< 1 Mose 41 >

1 Nach Verlauf zweier Jahre träumte Pharao, er stehe am Nil.
Sima na mibu mibale, Faraon alotaki ndoto: atelemaki pembeni ya ebale Nili,
2 Da stiegen aus dem Nil sieben Kühe, prächtig von Aussehen und fett an Fleisch, und weideten im Riedgras.
amonaki bangombe sambo ya basi, ya kitoko mpe ya mafuta. Bangombe yango ebimaki wuta na ebale mpe ezalaki kolia matiti pembeni ya ebale Nili.
3 Ihnen nach stiegen sieben andere Kühe aus dem Nil, häßlich von Aussehen und mager an Fleisch, und traten neben jene Kühe am Nilufer.
Sima na yango, bangombe mosusu sambo ya basi, ya mabe mpe ekonda, ebimaki wuta na ebale, etelemaki pembeni ya bangombe ya basi oyo ezalaki pembeni ya ebale Nili.
4 Dann fraßen die häßlichen und mageren Kühe die sieben stattlichen und fetten Kühe. Da erwachte Pharao.
Bangombe sambo ya basi ya mabe mpe ekonda eliaki bangombe sambo ya kitoko mpe ya mafuta. Kaka na tango yango, Faraon alamukaki.
5 Er schlief wieder ein, da träumte er zum zweitenmal. Sieben Ähren wuchsen an einem Halm, dick und schön.
Alalaki lisusu mpe alotaki ndoto ya mibale: nzete moko ya ble ebimisaki mito sambo ya ble, ya minene mpe ya kitoko.
6 Ihnen nach sproßten sieben Ähren, dürr und vom Ostwind versengt.
Mito mosusu sambo ya ble, ekonda mpe ezika na mopepe ya este, ebimaki sima na oyo ya minene.
7 Und die dürren Ähren verschlangen die sieben dicken und vollen Ähren. Da erwachte Pharao; ein Traum war es gewesen.
Mito sambo oyo ekonda eliaki mito sambo oyo ya minene mpe etonda. Kaka na tango yango, Faraon alamukaki, asosolaki ete ezali ndoto.
8 Am Morgen aber war sein Gemüt noch unruhig; da sandte er hin und ließ alle Schriftkundigen und Weisen Ägyptens rufen. Und Pharao erzählte ihnen seine Träume; aber niemand vermochte sie dem Pharao zu deuten.
Na tongo, lokola molimo na ye etungisamaki, abengaki bato nyonso ya soloka mpe ya bwanya ya Ejipito. Faraon ayebisaki bango ndoto na ye, kasi ata moto moko te akokaki kolimbolela ye yango.
9 Da nahm der Obermundschenk das Wort und sprach zu Pharao: "Heute muß ich meiner Nachlässigkeit gedenken.
Kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali masanga ya mokonzi alobaki na Faraon: « Na mokolo ya lelo, nalingi kokanisa mbeba na ngai.
10 Der Pharao hatte einst auf seine Diener gezürnt, und so legte er mich in Gewahrsam in das Haus des Anführers der Leibwächter, mich und den Oberbäcker.
Mokolo moko, Faraon asilikelaki basali na ye mpe atiaki ngai na boloko elongo na kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali mapa ya mokonzi kati na ndako ya mokonzi ya bakengeli ya mokonzi.
11 Da träumten wir beide in einer Nacht, und zwar hatte jeder einen besonderen Traum.
Biso mibale tolotaki bandoto na butu moko: ndoto na ndoto ezalaki na ndimbola na yango.
12 Nun war bei uns dort ein hebräischer Jüngling, ein Sklave des Obersten der Leibwächter, und dem erzählten wir es, und jener deutete uns unsere Träume. Jedem deutete er, seinem Traum gemäß.
Kuna, tozalaki na elenge mobali moko, azali Mo-Ebre mpe mosali ya mokonzi ya bakengeli ya mokonzi. Toyebisaki ye bandoto na biso mpe alimbolaki yango mpo na biso, apesaki moto na moto ndimbola ya ndoto na ye.
13 Und wie er es uns gedeutet, so traf es ein. Mich hat man wieder auf meinen Posten gestellt, und ihn hat man gehenkt."
Makambo nyonso esalemaki ndenge kaka alimbolelaki biso yango. Ngai nazongelaki misala na ngai; mpe moninga mosusu, badiembikaki ye. »
14 Da sandte Pharao und ließ Joseph rufen. Eilends entließen sie ihn aus dem Kerker. Er ließ sich scheren und wechselte seine Kleider. Dann kam er zu Pharao.
Faraon abengaki Jozefi, mpe babimisaki ye na lombangu na boloko. Bakataki ye suki, alataki bilamba mosusu mpe ayaki liboso ya Faraon.
15 Und Pharao sprach nun zu Joseph: "Ich habe einen Traum gehabt, und niemand kann ihn deuten. Nun habe ich von dir gehört, man sage, du brauchtest einen Traum nur zu hören, und du könntest ihn deuten!"
Faraon alobaki na Jozefi: — Nalotaki ndoto mpe ata moto moko te alongi kolimbola yango; kasi nayoki sango na tina na yo ete soki oyoki ndoto, okolimbola yango.
16 Da erwiderte Joseph dem Pharao also: "Ich nicht; Gott nur kann offenbaren, was Pharao frommt."
Jozefi azongiselaki Faraon: — Ngai nakolonga te kosala yango, kasi Nzambe akopesa na Faraon eyano oyo azali na yango posa.
17 Da erzählte Pharao dem Joseph: "In meinem Traume stand ich an des Niles Ufer.
Faraon alobaki na Jozefi: — Na ndoto na ngai, natelemaki pembeni ya ebale Nili.
18 Da stiegen sieben Kühe aus dem Nil, fett an Fleisch und stattlich anzusehen, und weideten im Riedgras.
Namonaki bangombe sambo ya basi, ya kitoko mpe ya mafuta. Bangombe yango ebimaki wuta na ebale mpe ezalaki kolia matiti pembeni ya ebale Nili.
19 Ihnen nach stiegen sieben andere Kühe, elend und häßlich an Gestalt und mager an Fleisch. In ganz Ägypten habe ich nie etwas so Häßliches gesehen wie sie.
Sima na yango, bangombe mosusu sambo ya basi ebimaki: ya mike, ya mabe penza mpe ekonda; nanu natikala komona te bangombe ya ndenge wana na mokili mobimba ya Ejipito.
20 Da fraßen die mageren und häßlichen Kühe die ersten sieben fetten Kühe.
Ngombe ya basi ekonda mpe ya mabe eliaki bangombe sambo ya mafuta oyo ebimaki liboso.
21 Sie kamen so in ihren Magen; aber man hatte gar nicht gemerkt, daß sie in ihren Magen gekommen waren; denn ihr Aussehen blieb häßlich, wie zuvor. Da erwachte ich.
Bongo ekotaki na mabumu na yango kasi ezalaki komonana te ete bangombe ya mafuta ekoti na mabumu ya bangombe ekonda, mpe lolenge na yango ezalaki kaka mabe lokola ndenge ezalaki liboso. Kaka na tango yango, nalamukaki.
22 Und wieder sah ich in meinem Traum: Da wuchsen sieben Ähren voll und schön an einem Halm.
Na ndoto na ngai mosusu, namonaki mito sambo ya ble ya kitoko mpe ya mafuta kobima na nzete moko.
23 Ihnen nach sproßten sieben andere Ähren, taub, dürr und vom Ostwind versengt.
Sima na yango, mito sambo mosusu ya ble ebimaki. Ezalaki ya kokawuka, ekonda mpe ezika na mopepe ya este.
24 Und diese dürren Ähren verschlangen die sieben schönen Ähren. Ich sagte es den Schriftgelehrten; aber keiner konnte mir Bescheid geben."
Mito sambo ya ble oyo ekonda emelaki mito sambo ya ble oyo ya malamu. Nayebisaki yango epai ya bato ya soloka kasi ata moto moko te akokaki kolimbolela ngai yango.
25 Da sprach Joseph zu Pharao: "Pharaos Traum ist unzweideutig. Gott tut dem Pharao kund, was er zu tun gedenkt.
Jozefi alobaki na Faraon: — Ndoto ya Faraon ezali kaka ndoto moko mpe ezali kaka na ndimbola moko. Nzambe amonisaki Faraon makambo oyo Ye akosala.
26 Die sieben schönen Kühe sind sieben Jahre. Die sieben schönen Ähren sind auch sieben Jahre. Nur ein Traum ist es.
Bangombe sambo ya basi ya kitoko ezali mibu sambo, mpe mito sambo ya ble ezali mibu sambo: ezali kaka ndoto moko.
27 Und diese sieben mageren und häßlichen Kühe, die nach ihnen kamen, sind sieben Jahre, und die sieben leeren, vom Ostwind versengten Ähren bedeuten sieben Hungerjahre.
Bangombe sambo ya basi ekonda mpe ya mabe oyo ebimaki sima na oyo ya mafuta mpe ya kitoko, ezali mibu sambo; mpe mito sambo ya ble oyo ekonda mpe ezika na mopepe ya este ezali mibu sambo ya nzala makasi.
28 Das ist dasselbe, was ich Pharao schon sagte: 'Was Gott zu tun gedenkt, hat er Pharao schauen lassen.'
Tala maloba oyo nazalaki na yango mpo na koyebisa Faraon. Nzambe atalisi na Faraon makambo oyo Ye akosala.
29 Sieh, sieben Jahre kommen, da herrscht großer Überfluß im ganzen Land Ägypten.
Mibu sambo ya bofuluki ekoya na mokili mobimba ya Ejipito.
30 Nach ihnen kommen sieben Hungerjahre. Da weiß man nichts mehr von irgendwelchem Überfluß im Land Ägypten. Dann zehrt der Hunger im Land.
Kasi mibu sambo ya nzala makasi ekolanda yango; boye bakobosana bofuluki nyonso ya mokili ya Ejipito mpo ete nzala makasi yango ekokawusa mokili.
31 Dann merkt man nichts mehr vom Überfluß im Land wegen dieser Hungersnot hernach; denn sie wird überschwer sein.
Bakokanisa lisusu te bofuluki nyonso ya mokili likolo ya nzala makasi oyo ekolanda, pamba te nzala ekozala makasi penza.
32 Und daß der Traum des Pharao zweimal in verschiedener Form erschien, heißt: Die Sache ist fest bei Gott beschlossen, und Gott setzt eilends sie ins Werk.
Soki Faraon alotaki ndoto yango na lolenge mibale, elingi koloba ete Nzambe asilaki kozwa mokano na likambo yango mpe akokokisa yango na lombangu.
33 Nun ersehe sich Pharao einen klugen, weisen Mann und setze ihn über das Ägypterland!
Tika sik’oyo Faraon aluka moto moko ya mayele mpe ya bwanya, atia ye na moto ya mokili ya Ejipito.
34 Möge Pharao unverzüglich über das Land Aufseher setzen und dann den fünften Teil aus dem Land Ägypten in den sieben Jahren des Überflusses als Abgabe erheben.
Tika ete Faraon asala bongo; tika ete apona basali na mokili, ba-oyo bakokongola eteni ya mitano ya bambuma ya Ejipito na tango ya mibu sambo ya bofuluki.
35 Dann soll man jeglich Korn dieser kommenden guten Jahre aufspeichern und Getreide zu Pharaos Verfügung in den Städten zur Nahrung anhäufen und verwahren!
Boye, na se ya bokonzi ya Faraon, bakobanda kosangisa biloko nyonso ya kolia oyo mibu ya malamu ekobimisa, bakobomba ble na bingumba mpe bakobatela yango lokola biloko ya kolia mpo na bingumba.
36 Dann ist das Korn dem Land ein Rückhalt für die sieben Hungerjahre, die über das Ägypterland kommen, damit das Land durch die Hungersnot nicht zugrunde gehe."
Bakobatela biloko yango mpo na mokili, mpo na mibu sambo ya nzala makasi oyo ekozala na mokili ya Ejipito; na bongo nzala makasi ekobebisa mokili te.
37 Diese Rede gefiel nun Pharao und all seinen Dienern.
Likambo yango esepelisaki Faraon mpe basali na ye nyonso.
38 Und Pharao sprach zu seinen Dienern: "Könnten wir jemanden wie diesen finden, einen Mann, in dem Gottes Geist ist?"
Faraon atunaki bango: — Tokoki komona moto lokola oyo, moto oyo Molimo na Nzambe avandi kati na ye?
39 Und Pharao sprach zu Joseph: "Weil ein Gott dir all dies geoffenbart, ist keiner so klug und weise wie du.
Faraon alobaki na Jozefi: — Lokola Nzambe ayebisi yo makambo oyo nyonso, ezali na moto moko te oyo azali na mayele mpe na bwanya lokola yo.
40 Du sollst meinem Hause vorstehen! Mein ganzes Volk soll deine Rede achten! Nur um den Thron will ich größer sein als du."
Okozala mokonzi ya ndako na ngai mpe bato na ngai nyonso bakobanda kotosa mitindo na yo. Kaka kiti ya bokonzi nde ekosala ete ngai nazala na likolo na yo.
41 Dann sprach Pharao zu Joseph: "Siehe! Ich setze dich über ganz Ägypterland."
Faraon alobaki na Jozefi: — Natie yo mokonzi ya mokili mobimba ya Ejipito.
42 Dann zog Pharao seinen Siegelring von seiner Hand und streifte ihn an Josephs Hand, kleidete ihn mit Linnengewändern und legte ihm die goldene Kette um den Hals.
Faraon alongolaki lopete na ye na mosapi na ye mpe atiaki yango na mosapi ya Jozefi. Alatisaki ye bilamba ya lino ya kitoko mpe atiaki ye singa ya wolo na kingo.
43 Dann ließ er ihn auf seinem Wagen zweiten Ranges fahren und vor ihm ausrufen: Abrek! und daß man ihn einsetze als König über ganz Ägypterland.
Amatisaki ye na shareti na ye ya mibale mpe bato bazalaki koganga: « Bofukama! » Boye, atiaki Jozefi mokonzi ya mokili mobimba ya Ejipito.
44 Und Pharao sprach zu Joseph: "Ich bin Pharao. Aber ohne dich hebe niemand Hand noch Fuß in ganz Ägypterland!"
Faraon alobaki lisusu na Jozefi: — Nazali Faraon. Kasi awa na Ejipito, moto moko te akotombola loboko to lokolo soki kaka na mitindo na yo te.
45 Und Pharao hieß Joseph Saphnat Paneach. Und er gab ihm zum Weibe Asenat, die Tochter Potipheras, des Priesters von On. So ward Joseph im Ägypterland bekannt.
Faraon apesaki Jozefi kombo « Tsafinati-Paenea, » mpe apesaki ye Asinati, mwana mwasi ya Poti-Fera, nganga-nzambe ya Oni, mpo ete azala mwasi na ye. Jozefi atambolaki na mokili ya Ejipito.
46 Joseph war dreißig Jahre alt, als er in des ägyptischen Königs Pharao Dienste trat. Nachdem Joseph von Pharao weggegangen war, durchzog er ganz Ägypterland.
Azalaki na mibu tuku misato ya mbotama tango akotaki na mosala ya Faraon, mokonzi ya Ejipito. Jozefi alongwaki na miso ya Faraon mpe atambolaki na mokili mobimba ya Ejipito.
47 Das Land war nun in den sieben Jahren des Überflusses überaus fruchtbar.
Na mibu sambo ya bofuluki, mabele ebotaki mingi.
48 So speicherte er jegliches Korn der sieben Jahre im Ägypterland auf und legte Korn in die Städte. In jede Stadt legte er das Korn des Feldes, das sie umgab.
Jozefi asangisaki biloko nyonso ya kolia oyo ebotaki na mibu yango sambo ya bofuluki kati na Ejipito mpe abombaki yango kati na engumba. Na engumba moko na moko, atiaki biloko ya kolia oyo ewutaki na bilanga oyo ezalaki zingazinga na yango.
49 So häufte Joseph Getreide wie Sand am Meere überaus viel auf, bis man das Messen lassen mußte; denn es war unmeßbar.
Jozefi abombaki ble ebele lokola zelo ya ebale monene, ezalaki mingi koleka; yango wana bakataki kotanga, pamba te bakokaki kotanga yango lisusu te.
50 Zwei Söhne aber waren Joseph geboren worden, bevor das Hungerjahr kam. Asenat, die Tochter Potipheras, des Priesters von On, hatte sie ihm geboren.
Liboso ete mibu ya nzala makasi eya, Asinati, mwana mwasi ya Poti-Fera, nganga-nzambe ya Oni, abotelaki Jozefi bana mibali mibale.
51 Und Joseph nannte den Erstgeborenen Manasse; denn "Gott hat mich vergessen lassen all mein Unglück und mein ganzes Haus".
Jozefi apesaki mwana na ye ya liboso kombo « Manase, » pamba te amilobelaki: « Nzambe asali ete nabosana pasi na ngai nyonso mpe bokabwani na ngai na libota mobimba ya tata na ngai. »
52 Den zweiten nannte er Ephraim; denn "Gott hat mich zur Macht im Lande meines Elends kommen lassen".
Apesaki mwana na ye ya mibale kombo « Efrayimi, » pamba te amilobelaki: « Nzambe apesi ngai mabota na mokili epai wapi namonaki pasi. »
53 Zu Ende gingen nun die sieben Jahre des Überflusses im Ägypterland.
Mibu sambo ya bofuluki oyo ezalaki na Ejipito ekomaki na suka,
54 Und die sieben Jahre des Hungers hoben an, wie Joseph gesagt hatte. Hunger war in allen Ländern; aber in ganz Ägypten gab es Brot.
mpe mibu sambo ya nzala makasi ebandaki, ndenge kaka Jozefi alobaki. Nzala makasi ekotaki na mikili nyonso, kasi na mokili mobimba ya Ejipito biloko ya kolia ezangaki te.
55 Als aber auch ganz Ägypterland hungerte, schrie das Volk zu Pharao um Brot; da sprach Pharao zu jedem Ägypter: "Geht zu Joseph! Was er euch sagen wird, tut!"
Tango bato nyonso ya Ejipito bakomaki na nzala makasi, bagangaki epai ya Faraon mpo na koluka biloko ya kolia. Bongo Faraon alobaki na bato nyonso ya Ejipito: « Bokende epai ya Jozefi mpe bosala makambo oyo akoyebisa bino. »
56 Nun kam der Hunger über die ganze Erde. Da öffnete Joseph alle Speicher und verkaufte den Ägyptern Getreide. Aber auch in Ägypten ward der Hunger immer stärker.
Tango nzala ekotaki na mokili mobimba ya Ejipito, Jozefi afungolaki ndako oyo batiaki biloko mpe atekaki ble epai ya bato ya Ejipito; kasi nzala makasi ekobaki kaka.
57 Alle Welt kam nun nach Ägypten, Getreide bei Joseph zu kaufen, denn stark war der Hunger auf der ganzen Erde geworden.
Mikili nyonso ezalaki koya na Ejipito mpo na kosomba ble epai ya Jozefi mpo ete nzala makasi ekotaki na mokili mobimba.

< 1 Mose 41 >