< Josué 1 >
1 Or, il arriva après la mort de Moïse, serviteur du Seigneur, que le Seigneur parla à Josué, fils de Nun, serviteur de Moïse, et qu’il lui dit:
Sima na kufa ya Moyize, mowumbu na Yawe, Yawe alobaki na Jozue, mwana mobali ya Nuni, mosungi ya Moyize:
2 Moïse, mon serviteur est mort, lève-toi, passe le Jourdain, toi et tout le peuple avec toi, et va dans la terre que je donnerai moi-même aux enfants d’Israël.
« Moyize, mowumbu na Ngai, asili kokufa. Sik’oyo, yo elongo na bato oyo nyonso, bobongama mpo na kokatisa ebale Yordani mpe kokota na mokili oyo nakopesa bana ya Isalaele.
3 Tout lieu que la plante de votre pied aura foulé, je vous le livrerai, comme j’ai dit à Moïse.
Nakopesa bino esika nyonso oyo matambe ya makolo na bino ekonyata, ndenge nalakaki Moyize.
4 Depuis le désert et le Liban jusqu’au grand fleuve d’Euphrate, toute la terre des Héthéens, jusqu’à la grande mer contre le couchant du soleil, sera votre limite.
Mokili na bino ekozala longwa na esobe kino na bangomba ya Libani oyo bozali komona, mpe longwa na Ebale monene, ebale Efrate, mokili nyonso ya bato ya Iti kino na Ebale monene, na ngambo ya weste: yango nde ekozala mokili na bino.
5 Nul ne pourra vous résister pendant tous les jours de ta vie: comme j’ai été avec Moïse, ainsi je serai avec toi, je ne te laisserai, ni ne t’abandonnerai.
Na mikolo nyonso ya bomoi na yo, moto moko te akolonga kotelemela yo. Ndenge nazalaki elongo na Moyize, ndenge wana mpe nakozala elongo na yo; nakotika yo te mpe nakosundola yo te.
6 Prends courage et sois fort, car c’est toi qui partageras à ce peuple par le sort la terre, au sujet de laquelle j’ai juré à leurs pères que je la leur livrerais.
Zala makasi mpe yika mpiko, pamba te yo nde okokamba bato oyo mpe okopesa bango mokili oyo nalakaki kopesa lokola libula epai ya batata na bango na nzela ya ndayi.
7 Prends donc courage, et sois très fort, afin que tu gardes et que tu pratiques toute la loi que t’a prescrite Moïse, mon serviteur: ne t’en détourne ni à droite ni à gauche, afin que tu comprennes tout ce que tu fais.
Kasi zala makasi mpe yika mpiko, sala keba ete otosa mibeko nyonso oyo Moyize, mowumbu na Ngai, apesaki yo; komeka te kobima libanda na yango, ezala na ngambo ya loboko ya mobali to na ngambo ya loboko ya mwasi, mpo ete okoka kolonga na makambo nyonso oyo okosala.
8 Que le livre de cette loi ne s’éloigne point de ta bouche; tu le méditeras les jours et les nuits, afin que tu gardes et pratiques tout ce qui y est écrit: alors tu dirigeras ta voie et tu la comprendras.
Sala ete maloba ya buku oyo ya Mobeko ewumela tango nyonso na monoko na yo; tangaka mpe kanisaka yango butu mpe moyi, mpo ete osala kolanda nyonso oyo ekomami kati na yango. Na bongo nde okokende liboso mpe okolonga kati na misala na yo nyonso.
9 Voici que je te l’ordonne, prends courage et sois fort. Ne crains point, et ne t’épouvante point, parce que le Seigneur ton Dieu est avec toi en quelque lieu que tu ailles.
Boni, nalobaki na yo te: Zala makasi mpe yika mpiko? Kozala na somo te mpe kolemba nzoto te, pamba te Ngai Yawe, Nzambe na yo, nakozala elongo na yo na bisika nyonso oyo okokende. »
10 Et Josué ordonna aux princes du peuple, disant: Passez par le milieu du camp, et commandez au peuple, et dites:
Jozue apesaki mitindo epai ya bakambi ya bato:
11 Préparez-vous des vivres, parce qu’après trois jours vous passerez le Jourdain, et vous entrerez entrerez pour la posséder, dans la terre que le Seigneur votre Dieu va vous donner.
« Botambola kati na molako mpe boloba na bato: ‹ Bobongisa bilei na bino, pamba te sima na mikolo misato, bokokatisa ebale Yordani na esika oyo mpo na kokende kobotola mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, asili kopesa bino. › »
12 Aux Rubénites aussi et aux Gadites et à la demi-tribu de Manassé, il dit:
Kasi Jozue alobaki na bato ya libota ya Ribeni, na bato ya libota ya Gadi, mpe na bato ya ndambo ya libota ya Manase:
13 Souvenez-vous de ce que vous ordonna Moïse, serviteur du Seigneur, disant: Le Seigneur votre Dieu vous a donné le repos et toute cette terre.
— Bobosana te Mobeko oyo Moyize, mowumbu ya Yawe, apesaki bino: « Yawe, Nzambe na bino, apesaki bino bopemi mpe mabele oyo. »
14 Vos femmes, vos enfants et vos bestiaux demeureront dans la terre que vous a livrée Moïse en deçà du Jourdain; mais vous, passez armés devant vos frères, vous tous forts de la main, et combattez pour eux,
Kaka basi, bana mpe bibwele na bino nde bakoki kotikala na mabele oyo Moyize apesaki bino na ngambo ya este ya Yordani. Kasi bilombe na bino nyonso ya etumba basengeli kolata bibundeli, kokatisa mpe kotambola liboso ya bandeko na bino. Bokosunga bandeko na bino
15 Jusqu’à ce que le Seigneur donne le repos à vos frères, comme il vous l’a donné à vous-mêmes; et qu’ils possèdent eux aussi la terre que le Seigneur votre Dieu va leur donner: et c’est ainsi que vous retournerez dans la terre de votre possession, et que vous habiterez dans cette terre que vous a donnée Moïse, serviteur de Dieu en deçà du Jourdain contre le levant.
kino Yawe akopesa bango mpe bopemi ndenge asalaki mpo na bino, mpe kino tango bango mpe bakobotola mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, apesi bango. Na sima na yango nde bokoki kozonga mpe kovanda na mabele na bino moko, mabele oyo Moyize, mosali na Yawe, apesaki bino na ngambo ya este ya Yordani, na ngambo oyo moyi ebimelaka.
16 Et ils répondirent à Josué et dirent: Nous ferons tout ce que tu nous as ordonné; et nous irons partout où tu nous enverras.
Bazongiselaki Jozue: — Tokosala nyonso oyo okotinda biso mpe tokokende esika nyonso oyo okotinda biso.
17 Comme nous avons obéi en toutes choses à Moïse, ainsi nous t’obéirons à toi-même. Seulement que le Seigneur ton Dieu soit avec toi, comme il a été avec Moïse.
Ndenge totosaki Moyize na makambo nyonso, ndenge wana mpe tokotosa yo. Tika ete Yawe, Nzambe na yo, azala elongo na yo ndenge azalaki elongo na Moyize!
18 Que celui qui contredira ta parole, et qui n’obéira pas à tous les discours que tu lui prescriras, meure; seulement, toi, fortifie-toi, et agis courageusement.
Moto nyonso oyo akotombokela mitindo na yo to akotosa te maloba na yo na likambo nyonso oyo okotinda, akokufa. Tika ete ozala makasi mpe oyika mpiko!