< Romains 8 >

1 Il n’y a donc pas maintenant de condamnation pour ceux qui sont en Jésus-Christ, qui ne marchent pas selon la chair.
Yango wana sik’oyo, etumbu ezali lisusu te mpo na bato oyo bazali kati na Yesu-Klisto.
2 Parce que la loi de l’esprit de vie, qui est dans le Christ Jésus, m’a affranchi de la loi du péché et de la mort.
Pamba te kati na Yesu-Klisto, Mobeko ya Molimo oyo apesaka bomoi ekangoli ngai na bowumbu ya mobeko ya lisumu mpe ya kufa.
3 Car ce qui était impossible à la loi, parce qu’elle était affaiblie par la chair, Dieu, envoyant son Fils dans une chair semblable à celle du péché, a condamné le péché dans la chair à cause du péché même,
Pamba te likambo oyo Mobeko ekokaki kosala te mpo ete bomoto ezangisaki yango nguya, Nzambe asalaki yango na kotinda Mwana na Ye, na nzoto oyo ekokani na nzoto ya bato ya masumu, mpo ete akoma likabo mpo na lisumu. Boye, akatelaki masumu etumbu kati na nzoto ya bato.
4 Afin que la justification de la loi s’accomplît en nous qui ne marchons point selon la chair, mais selon l’esprit.
Asalaki bongo mpo ete bosembo oyo Mobeko esengaka ekokisama kati na biso oyo totambolaka te kolanda baposa ya nzoto, kasi kolanda Molimo.
5 En effet, ceux qui sont selon la chair goûtent les choses de la chair; mais ceux qui sont selon l’esprit ont le sentiment des choses de l’esprit.
Bato oyo batambolaka kolanda baposa ya nzoto batiaka makanisi na bango na makambo ya nzoto, kasi ba-oyo batambolaka kolanda Molimo batiaka makanisi na bango na makambo ya Molimo.
6 Or la prudence de la chair est mort; mais la prudence de l’esprit est vie et paix;
Baposa ya nzoto ememaka na kufa, kasi baposa ya Molimo ememaka na bomoi mpe na kimia.
7 Parce que la sagesse de la chair est ennemie de Dieu; car elle n’est point soumise à la loi de Dieu, et elle ne le peut.
Baposa ya nzoto etombokelaka Nzambe, etosaka Mobeko ya Nzambe te mpe ekotikala kotosa yango ata moke te.
8 Ceux donc qui sont dans la chair ne peuvent plaire à Dieu.
Bato oyo batambolaka kolanda baposa ya nzoto bakoki kosepelisa Nzambe te.
9 Pour vous, vous n’êtes point dans la chair, mais dans l’esprit, si toutefois l’esprit de Dieu habite en vous. Or si quelqu’un n’a point l’esprit du Christ, celui-là n’est point à lui.
Nzokande bino, botambolaka te kolanda baposa ya nzoto, kasi kolanda baposa ya Molimo, mpo ete Molimo ya Nzambe azali kati na bino. Mpe soki moto azangi Molimo ya Klisto azali mpe moto na Ye te.
10 Mais si le Christ est en vous, quoique le corps soit mort à cause du péché, l’esprit vit par l’effet de la justification.
Kasi soki Klisto azali kati na bino, atako nzoto na bino ekokufa mpo na lisumu, kasi Molimo azali bomoi kati na bino, pamba te bokoma bato ya sembo.
11 Que si l’Esprit de celui qui a ressuscité Jésus d’entre les morts habite en vous, celui qui a ressuscité Jésus-Christ d’entre les morts vivifiera aussi vos corps mortels par son Esprit qui habite en vous.
Mpe soki Molimo ya Ye oyo asekwisaki Yesu kati na bakufi azali kovanda kati na bino, Ye oyo asekwisaki Klisto kati na bakufi akopesa mpe bomoi epai na banzoto na bino, oyo ebengami na kokufa, na nzela ya Molimo na Ye, oyo avandaka kati na bino.
12 Ainsi, mes frères, nous ne sommes point redevables à la chair, pour vivre selon la chair.
Yango wana bandeko na ngai, tozali na niongo—kasi ezali niongo ya nzoto te mpo ete totambola te kolanda baposa ya nzoto.
13 Car si c’est selon la chair que vous vivez, vous mourrez; mais si par l’esprit vous mortifiez les œuvres de la chair, vous vivrez.
Pamba te soki botamboli kolanda baposa ya nzoto bokokufa; kasi soki bobomi, na nzela ya Molimo, misala mabe oyo bosalaka kati na banzoto na bino, bokozala na bomoi.
14 Attendu que tous ceux qui sont conduits par l’Esprit de Dieu, ceux-là sont fils de Dieu.
Pamba te bato oyo batambolisamaka na Molimo ya Nzambe bazali bana na Nzambe.
15 Aussi vous n’avez point reçu de nouveau l’esprit de servitude qui inspire la crainte; mais vous avez reçu l’esprit d’adoption des fils, dans lequel nous crions: Abba (Père).
Solo, bozwaki te Molimo oyo akomisaka bino bawumbu mpo ete bozala na kobanga, kasi bozwaki Molimo oyo akomisaka bino bana na Nzambe, mpe ezali na nzela ya Molimo yango nde togangaka: « Tata! »
16 En effet, l’Esprit lui-même rend témoignage à notre esprit que nous sommes enfants de Dieu.
Molimo Ye moko atatolaka na molimo na biso ete tozali bana na Nzambe.
17 Mais si nous sommes enfants, nous sommes aussi héritiers; héritiers de Dieu et cohéritiers de Jésus-Christ, pourvu cependant que nous souffrions avec lui, afin d’être glorifiés avec lui.
Mpe soki tozali bana, tozali mpe bakitani ya libula: tozali bakitani ya libula ya Nzambe, mpe bakitani ya libula elongo na Klisto, soki penza tozali komona pasi elongo na Ye mpo ete tozwa mpe nkembo elongo na Ye.
18 Or j’estime que les souffrances du temps présent ne sont pas dignes de la gloire future qui sera révélée en nous.
Nakanisi ete pasi ya tango oyo ekokani te na motuya ya nkembo oyo ekomonisama mpo na biso.
19 Aussi la créature attend d’une vive attente la manifestation des enfants de Dieu.
Pamba te bikelamu nyonso ezali kozela na posa makasi ete bana na Nzambe bamonisama.
20 Car elle est assujettie à la vanité, non point volontairement, mais à cause de celui qui l’y a assujettie dans l’espérance,
Pamba te bikelamu nyonso ezali na se ya bokonzi ya nguya oyo esukaka na pamba; na mokano na yango moko te, kasi na mokano ya Ye oyo atiaki bikelamu yango na se ya bokonzi yango, na elikya ete
21 Qu’elle-même, créature, sera aussi affranchie de la servitude de la corruption, pour passer à la liberté de la gloire des enfants de Dieu.
bikelamu nyonso mpe ekokangolama na bowumbu ya libebi na yango mpo na kozwa bonsomi ya nkembo oyo bana na Nzambe bakozwa.
22 Car nous savons que toutes les créatures gémissent et sont dans le travail de l’enfantement jusqu’à cette heure.
Toyebi malamu ete kino sik’oyo, bikelamu nyonso ezali kolela pasi lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota.
23 Et non-seulement elles, mais aussi nous-mêmes qui avons les prémices de l’Esprit; oui, nous-mêmes nous gémissons au dedans de nous, attendant l’adoption des enfants de Dieu, la rédemption de notre corps.
Ezali yango moko kaka te nde ezali kolela; kasi biso ba-oyo mpe tozwaki Molimo lokola mbuma ya liboso tozali mpe komona pasi kati na mitema, wana tozali kozela na posa makasi ete Nzambe akomisa biso bana na Ye penza mpe asikola banzoto na biso.
24 Car c’est en espérance que nous avons été sauvés. Or l’espérance qui se voit n’est pas de l’espérance; car ce que quelqu’un voit, comment l’espérerait-il?
Pamba te tosila kobika, kasi kobika yango ezali nanu elikya. Nzokande soki tozali komona eloko oyo tozali kotiela elikya, wana ezali lisusu elikya te, pamba te nani akoki kotia elikya na eloko oyo azali komona?
25 Et si nous espérons ce que nous ne voyons pas encore, nous l’attendons par la patience.
Kasi soki tozali kotia elikya na eloko oyo tozali komona te, solo tokozela yango na molende.
26 De même l’Esprit aussi aide notre faiblesse, car nous ne savons ce que nous devons demander dans la prière; mais l’Esprit lui-même demande pour nous avec des gémissements inénarrables.
Ndenge moko mpe Molimo ayaka kosunga biso kati na bolembu na biso; pamba te toyebi te kosambela na lolenge oyo esengeli, kasi Molimo Ye moko abondelaka mpo na biso na maloba oyo moto akoki koloba te.
27 Et celui qui scrute les cœurs sait ce que désire l’Esprit; car c’est selon Dieu qu’il demande pour les saints.
Mpe Nzambe oyo akundolaka mozindo ya mitema ayebi makanisi ya Molimo, pamba te Molimo abondelaka mpo na basantu kolanda mokano ya Nzambe.
28 Or nous savons que tout coopère au bien pour ceux qui aiment Dieu, pour ceux qui, selon son décret, sont appelés à être saints.
Mpe toyebi malamu ete kati na makambo nyonso, Nzambe asalaka mpo na bolamu ya bato oyo balingaka Ye, ba-oyo babengama kolanda mabongisi na Ye.
29 Car ceux qu’il a connus par sa prescience, il les a aussi prédestinés à être conformes à l’image de son Fils, afin qu’il fût lui-même le premier-né entre beaucoup de frères.
Pamba te bato oyo Nzambe ayeba wuta kala, abongisa mpe bango wuta kala mpo ete bakokana na Mwana na Ye, mpo ete azala Mwana ya liboso kati na bandeko ebele.
30 Et ceux qu’il a prédestinés, il les a appelés; et ceux qu’il a appelés, il lésa aussi justifiés, et ceux qu’il a justifiés, il les a aussi glorifiés.
Mpe ba-oyo abongisa wuta kala, abenga mpe bango; ba-oyo abenga, akomisa bango bato ya sembo; mpe ba-oyo akomisa bato ya sembo, apesa bango mpe nkembo na Ye.
31 Que dirons-nous donc après cela? Si Dieu est pour nous, qui sera contre nous?
Boye, toloba lisusu nini? Soki Nzambe azali mpo na biso, nani akotelemela biso?
32 Lui qui n’a pas épargné même son propre Fils, mais qui l’a livré pour nous tous, comment ne nous aurait-il pas donné toutes choses avec lui?
Ye oyo aboyaki te kopesa Mwana na Ye se moko, kasi akabaki Ye mpo na biso nyonso, ndenge nini azanga kopesa biso biloko nyonso elongo na Ye na nzela ya ngolu?
33 Qui accusera les élus de Dieu? C’est Dieu qui les justifie;
Nani akofunda bato oyo Nzambe apona? Ezali Nzambe nde akomisaka sembo.
34 Quel est celui qui les condamnerait? C’est le Christ Jésus qui est mort pour eux, qui de plus est ressuscité, qui est à la droite du Père, et qui même intercède pour nous.
Nani akokatela bango etumbu? Moko te! Yesu-Klisto akufaki; kutu, asekwaki, azali na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe, mpe azali kobondela mpo na biso.
35 Qui donc nous séparera de l’amour du Christ? Est-ce la tribulation? est-ce l’angoisse? est-ce la faim? est-ce la nudité? est-ce le péril? est-ce la persécution? est-ce le glaive?
Nani akokabola biso na bolingo ya Klisto? Pasi, somo, minyoko, nzala, kozanga bilamba, likama to mopanga?
36 (Selon qu’il est écrit: À cause de vous, nous sommes mis à mort tout le jour; on nous regarde comme des brebis de tuerie.)
Kolanda ndenge ekomama: « Ezali mpo na Yo nde balukaka koboma biso mikolo nyonso; bazwaka biso lokola bameme ya koboma. »
37 Mais en tout cela nous triomphons par celui qui nous a aimés.
Kasi kati na makambo oyo nyonso, tozali penza balongi na nzela ya Ye oyo alinga biso.
38 Car je suis certain que ni mort, ni vie, ni anges, ni principautés, ni puissances, ni choses présentes, ni choses futures, ni violence,
Pamba te nandimisami ete ezala kufa to bomoi, ba-anjelu to milimo mabe, makambo ya mikolo oyo to makambo oyo ekoya, banguya ya ndenge na ndenge,
39 Ni ce qu’il y a de plus élevé, ni ce qu’il y a de plus profond, ni aucune autre créature, ne pourra nous séparer de l’amour de Dieu, qui est dans le Christ Jésus Notre Seigneur.
banguya ya likolo to ya se ya mabele to eloko mosusu oyo Nzambe akela, eloko moko te ekoki kokabola biso na bolingo ya Nzambe kati na Yesu-Klisto, Nkolo na biso.

< Romains 8 >