< Psalm 4 >

1 Ein Psalm Davids, vorzusingen auf Saitenspielen. Erhöre mich, wenn ich rufe, Gott meiner Gerechtigkeit, der du mich tröstest in Angst; sei mir gnädig und erhöre mein Gebet!
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi; ezali ya koyemba na lindanda. Nzambe, bosembo na ngai, soki nabeleli Yo, yanola ngai. Kangola ngai na pasi, salela ngai ngolu, mpe yoka libondeli na ngai.
2 Liebe HERREN, wie lange soll meine Ehre geschändet werden? Wie habt ihr das Eitle so lieb und die Lügen so gerne! (Sela)
Bino bato, kino tango nini bokoyokisa nkembo na ngai soni? Kino tango nini bokomisepelisa na makambo ya pamba mpe bokolanda makambo ya lokuta?
3 Erkennet doch daß der HERR seine Heiligen wunderlich führet! Der HERR höret, wenn ich ihn anrufe.
Boyeba ete Yawe abulisi mpo na Ye moko mosali oyo azali sembo na miso na Ye; Yawe ayokaka ngai tango nabelelaka Ye.
4 Zürnet ihr, sündiget nicht! Redet mit eurem Herzen auf eurem Lager und harret. (Sela)
Soki bosiliki, bosalaka masumu te; soki bolali na mbeto, bolukaka kososola makambo mpe bovandaka kimia.
5 Opfert Gerechtigkeit und hoffet auf den HERRN.
Bobonzaka bambeka kolanda mibeko mpe botiaka elikya na bino kati na Yawe.
6 Viele sagen: Wie sollt uns dieser weisen, was gut ist? Aber, HERR, erhebe über uns das Licht deines Antlitzes!
Bato mingi bazali kotuna: « Nani akomemela biso bolamu? » Oh Yawe, ngengisela biso elongi na Yo.
7 Du erfreuest mein Herz, ob jene gleich viel Wein und Korn haben.
Tondisa motema na ngai na esengo soki bafuluki na bambuma ya ble elongo na vino ya sika.
8
Nakolala mpe nakozwa pongi na kimia, pamba te, Yo moko Yawe, osalaka ete navanda na kimia.

< Psalm 4 >