< Exode 5 >

1 Après cela Moïse et Aaron entrèrent et dirent à Pharaon: Voici ce que dit le Seigneur Dieu d’Israël: Laisse aller mon peuple, afin qu’il me sacrifie dans le désert.
Sima na yango, Moyize mpe Aron bakendeki epai ya Faraon mpe balobaki: — Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi: « Tika bato na Ngai kokende kosala feti na esobe mpo na lokumu na Ngai. »
2 Mais celui-ci répondit: Qui est le Seigneur, pour que j’écoute sa voix et que je laisse aller Israël? Je ne connais point le Seigneur, et Israël, je ne le laisserai pas aller.
Faraon azongisaki: — Ye Yawe nde nani mpo ete ngai natosa ye mpe natika Isalaele kokende? Nayebi ye te mpe nakotika te ete Isalaele akende.
3 Ils dirent encore: Le Dieu des Hébreux nous a appelés, afin que nous fassions le chemin de trois journées dans le désert, et que nous sacrifiions au Seigneur notre Dieu, de peur que ne nous advienne la peste ou le glaive.
Balobaki: — Nzambe ya Ba-Ebre akutanaki na biso. Sik’oyo, tika biso totambola mikolo misato kati na esobe mpo ete tokobonzela Yawe, Nzambe na biso, mbeka; noki te akoboma biso na bokono to na mopanga.
4 Le roi d’Egypte leur répondit: Pourquoi, Moïse et Aaron, détournez-vous le peuple de ses ouvrages? Allez à vos travaux.
Kasi mokonzi ya Ejipito alobaki: — Moyize mpe Aron, mpo na nini bozali kopekisa bato kosala misala na bango? Bozonga na mosala na bino!
5 Pharaon ajouta: Le peuple est nombreux dans le pays: vous voyez que la multitude s’est insensiblement accrue; combien plus, si vous lui donnez relâche dans ses travaux?
Faraon abakisaki lisusu: — Botala! Bato oyo bakomi ebele kati na mokili, bongo bino bozali kopekisa bango kosala mosala!
6 Il commanda donc en ce jour-là aux intendants des travaux, et aux exacteurs du peuple, disant:
Kaka na mokolo wana, Faraon apesaki mitindo oyo epai ya bakambi oyo balandelaka misala makasi ya bawumbu mpe na bakapita ya bana ya Isalaele:
7 Vous ne donnerez plus du tout de paille au peuple pour faire des briques, comme auparavant; mais qu’ils aillent eux-mêmes, et qu’ils ramassent du chaume.
— Bokopesa lisusu matiti te epai ya bato oyo mpo na kosala babiliki ndenge bozalaki kopesa bango liboso; botika bango moko bakende kolokota matiti na bango.
8 Cependant vous leur imposerez la quantité de briques qu’ils faisaient auparavant, et vous n’en diminuerez rien; car ils chôment, et c’est pour cela qu’ils vocifèrent, disant: Allons et sacrifions à notre Dieu.
Kasi botinda bango kosala kaka motango ya babiliki oyo basalaka wuta kala, bokitisa motango na yango te. Bazali bagoyigoyi, yango wana bazali koganga: « Tika biso tokende kobonzela Nzambe na biso mbeka! »
9 Qu’ils soient accablés d’ouvrages et qu’ils les accomplissent, et qu’ils n’acquiescent point à des paroles mensongères.
Bokomisa makasi misala na bango mpo ete bakoma na mosala ebele mpe batia matoyi te na makambo ya lokuta.
10 Etant donc sortis, les intendants des travaux et les exacteurs dirent au peuple: Ainsi dit Pharaon: Je ne vous donne point de paille.
Bongo bakambi oyo balandelaka misala makasi ya bawumbu mpe bakapita ya bana ya Isalaele babimaki mpe balobaki na bato: — Tala makambo oyo Faraon alobi: « Nakopesa bino lisusu matiti te.
11 Allez et amassez où vous pourrez trouver, et rien ne sera diminué de votre ouvrage.
Bokende kozwa matiti bino moko na esika oyo bokoki komona yango! Kasi motango ya babiliki oyo bakatela bino ekokita ata moke te. »
12 Et le peuple se dispersa dans toute la terre d’Egypte pour amasser de la paille.
Boye bana ya Isalaele bapanzanaki na Ejipito mobimba mpo na kolokota matiti ya kotumba na yango babiliki.
13 Les intendants des travaux aussi les pressaient, disant: Achevez votre ouvrage chaque jour, comme auparavant vous aviez coutume de faire, quand on vous donnait la paille.
Bakambi oyo balandelaka misala makasi ya bawumbu bazalaki kotindika bango na makasi mpe koloba: — Bokokisa motango ya babiliki oyo bakatela bino mpo na mokolo na mokolo lokola na tango oyo bazalaki kopesa bino matiti!
14 Ceux mêmes qui présidaient aux travaux des enfants d’Israël furent flagellés par les exacteurs de Pharaon, qui leur disaient: Pourquoi n’avez-vous point achevé le nombre de briques, ni hier ni aujourd’hui, comme auparavant?
Bakambi oyo Faraon aponaki mpo na kolandela misala makasi ya bawumbu babetaki bakapita ya bana ya Isalaele oyo bango batiaki mpe batunaki bango: — Mpo na nini lobi oyo eleki mpe lelo bokokisi te motango ya babiliki oyo bosalaka wuta kala?
15 Alors vinrent les préposés aux enfants d’Israël, et ils vociférèrent contre Pharaon, disant: Pourquoi agissez-vous ainsi contre vos serviteurs?
Bakengeli ya bana ya Isalaele bakendeki kolela epai ya Faraon: — Mpo na nini ozali kosala basali na yo boye?
16 On ne nous donne point de paille, et l’on nous commande également des briques: voici que nous, vos serviteurs, nous sommes déchirés de verges, et que l’on agit injustement contre votre peuple.
Bazali kopesa lisusu te matiti epai ya basali na yo, nzokande bazali koloba na biso: « Bosala babiliki! » Sik’oyo tala, basali na yo bazali kobetama, kasi mbeba ezali epai ya bato na yo moko.
17 Pharaon répondit: Vous chômez par oisiveté, et c’est pourquoi vous dites: Allons et sacrifions au Seigneur.
Faraon alobaki: — Bagoyigoyi! Bozali penza bagoyigoyi! Yango wana bozali koloba: « Tika biso tokende kobonzela Yawe mbeka. »
18 Allez donc et travaillez; on ne vous donnera point de paille, et vous rendrez le compte accoutumé de briques.
Sik’oyo, bozonga na mosala! Bakopesa bino lisusu matiti te, kasi bokosala kaka motango ya babiliki oyo bakatela bino.
19 Ainsi les préposés aux enfants d’Israël se voyaient dans une fâcheuse position, puisqu’il leur était dit: Rien ne sera diminué des briques chaque jour.
Bakengeli ya bana ya Isalaele bamonaki ete bakomi na pasi koleka tango bayebisaki bango: « Motango ya babiliki oyo bakatela bino mpo na mokolo na mokolo ekokita te. »
20 Or ils rencontrèrent Moïse et Aaron qui se trouvaient vis-à-vis, quand ils sortirent d’avec Pharaon,
Tango batikaki Faraon, batombokelaki Moyize mpe Aron oyo bazalaki kozela bango.
21 Et ils leur dirent: Que le Seigneur voie et juge; car vous nous avez mis en mauvaise odeur auprès de Pharaon et de ses serviteurs, et vous lui avez donné un glaive pour qu’il nous tue.
Balobaki: — Tika ete Yawe atala bino mpe asambisa bino! Bokomisi biso eloko ya nkele liboso ya Faraon mpe ya basali na ye mpe botie mopanga na maboko na bango mpo ete baboma biso!
22 Alors Moïse retourna vers le Seigneur, et dit: Seigneur, pourquoi avez-vous affligé ce peuple? pourquoi m’avez-vous envoyé?
Boye Moyize abalukaki epai na Yawe mpe abondelaki: — Nkolo! Mpo na nini ozali komemela bato oyo pasi? Boni, ezali mpo na yango nde otindaki ngai?
23 Car depuis que je suis entré auprès de Pharaon pour lui parler en votre nom, il a affligé votre peuple, et vous ne les avez pas délivrés.
Wuta tango nakendeki koloba na Faraon na Kombo na Yo, Faraon akomi konyokola bato oyo, bongo Yo ozali kosala ata eloko moke te mpo na kokangola bango!

< Exode 5 >