< Malachie 4 >
1 Car voici que viendra un jour embrasé comme la fournaise; et tous les superbes et tous ceux qui commettent l’impiété seront de la paille, et le jour qui viendra les enflammera, dit le Seigneur des armées, et il ne leur laissera ni racine ni germe.
Pamba te mokolo yango ezali koya; ekozala moto makasi lokola fulu ya moto. Bato nyonso ya lofundu mpe bato nyonso oyo basalaka mabe bakokoma lokola matiti ya kokawuka. Mokolo yango ekozikisa bango, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. « Ekotikala ata mosisa to etape te.
2 Et il se lèvera pour vous qui craignez mon nom, un soleil de justice, la guérison sera sous ses ailes: et vous sortirez et vous bondirez comme les veaux d’un troupeau.
Kasi mpo na bino oyo botosaka Kombo na Ngai, moyi ya bosembo ekobima mpe ekomemela bino lobiko. Boye, bokobina mpe bokopumbwa na esengo lokola bana ngombe ya mibali kati na lopango.
3 Et vous foulerez aux pieds les impies, lorsqu’ils seront de la cendre sous la plante de vos pieds, au jour auquel moi j’agirai, dit le Seigneur des armées.
Bokonyata bato mabe, pamba te bakokoma lokola putulu na se ya matambe na bino, na mokolo oyo nazali kobongisa, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
4 Souvenez-vous de la loi de Moïse, mon serviteur, loi que je lui ai donnée à Horeb pour tout Israël, des préceptes et des ordonnances.
« Bokanisa Mobeko, malako mpe mitindo oyo napesaki epai ya Moyize, mosali na Ngai, na ngomba Orebi, mpo na Isalaele mobimba.
5 Voici que moi je vous enverrai Elie, le prophète, avant que vienne le jour grand et terrible du Seigneur.
Liboso ete mokolo ya Yawe eya, mokolo monene mpe ya somo, nakotindela bino mosakoli Eliya.
6 Et il ramènera le cœur des pères aux fils et le cœur des fils à leurs pères, de peur que je ne vienne et que je ne frappe la terre d’anathème.
Akozongisa mitema ya batata epai ya bana, mpe mitema ya bana epai ya batata, soki te nakoya kobebisa mokili na nzela ya bilakeli mabe. »