< Ιωαννου Γ΄ 1 >

1 Ὁ πρεσβύτερος Γαΐῳ τῷ ἀγαπητῷ, ὃν ἐγὼ ἀγαπῶ ἐν ἀληθείᾳ.
Ngai mpaka; Epai ya Gayusi, molingami na ngai, oyo nalingaka kati na solo.
2 Ἀγαπητέ, περὶ πάντων εὔχομαί σε εὐοδοῦσθαι καὶ ὑγιαίνειν, καθὼς εὐοδοῦταί σου ἡ ψυχή.
Molingami na ngai, posa makasi ya motema na ngai ezali ete okende liboso na makambo na yo nyonso, mpe ozala na nzoto kolongono, ndenge molimo na yo ezali kokola.
3 ἐχάρην γὰρ λίαν ἐρχομένων ἀδελφῶν καὶ μαρτυρούντων σου τῇ ἀληθείᾳ, καθὼς σὺ ἐν ἀληθείᾳ περιπατεῖς.
Nasepelaki makasi koyoka litatoli na tina na yo, na monoko ya bandeko oyo bayaki wuta epai na yo, ete ozali kokoba kokangama na bosolo, mpe ozali kobika kolanda bosolo yango.
4 μειζοτέραν τούτων οὐκ ἔχω χαράν, ἵνα ἀκούω τὰ ἐμὰ τέκνα ἐν ἀληθείᾳ περιπατοῦντα.
Nazalaka na esengo makasi tango nayokaka ete bana na ngai bazali kobika kolanda bosolo.
5 Ἀγαπητέ, πιστὸν ποιεῖς ὃ ἐὰν ἐργάσῃ εἰς τοὺς ἀδελφοὺς καὶ εἰς τοὺς ξένους,
Molingami na ngai, makambo oyo osalaka mpo na bandeko kati na kondima, ezala mpo na ba-oyo bazali bapaya na miso na yo, osalaka yango penza kolanda kondima na yo.
6 οἳ ἐμαρτύρησάν σου τῇ ἀγάπῃ ἐνώπιον ἐκκλησίας, οὓς καλῶς ποιήσεις προπέμψας ἀξίως τοῦ Θεοῦ.
Batatolaki na miso ya Lingomba na tina na bolingo na yo. Bongo, okosala lisusu malamu koleka soki osungi bango, na lolenge oyo ekosepelisa Nzambe, mpo ete bakoba mobembo na bango.
7 ὑπὲρ γὰρ τοῦ ὀνόματος ἐξῆλθον, μηδὲν λαμβάνοντες ἀπὸ τῶν ἐθνικῶν.
Pamba te ezali mpo na kosakola Klisto nde bazali kotambola mpe koboya kozwa lisungi na maboko ya Bapagano.
8 ἡμεῖς οὖν ὀφείλομεν ἀπολαμβάνειν τοὺς τοιούτους, ἵνα συνεργοὶ γινώμεθα τῇ ἀληθείᾳ.
Boye, tosengeli kosunga bato ya lolenge oyo mpo ete tosangana na bango na makambo oyo bazali kosala mpo na solo.
9 Ἔγραψα τῇ ἐκκλησίᾳ· ἀλλ᾽ ὁ φιλοπρωτεύων αὐτῶν Διοτρεφὴς οὐκ ἐπιδέχεται ἡμᾶς.
Nakomelaki Lingomba mokanda moko ya mokuse; kasi Diotrefi, oyo alingaka kaka kozala mokonzi na makambo nyonso, akoyamba biso te.
10 διὰ τοῦτο, ἐὰν ἔλθω, ὑπομνήσω αὐτοῦ τὰ ἔργα ἃ ποιεῖ, λόγοις πονηροῖς φλυαρῶν ἡμᾶς· καὶ μὴ ἀρκούμενος ἐπὶ τούτοις οὔτε αὐτὸς ἐπιδέχεται τοὺς ἀδελφοὺς καὶ τοὺς βουλομένους κωλύει καὶ [ἐκ] τῆς ἐκκλησίας ἐκβάλλει.
Yango wana, tango nakoya, nakobimisa mabe na ye na polele; azali koloba makambo ya mabe mpe ya lokuta na tina na biso. Mpe asuki kaka wana te, azali ata koboya koyamba bandimi mosusu, azali kopekisa, kotelemela mpe kobengana na Lingomba, bato oyo bandimi koyamba bango.
11 Ἀγαπητέ, μὴ μιμοῦ τὸ κακόν, ἀλλὰ τὸ ἀγαθόν. ὁ ἀγαθοποιῶν ἐκ τοῦ Θεοῦ ἐστιν· ὁ κακοποιῶν οὐχ ἑώρακε τὸν Θεόν.
Molingami na ngai, komekolaka mabe te, mekolaka nde bolamu. Moto oyo asalaka bolamu azali ya Nzambe, kasi moto oyo asalaka mabe ayebi Nzambe te.
12 Δημητρίῳ μεμαρτύρηται ὑπὸ πάντων καὶ ὑπ᾽ αὐτῆς τῆς ἀληθείας· καὶ ἡμεῖς δὲ μαρτυροῦμεν, καὶ οἴδατε ὅτι ἡ μαρτυρία ἡμῶν ἀληθής ἐστι.
Bato nyonso bazali kopesa litatoli ya malamu na tina na Demetriusi, ezala yango moko bosolo ezali mpe kopesa litatoli ya malamu na tina na ye. Biso mpe tozali kopesa litatoli ya malamu na tina na ye, mpe oyebi malamu ete litatoli na biso ezalaka ya solo.
13 Πολλὰ εἶχον γράφειν, ἀλλ᾽ οὐ θέλω διὰ μέλανος καὶ καλάμου σοι γράψαι·
Nazali lisusu na makambo ebele ya kokomela yo, kasi naboyi kosala yango na nzela ya ekomeli mpe ya mayi na yango.
14 ἐλπίζω δὲ εὐθέως ἰδεῖν σε, καὶ στόμα πρὸς στόμα λαλήσομεν. εἰρήνη σοι. ἀσπάζονταί σε οἱ φίλοι. ἀσπάζου τοὺς φίλους κατ᾽ ὄνομα.
Nazali kolikya komona yo kala mingi te, bongo tokosolola malamu. Tika ete kimia ezala na yo! Balingami ya awa bapesi yo mbote. Pesa mpe balingami ya kuna mbote, moko na moko na kombo na ye.

< Ιωαννου Γ΄ 1 >