< Psalm 132 >

1 Ein Stufenlied. - Sei, Herr, zugunsten Davids eingedenk all dessen, was er gesprochen,
Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Yawe, kanisa Davidi; kanisa pasi na ye nyonso!
2 wie er dem Herrn geschworen, dem Starken Jakobs hat gelobt:
Alapaki ndayi oyo epai na Yawe, epai ya Elombe ya Jakobi:
3 "Ich gehe nimmer in mein Wohngezelt, besteige nicht mein Ruhebett,
« Nakokota na ndako na ngai te, nakomata na mbeto na ngai te,
4 Versage meinen Augen Schlaf und Schlummer meinen Augenwimpern,
nakokanga miso na ngai te mpo na kolala pongi to mpo na konimba mwa moke
5 bis daß ich eine Stätte finde für den Herrn, für Jakobs Starken eine Wohnung." -
kino nakozwa Esika mpo na Yawe, Ndako mpo na Elombe ya Jakobi. »
6 Nun hörten wir davon zu Ephrat und fanden sie im Waldgefilde.
Toyokaki sango na tina na yango na Efrata, tomonaki yango na elanga ya Yari.
7 "Zu seiner Wohnung laßt uns gehen, vor seiner Füße Schemel niederfallen!"
Tokende na Ndako na Ye, togumbama liboso ya enyatelo makolo na yango.
8 Auf, Herr, zu Deiner Ruhestätte, Du und die Lade Deiner Herrscherwürde!
Yawe, telema, yaka na Esika na Yo ya bopemi! Yaka elongo na Sanduku ya Boyokani epai wapi nguya na Yo ezali.
9 Mit Heil laß Deine Priester sich bekleiden, und Deine Frommen mögen jubeln! -
Tika ete Banganga-Nzambe na Yo balata bosembo lokola elamba; mpe tika ete basantu na Yo baganga na esengo!
10 Um David, Deines Dieners willen, weis nicht zurück, den Du gesalbt!"
Mpo na Davidi, mosali na Yo, kobengana mopakolami na Yo te!
11 Der Herr schwur David Dauer zu. Er geht davon nicht ab. "Auf deinen Thron erheb ich einen von deiner Leibesfrucht.
Yawe alapaki epai ya Davidi ndayi ya solo, oyo akowangana te: « Nakotia moko kati na bakitani na yo na kiti na yo ya bokonzi.
12 Bewahren deine Söhne meinen Bund und meine Zeugnisse, wie ich sie lehre, dann dürfen ihre Söhne allezeit auf deinem Throne sitzen!" -
Soki bana na yo babateli boyokani mpe mibeko na ngai, bana na bango mpe bakokitana na yo lokola bakonzi, mpe ekosalema bongo mpo na libela. »
13 Der Herr hat Sion sich erkoren, zum Wohnsitz sich ersehen:
Pamba te Yawe aponaki Siona, asepelaki kokomisa yango Esika na Ye ya kovanda:
14 "Das sei in Ewigkeit mein Ruhesitz, ich throne hier; denn hier gefällt es mir.
« Ezali Esika na ngai ya bopemi mpo na libela; nakovanda awa, pamba te nasepelaki na yango.
15 Ich segne seine Jugend und gebe seinen Armen Brot in Fülle.
Nakopambola, nakopambola yango na biloko ebele, nakotondisa babola na yango na bilei.
16 Mit Heil bekleid ich seine Priester, und frohe Lust sei seiner Frommen Teil!
Nakolatisa Banganga-Nzambe na yango lobiko, mpe bato na yango bakoganga na esengo.
17 Ich lasse Davids Macht ersprossen, dem richt ich eine Leuchte her, den ich gesalbt.
Kuna na Siona, nakobakisa nguya ya Davidi, mpe nakobimisela ye mokitani, mopakolami na ngai, lokola mwinda ya kopela.
18 In Schande hüll ich seine Feinde, dieweil auf ihm ein Diadem erglänzt."
Nakoyokisa banguna na ye soni, mpe motole na ye ekongenga na mbunzu na ye. »

< Psalm 132 >