< Psalm 131 >
1 Ein Wallfahrtslied Davids. HERR, mein Herz ist nicht hochfahrend,
Nzembo ya Davidi. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Yawe, motema na ngai ezali na lofundu te, miso na ngai ezali na posa makasi te; namipesaka te na makambo oyo eleki ya minene mpe eleki pasi mpo na ngai.
2 Nein, ich habe mein Herz beruhigt und gestillt; wie ein entwöhntes Kind an der Mutter Brust, so ruht entwöhnt mein Herz in mir. –
Kasi nabatelaki kimia kati na motema na ngai mpe namitungisaki te lokola mwana moke elongo na mama na ye. Nazali na kimia lokola mwana oyo mama alongola na mabele.
3 Israel, harre des HERRN von nun an bis in Ewigkeit.
Isalaele, tia elikya kati na Yawe kobanda sik’oyo mpe libela na libela.