< Roemers 7 >
1 Oder wißt ihr nicht, meine Brüder – ich rede ja doch zu gesetzeskundigen Leuten –, daß das Gesetz für den Menschen nur, solange er lebt, bindende Gewalt hat?
Bandeko—nazali koloba na bato oyo bayebi Mobeko— bobosani ete Mobeko ezalaka na nguya likolo ya moto kaka na tango oyo azali na bomoi?
2 So ist z. B. eine verheiratete Frau gesetzlich an ihren Mann so lange gebunden, als er lebt; wenn aber der Mann stirbt, so ist sie frei von dem Gesetz, das sie an den Mann bindet.
Ndakisa: Mobeko ekangisaka mwasi ya libala na mobali na ye, wana mobali yango azali na bomoi. Kasi soki mobali akufi, mwasi akangolami na mobeko oyo ezalaki kokangisa ye na mobali.
3 Demnach wird sie zwar, solange ihr Mann lebt, allgemein als Ehebrecherin gelten, wenn sie sich einem andern Manne zu eigen gibt; stirbt aber ihr Mann, so ist sie frei vom Gesetz und keine Ehebrecherin, wenn sie sich einem andern Mann zu eigen gibt.
Boye soki, wana mobali na ye azali nanu na bomoi, akomi mwasi ya mobali mosusu, bakoloba ete asali ekobo. Kasi soki mobali na ye akufi, akangolami libela na mobeko yango mpe akoki kokoma mwasi ya mobali mosusu; boye bakoloba te ete asali ekobo.
4 Mithin seid auch ihr, meine Brüder, dem Gesetz gegenüber getötet worden, und zwar durch (das Getötetwerden) des Leibes Christi, um hinfort einem anderen, nämlich dem, der von den Toten auferweckt worden ist, als Eigentum anzugehören, damit wir nunmehr für Gott Frucht brächten.
Ndenge wana mpe mpo na bino bandeko na ngai: bosila mpe kokufa mpo na Mobeko na nzela ya nzoto ya Klisto mpo ete bokoma bato ya moto mosusu, ya Ye oyo asekwaki kati na bakufi, mpo ete tobota bambuma mpo na Nzambe.
5 Denn solange wir im Fleische waren, wirkten sich die durch das Gesetz erregten sündhaften Leidenschaften in unsern Gliedern in der Weise aus, daß wir für den Tod Frucht brachten.
Pamba te wana tozalaki nanu kotambola kolanda baposa ya nzoto, Mobeko ezalaki kotindika biso na baposa ya mabe oyo ezalaki kosala mosala na yango kati na biteni ya banzoto na biso mpo ete tobota bambuma oyo ememaka na kufa.
6 Jetzt aber sind wir vom Gesetz losgekommen, da wir dem, was uns in Banden hielt, gestorben sind, so daß wir nunmehr unsern Dienst im neuen Wesen des Geistes und nicht mehr im alten Wesen des Buchstabens (des Gesetzes) leisten.
Kasi sik’oyo, lokola tokufi mpo na nguya oyo ezalaki kokanga biso na bowumbu, tokangolami na nguya ya Mobeko mpo ete tosalela Nzambe na lolenge ya sika ya Molimo, kasi na lolenge ya kala ya mokanda ya Mobeko te.
7 Was folgt nun daraus? Ist das Gesetz (selbst) Sünde? Nimmermehr! Aber ich hätte die Sünde nicht kennengelernt außer durch das Gesetz; denn ich hätte auch von der bösen Lust nichts gewußt, wenn das Gesetz nicht gesagt hätte: »Laß dich nicht gelüsten!«
Boye toloba nini? Mobeko ekomi nde lisumu? Soki moke te! Soki Mobeko ezalaki te, nalingaki mpe koyeba lisumu te. Pamba te soki Mobeko elobaki te: « Okolulaka te, » nalingaki mpe koyeba te soki kolula ezali penza nini.
8 Da hat die Sünde eine Angriffsgelegenheit gegen mich gewonnen und durch das Gebot jegliche böse Lust in mir zustande gebracht; denn ohne Gesetz ist die Sünde tot.
Nzokande, lokola lisumu ezwaka nguya na esika oyo mitindo ezali, lisumu ebotaki kati na ngai lolenge nyonso ya baposa ya mabe. Pamba te soki Mobeko ezali te, lisumu mpe ezali na nguya te.
9 Ich lebte einst ohne das Gesetz; als dann aber das Gebot (des Gesetzes) kam, lebte die Sünde (in mir) auf,
Na kala, tango Mobeko ezalaki te, nazalaki na bomoi; kasi tango mitindo eyei, lisumu mpe ezwi nguya, mpe ngai nakufi.
10 für mich aber kam der Tod; und so erwies sich dasselbe Gebot, das doch zum Leben verhelfen soll, für mich als todbringend;
Bongo mitindo oyo esengelaki komema na bomoi ememi ngai na kufa.
11 denn nachdem die Sünde eine Angriffsgelegenheit gegen mich gewonnen hatte, betrog sie mich durch das Gebot und brachte mir durch dieses den Tod.
Pamba te lokola lisumu ezwaka nguya na esika oyo mitindo ezali, lisumu ekosaki ngai mpe ememaki ngai na kufa na nzela ya mitindo.
12 Demnach ist das Gesetz (an sich) heilig und ebenso das Gebot heilig, gerecht und gut.
Boye, Mobeko ezali bule, mpe mitindo ezali bule, sembo mpe malamu.
13 So hat also etwas Gutes mir den Tod gebracht? O nein, das hat vielmehr die Sünde getan: sie sollte als Sünde zutage treten, indem sie mir durch das Gute den Tod brachte; sie sollte sich eben durch das Gebot als über alle Maßen sündig erweisen.
Boni, eloko ya malamu ekoki solo komemela ngai kufa? Soki moke te! Nzokande, mpo ete lisumu eyebana ete ezali lisumu, mpe mpo ete elakisa mabe na yango na nzela ya mitindo, esalelaki eloko oyo ezali malamu mpo ete lisumu yango epesa ngai kufa.
14 Wir wissen ja, daß das Gesetz geistlich ist; ich aber bin von fleischlicher Art (und dadurch) unter die (Gewalt der) Sünde verkauft.
Toyebi ete Mobeko epesamaki na nzela ya Molimo na Nzambe; kasi ngai nazali kaka moto, natekama mpo na kozala mowumbu ya lisumu.
15 Ja, mein ganzes Tun ist mir unbegreiflich; denn ich vollbringe nicht das, was ich will, sondern tue das, was ich hasse.
Nasosolaka te makambo oyo nasalaka: oyo nalingaka kosala, nasalaka yango te; kasi oyo nayinaka, yango nde nasalaka.
16 Wenn ich aber das tue, was ich nicht will, so erkenne ich durch die innere Zustimmung zum Gesetz an, daß dieses gut sei.
Mpe soki nasalaka makambo oyo naboyaka kosala, wana nandimi ete Mobeko ezali malamu.
17 Jetzt aber bin nicht mehr ich der, welcher es vollbringt, sondern die in mir wohnende Sünde.
Lokola ezali bongo, emonani ete ezali ngai te moto nasalaka yango, kasi ezali nde lisumu oyo evandaka kati na ngai.
18 Denn ich weiß ja: in mir, das heißt in meinem Fleische, wohnt nichts Gutes; denn der gute Wille ist bei mir wohl vorhanden, dagegen das Vollbringen des Guten nicht;
Pamba te nayebi malamu ete bolamu evandaka kati na ngai te, elingi koloba: evandaka kati na nzoto na ngai te. Nazalaka na posa ya kosala bolamu, kasi nazangaka nguya ya kokokisa yango.
19 denn ich tue nicht das Gute, das ich tun will, sondern vollbringe das Böse, das ich nicht tun will.
Nasalaka te bolamu oyo nalingaka kosala, kasi nasalaka nde mabe oyo naboyaka kosala.
20 Wenn ich aber das tue, was ich nicht will, so bin nicht mehr ich es, der es vollbringt, sondern die in mir wohnende Sünde.
Soki sik’oyo nasali makambo oyo naboyaka kosala, ezali lisusu ngai te moto nasali yango, kasi ezali nde lisumu oyo evandaka kati na ngai.
21 Ich finde somit bei mir, der ich das Gute tun will, das Gesetz vor, daß bei mir das Böse zustande kommt.
Boye, namonaka mobeko oyo kosala kati na ngai: soki nalingi kosala bolamu, ezali mabe kaka nde nakosala.
22 Denn nach meinem inneren Menschen stimme ich dem göttlichen Gesetz freudig zu,
Pamba te kati na motema na ngai, nasepelaka na Mobeko ya Nzambe;
23 nehme aber in meinen Gliedern ein andersartiges Gesetz wahr, das dem Gesetz meiner Vernunft widerstreitet und mich gefangennimmt unter das Gesetz der Sünde, das in meinen Gliedern wirkt.
kasi kati na biteni ya nzoto na ngai, namonaka mobeko mosusu kobundisa mobeko ya makanisi ya motema na ngai mpe kokomisa ngai mowumbu ya mobeko ya lisumu oyo ezali kosala kati na biteni ya nzoto na ngai.
24 O ich unglückseliger Mensch! Wer wird mich aus diesem Todesleibe erlösen?
Oh ngai moto na mawa! Nani akokangola ngai na nzoto oyo ya kufa?
25 Dank sei Gott; (es ist geschehen) durch Jesus Christus, unsern Herrn! Also ist es so: Auf mich selbst gestellt diene ich mit der Vernunft dem Gesetz Gottes, mit dem Fleisch dagegen dem Gesetz der Sünde.
Tika ete matondi epesamela Nzambe oyo akangolaka ngai na nzela ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso! Na mokuse, nakoki koloba ete, na nzela ya mayele na ngai, nazali mowumbu ya Mobeko ya Nzambe, kasi na nzela ya bomoto na ngai ya masumu, nazali mowumbu ya mobeko ya lisumu.