἔστω σοι ἕως τοῦ ἡμίσους τῆς βασιλείας μου
Mpe wana bazalaki komela vino na mokolo oyo ya mibale, mokonzi atunaki lisusu Ester: — Ester, mwasi ya mokonzi, bosenga na yo ezali nini? Ekopesamela yo. Posa na yo ezali nini? Ekopesamela yo, ata soki ezali koleka kati-kati ya mokili na ngai ya bokonzi.
3 καὶ ἀποκριθεῖσα εἶπεν εἰ εὗρον χάριν ἐνώπιον τοῦ βασιλέως δοθήτω ἡ ψυχή μου τῷ αἰτήματί μου καὶ ὁ λαός μου τῷ ἀξιώματί μου
Ester, mwasi ya mokonzi, azongisaki: — Ah mokonzi! Soki nazwi ngolu na miso na yo, mpe soki yango esepelisi yo mokonzi, tika ete opesa ngai bomoi na ngai; yango nde ezali bosenga na ngai. Mpe lisusu, tika ete obatela bato na ngai; yango nde ezali bosenga na ngai.
4 ἐπράθημεν γὰρ ἐγώ τε καὶ ὁ λαός μου εἰς ἀπώλειαν καὶ διαρπαγὴν καὶ δουλείαν ἡμεῖς καὶ τὰ τέκνα ἡμῶν εἰς παῖδας καὶ παιδίσκας καὶ παρήκουσα οὐ γὰρ ἄξιος ὁ διάβολος τῆς αὐλῆς τοῦ βασιλέως
Pamba te ngai mpe bato na ngai, tosili kotekama mpo ete babebisa biso, baboma biso mpe balimwisa biso! Soki ata batekaki biso mpo ete tozala bawumbu ya basi to ya mibali, nalingaki na ngai kovanda kimia; pamba te pasi ata moko te ya lolenge oyo ekokaki kotinda ngai ete natungisa mokonzi!
5 εἶπεν δὲ ὁ βασιλεύς τίς οὗτος ὅστις ἐτόλμησεν ποιῆσαι τὸ πρᾶγμα τοῦτο
Mokonzi Kizerisesi atunaki Ester, mwasi ya mokonzi: — Moto yango nani oyo ameki kobongisa likambo ya boye? Azali wapi?
6 εἶπεν δὲ Εσθηρ ἄνθρωπος ἐχθρὸς Αμαν ὁ πονηρὸς οὗτος Αμαν δὲ ἐταράχθη ἀπὸ τοῦ βασιλέως καὶ τῆς βασιλίσσης
Ester azongiselaki ye: — Monyokoli mpe monguna! Ezali Amani, moto oyo ya pasi! Amani abangaki makasi liboso ya mokonzi mpe ya mwasi ya mokonzi.
7 ὁ δὲ βασιλεὺς ἐξανέστη ἐκ τοῦ συμποσίου εἰς τὸν κῆπον ὁ δὲ Αμαν παρῃτεῖτο τὴν βασίλισσαν ἑώρα γὰρ ἑαυτὸν ἐν κακοῖς ὄντα
Mokonzi atelemaki na kanda makasi, atikaki vino na ye mpe abimaki na elanga ya ndako ya mokonzi. Tango Amani asosolaki ete mokonzi asili kokata etumbu na ye, atikalaki wana mpo na kobondela Ester, mwasi ya mokonzi, mpo ete abikisa bomoi na ye.
8 ἐπέστρεψεν δὲ ὁ βασιλεὺς ἐκ τοῦ κήπου Αμαν δὲ ἐπιπεπτώκει ἐπὶ τὴν κλίνην ἀξιῶν τὴν βασίλισσαν εἶπεν δὲ ὁ βασιλεύς ὥστε καὶ τὴν γυναῖκα βιάζῃ ἐν τῇ οἰκίᾳ μου Αμαν δὲ ἀκούσας διετράπη τῷ προσώπῳ
Tango kaka mokonzi azongaki na esika oyo basalelaki feti longwa na elanga ya ndako ya mokonzi, Amani amikweyisaki na kiti monene oyo Ester, mwasi ya mokonzi, ayekamaki. Mokonzi agangaki: — Eh! Alingi lisusu kotungisa mwasi ya mokonzi na miso na ngai kati na ndako na ngai? Tango kaka mokonzi asilisaki koloba, bazipaki elongi ya Amani.
9 εἶπεν δὲ Βουγαθαν εἷς τῶν εὐνούχων πρὸς τὸν βασιλέα ἰδοὺ καὶ ξύλον ἡτοίμασεν Αμαν Μαρδοχαίῳ τῷ λαλήσαντι περὶ τοῦ βασιλέως καὶ ὤρθωται ἐν τοῖς Αμαν ξύλον πηχῶν πεντήκοντα εἶπεν δὲ ὁ βασιλεύς σταυρωθήτω ἐπ’ αὐτοῦ
Bongo Aribona, moko kati na basoda oyo baboma bango mokongo, alobaki liboso ya mokonzi: — Ezali na nzete moko oyo Amani atelemisaki mpo na Maridoshe, oyo alobaki makambo mpo na bolamu ya mokonzi! Ezali kati na lopango ya Amani mpe ezali na bametele tuku mibale na mitano na bosanda! Mokonzi apesaki mitindo: — Bodiembika ye moko kuna!
10 καὶ ἐκρεμάσθη Αμαν ἐπὶ τοῦ ξύλου ὃ ἡτοίμασεν Μαρδοχαίῳ καὶ τότε ὁ βασιλεὺς ἐκόπασεν τοῦ θυμοῦ
Boye badiembikaki Amani na nzete oyo atelemisaki mpo na Maridoshe. Mpe kanda ya mokonzi ekitaki.