< Matthieu 7 >

1 Ne jugez point, afin que vous ne soyez point jugés.
Bosambisaka te mpo ete, bino mpe, basambisa bino te.
2 Car d’après le jugement selon lequel vous aurez jugé, vous serez jugés, et selon la mesure avec laquelle vous aurez mesuré, mesure vous sera faite.
Pamba te bakosambisa bino ndenge kaka bino bosambisaka baninga, mpe bakomeka bino na emekelo kaka oyo bino bosalelaka mpo na komeka bato mosusu.
3 Pourquoi vois-tu la paille qui est dans l’œil de ton frère et ne vois-tu point la poutre qui est dans ton œil?
Mpo na nini ozali kotala mwa lititi oyo ezali kati na liso ya ndeko na yo, wana ozali komona te nzete oyo ezali kati na liso na yo moko?
4 Ou comment dis-tu à ton frère: Laisse-moi ôter la paille de ton œil, tandis qu’il y a une poutre dans le tien?
Ndenge nini okoki koloba na ndeko na yo: ‹ Ndeko na ngai, tika ete nalongola yo mwa lititi oyo ezali kati na liso, › wana ozali na nzete kati na liso na yo?
5 Hypocrite, ôte d’abord la poutre de ton œil, et alors tu songeras à ôter la paille de l’œil de ton frère.
Bolole! Banda nanu kolongola nzete oyo ezali kati na liso na yo, bongo miso na yo ekomona malamu mpo ete okoka kolongola mwa lititi oyo ezali kati na liso ya ndeko na yo.
6 Ne donnez pas les choses saintes aux chiens, et ne jetez pas vos perles devant les pourceaux, de peur qu’ils ne les foulent aux pieds, et que, se tournant, ils ne vous déchirent.
Bopesa te biloko ya bule epai ya bambwa, noki te ekozongela bino mpo na koswa bino; bobwaka te bapawuni na bino ya talo epai ya bangulu, noki te ekonyata-nyata yango.
7 Demandez, et il vous sera donné; cherchez et vous trouverez; frappez, et il vous sera ouvert.
Bosenga, mpe bakopesa bino; boluka, mpe bokomona; bobeta ekuke, mpe bakofungolela bino;
8 Car quiconque demande, reçoit; et qui cherche, trouve; et à qui frappe, il sera ouvert.
pamba te moto nyonso oyo asengaka azwaka, moto oyo alukaka amonaka; mpe moto oyo abetaka ekuke, bafungolelaka ye yango.
9 Quel est d’entre vous l’homme qui, si son fils lui demande du pain, lui présentera une pierre?
Nani kati na bino apesaka na mwana na ye libanga, soki asengi ye lipa?
10 Ou si c’est un poisson qu’il lui demande, lui présentera-t-il un serpent?
To nani apesaka na mwana na ye nyoka soki asengi mbisi?
11 Si donc vous qui êtes mauvais, vous savez donner de bonnes choses à vos enfants, combien plus votre Père qui est dans les cieux donnera-t-il de bonnes choses à ceux qui les lui demandent?
Soki bino bato oyo bozali kutu mabe boyebi kopesa na bana na bino biloko ya malamu, ndenge nini Tata na bino oyo azali na Likolo apesa te biloko ya kitoko epai ya bato oyo basengaka Ye yango?
12 Ainsi, tout ce que vous voulez que les hommes vous fassent, faites-le leur aussi: car c’est la loi et les prophètes.
Nyonso oyo bolingaka ete bato mosusu basalela bino, bino mpe bosalaka yango mpo na bango; pamba te yango nde mateya nyonso ya Mobeko mpe ya basakoli.
13 Entrez par la porte étroite; parce que large est la porte et spacieuse la voie qui conduit à la perdition; et nombreux sont ceux qui entrent par elle.
Bokotela na ekuke ya moke; pamba te ekuke mpe nzela oyo ememaka na libebi ezali monene, mpe bato ebele bakotelaka wana.
14 Combien est étroite la porte et resserrée la voie qui conduit à la vie, et qu’il en est peu qui la trouvent!
Kasi ekuke to nzela oyo ememaka na bomoi ezali moke, mpe bato moke kaka nde bamonaka yango.
15 Gardez-vous des faux prophètes qui viennent à vous sous des vêtements de brebis, tandis qu’au dedans ce sont des loups ravissants:
Bosala keba na basakoli ya lokuta! Tango bayaka epai na bino, bazwaka lolenge ya bameme, kasi bazali penza bambwa ya zamba oyo etonda na kanda.
16 Vous les connaîtrez à leurs fruits. Cueille-t-on des raisins sur des épines, ou des figues sur des ronces?
Bokoyeba bango na nzela ya misala na bango. Boni, bokoki kolongola bambuma ya vino na nzete ya basende to kobuka bambuma ya figi na nzete ya banzube?
17 Ainsi, tout arbre bon produit des fruits bons; mais tout mauvais arbre produit de mauvais fruits.
Nzete nyonso ya malamu ebotaka mpe bambuma ya malamu, kasi nzete ya mabe ebotaka mpe bambuma ya mabe.
18 Un arbre bon ne peut produire de mauvais fruits, ni un arbre mauvais produire de bons fruits.
Nzete ya malamu ebotaka te bambuma ya mabe, mpe nzete ya mabe ebotaka te bambuma ya malamu.
19 Tout arbre qui ne produit point de bon fruit sera coupé et jeté au feu.
Nzete nyonso oyo ebotaka te bambuma ya malamu, bapikolaka yango mpe babwakaka yango na moto.
20 Vous les connaîtrez donc à leurs fruits.
Boye, bokoyeba basakoli ya lokuta na nzela ya misala na bango.
21 Ce ne sont pas tous ceux qui me disent: Seigneur, Seigneur, qui entreront dans le royaume des cieux; mais celui qui fait la volonté de mon Père qui est aux cieux, celui-là entrera dans le royaume des cieux.
Bato nyonso oyo balobaka na Ngai: ‹ Nkolo! Nkolo! › bakokota te na Bokonzi ya Likolo, kaka bato oyo basalaka mokano ya Tata na Ngai, oyo azali kati na Likolo.
22 Beaucoup me diront en ce jour là: Seigneur, Seigneur, n’est-ce pas en votre nom que nous avons prophétisé; en votre nom que nous avons chassé des démons, et en votre nom que nous avons fait beaucoup de miracles?
Na mokolo ya kosambisama, bato ebele bakoloba na Ngai: ‹ Nkolo! Nkolo! Ezali te na Kombo na Yo nde tosakolaki, tobenganaki milimo mabe mpe tosalaki bikamwa ebele? ›
23 Et alors je leur dirai hautement: Je ne vous ai jamais connu: retirez-vous de moi, vous qui opérez l’iniquité.
Bongo Ngai, nakoyebisa bango: ‹ Natikala koyeba bino te! Bolongwa liboso na Ngai, bino bato mabe! ›
24 Quiconque donc entend ces paroles que je dis et les accomplit, sera comparé à un homme sage qui a bâti sa maison sur la pierre:
Yango wana, moto nyonso oyo ayoki makambo oyo nawuti koloba mpe atie yango na misala akokani na moto ya mayele oyo atongaki ndako na ye na likolo ya libanga.
25 Et la pluie est descendue, et les fleuves se sont débordés et les vents ont soufflé et sont venus fondre sur cette maison, et elle n’a pas été renversée, parce qu’elle était fondée sur la pierre.
Tango mvula ebetaki makasi, mayi mpe mopepe eyaki makasi, emibwakaki na ndako yango; kasi atako bongo, ndako ekweyaki te, pamba te miboko na yango etongamaki na likolo ya libanga.
26 Mais quiconque entend ces paroles que je dis, et ne les accomplit point, sera semblable à un homme insensé qui a bâti sa maison sur le sable;
Nzokande, moto nyonso oyo ayoki makambo oyo nawuti koloba, kasi atie yango te na misala, akokani na zoba oyo atongaki ndako na ye na likolo ya zelo:
27 Et la pluie est descendue, et les fleuves se sont débordés, et les vents ont soufflé et sont venus fondre sur cette maison; elle s’est écroulée et sa ruine a été grande.
tango mvula ebetaki makasi, mayi eyaki elongo na mopepe makasi, emibwakaki na ndako yango; ndako yango ekweyaki, mpe nyonso epanzanaki. »
28 Or il arriva que, lorsque Jésus eut achevé ces discours, le peuple était dans l’admiration de sa doctrine.
Tango Yesu asilisaki koloba maloba oyo, bato nyonso bakamwaki makasi malakisi na Ye,
29 Car il les instruisait comme ayant autorité, et non comme leurs scribes et les pharisiens.
pamba te ateyaki bango na bokonzi oyo balakisi na bango ya Mobeko bazangaki.

< Matthieu 7 >