< Actes 22 >
1 Hommes, mes frères et mes pères, écoutez ma défense que je vais entreprendre devant vous.
— Bandeko mpe batata, boyoka sik’oyo ndenge nini nalingi komilongisa.
2 Quand ils entendirent qu’il leur parlait en langue hébraïque, il se fit encore un plus grand silence.
Tango bayokaki Polo koloba na lokota ya Arami, bavandaki lisusu kimia koleka. Bongo, Polo alobaki:
3 Il dit donc: Je suis Juif, né à Tarse en Cilicie, élevé dans cette ville aux pieds de Gamaliel, instruit selon la vérité de la loi de nos pères, zélateur de cette loi, comme vous l’êtes vous tous aujourd’hui;
— Nazali Moyuda, nabotama na Tarse kati na Silisi, kasi nakoli kaka awa, na engumba oyo ya Yelusalemi. Gamalieli nde azalaki molakisi na ngai; ye nde ateyaki ngai na bosolo nyonso Mobeko ya bakoko na biso. Nazalaki na bolingo makasi mpo na Nzambe, ndenge bino nyonso bozali na yango lelo.
4 C’est moi qui ai poursuivi jusqu’à la mort ceux de cette voie, les chargeant de liens, hommes et femmes, et les jetant en prison,
Nanyokolaki bato oyo bazalaki kolanda Nzela oyo kino koboma bango, nazalaki kokanga mibali mpe basi, mpe kobwaka bango na boloko.
5 Comme le prince des prêtres m’en est témoin ainsi que tous les anciens; et même, ayant reçu d’eux des lettres pour nos frères de Damas, j’y allais pour les amener enchaînés à Jérusalem, afin qu’ils fussent punis.
Mokonzi ya Banganga-Nzambe mpe lisanga mobimba ya bakambi bakoki kotatola bosolo ya makambo oyo nazali koloba. Bango nde kutu bapesaki ngai mikanda mpo ete nakende kopesa na bandeko na bango ya Damasi. Boye, nakendeki kuna mpo na kokanga bato mpe komema bango na Yelusalemi, mpo ete bapesa bango etumbu.
6 Or il arriva que lorsque j’étais en chemin, et que j’approchais de Damas au milieu du jour, soudain brilla du ciel autour de moi une abondante lumière;
Wana nazalaki na nzela mpe nakomaki pene ya Damasi, na ngonga pene ya midi, namonaki mbala moko pole makasi kowuta na Likolo mpe kongengela ngai.
7 Et tombant par terre, j’entendis une voix qui me disait: Saul, Saul, pourquoi me persécutes-tu?
Nakweyaki na mabele mpe nayokaki mongongo moko koloba na ngai: « Saulo, Saulo, mpo na nini ozali konyokola Ngai? »
8 Et moi je répondis: Qui êtes-vous. Seigneur? Et il me dit: Je suis Jésus de Nazareth, que tu persécutes.
Natunaki: « Nkolo, yo nani? » Alobaki na ngai: « Nazali Yesu ya Nazareti, oyo yo ozali konyokola. »
9 Et ceux qui étaient avec moi virent la lumière, mais ils n’entendirent pas la voix de celui qui me parlait.
Bato oyo bazalaki na ngai elongo bamonaki pole yango, kasi bayokaki te mongongo ya moto oyo azalaki koloba na ngai.
10 Alors je demandai: Que ferai-je, Seigneur? Et le Seigneur me répondit: Lève-toi, va à Damas; et là on te dira tout ce qu’il faut que tu fasses.
Natunaki: « Nkolo, nasala nini? » Nkolo alobaki na ngai: « Telema, kende na Damasi; kuna, bakoyebisa yo makambo nyonso oyo osengeli kosala. »
11 Et comme je ne voyais point, à cause de l’éclat de cette lumière, conduit par la main de mes compagnons, je vins à Damas.
Baninga na ngai basimbaki ngai na loboko mpe bamemaki ngai kino na Damasi, pamba te kongenga ya pole wana ebomaki ngai miso.
12 Or un certain Ananie, homme selon la loi, ayant le témoignage de tous les Juifs qui habitaient dans cette ville,
Ezalaki na moto moko kuna, kombo na ye ezalaki « Ananiasi. » Azalaki kotosa makambo ya Nzambe ndenge Mobeko ezalaki kotinda, mpe azalaki na lokumu mingi na miso ya Bayuda nyonso ya engumba wana.
13 Venant à moi, et s’approchant, me dit: Saul, mon frère, regarde. Et moi, au même instant, je le regardai.
Ayaki kokutana na ngai mpe alobaki: « Ndeko na ngai, Saulo, mona lisusu. » Mpe kaka na tango yango, nazwaki lisusu makoki ya komona mpe namonaki ye.
14 Et lui reprit: Le Dieu de nos pères t’a préordonné pour connaître sa volonté, voir le Juste, et entendre la voix de sa bouche;
Bongo alobaki na ngai: « Nzambe ya bakoko na biso apona yo wuta kala mpo ete oyeba mokano na Ye, omona Moto na sembo mpe oyoka mongongo na Ye.
15 Parce que tu lui seras témoin devant tous les hommes, de ce que tu as vu et entendu.
Okozala motatoli na Ye liboso ya bato nyonso, mpo na koyebisa bango makambo nyonso oyo osili komona mpe koyoka.
16 Et maintenant, que tardes-tu? Lève-toi, reçois le baptême et lave tes péchés en invoquant son nom.
Mpo na nini ozali kolekisa tango? Telema, zwa libatisi mpe belela Kombo ya Nkolo mpo ete opetolama na masumu na yo. »
17 Et il arriva qu’étant de retour à Jérusalem, et priant dans le temple, je tombai dans un ravissement d’esprit,
Sima na ngai kozonga na Yelusalemi, wana nazalaki kosambela na Tempelo, nakweyaki na Molimo
18 Et je vis le Seigneur qui me disait: Hâte-toi, et sors vite de Jérusalem; car ils ne recevront pas le témoignage que tu rends de moi.
mpe nayokaki Nkolo koloba na ngai: « Sala noki, bima na Yelusalemi, pamba te bato na yango bakondima te litatoli oyo okoloba na tina na Ngai. »
19 Et moi je répondis: Seigneur, ils savent eux-mêmes que c’est moi qui enfermais en prison et déchirais de coups dans les synagogues ceux qui croyaient en vous;
Nazongisaki: « Nkolo, bato wana bayebi malamu ete nazalaki kotambola na bandako ya mayangani mpo na kobwaka na boloko mpe kobetisa fimbu, bato oyo bazalaki kondimela Yo.
20 Et que, lorsqu’on versait le sang d’Etienne, votre témoin, j’étais là, et j’y consentais, et je gardais les vêtements de ses meurtriers.
Tango basopaki makila ya Etieni, motatoli na Yo, ngai mpe nazalaki wana, nandimaki makambo oyo esalemaki mpe nazalaki kokengela bilamba ya bato oyo babomaki ye. »
21 Et il me dit: Va, parce que je t’enverrai bien loin vers les nations.
Kasi Nkolo azongiselaki ngai: « Kende, nakotinda yo mosika, epai ya bato ya bikolo ya bapaya. »
22 Ils l’avaient écouté jusqu’à ce mot; mais alors ils élevèrent leur voix, disant: Ôte de la terre un pareil homme, car ce serait un crime de le laisser vivre.
Bato bayokaki Polo kino tango alobaki maloba wana. Boye, batombolaki mingongo na bango mpe bagangaki: — Bolongola ye na mokili! Asengeli te kozala na bomoi!
23 Eux donc, poussant de grands cris, jetant leurs vêtements, et lançant de la poussière en l’air,
Lokola bazalaki koganga makasi mpe kobwaka bilamba na bango mpe putulu na likolo,
24 Le tribun ordonna de le conduire dans le camp, de le déchirer de verges, et de le mettre à la question, afin de savoir pourquoi ils criaient ainsi contre lui.
mokonzi ya basoda apesaki mitindo ete bakotisa Polo kati na lopango ya basoda mpe babeta ye fimbu, mpo ete aloba polele tina nini Bayuda bazali koganga bongo mpo na ye.
25 Mais lorsqu’ils l’eurent lié avec des courroies, Paul dit au centurion qui était près de lui: Vous est-il permis de flageller un citoyen romain non condamné?
Wana bazalaki kokanga Polo basinga, Polo atunaki mokonzi oyo azalaki wana: — Boni, mibeko epesi penza ndingisa ya kobeta moto ya Rome fimbu, wana bosambisi ye nanu te?
26 Ce qu’ayant entendu, le centurion se rendit auprès du tribun, et l’avertit, disant: Qu’allez-vous faire? car cet homme est citoyen romain.
Tango mokonzi ayokaki bongo, akendeki koyebisa mokonzi ya basoda: — Okosala nini? Tata oyo azali moto ya Rome.
27 Et le tribun venant à lui, demanda: Dis-moi, es-tu Romain? Et Paul répondit: Oui.
Mbala moko, mokonzi ya basoda akendeki epai ya Polo mpe atunaki ye: — Yebisa ngai solo, ozali penza moto ya Rome? Azongisaki: — Iyo, ezali bongo!
28 Le tribun repartit: C’est avec beaucoup d’argent que j’ai acquis ce droit de cité. Et Paul répliqua: Moi, je suis né citoyen.
Mokonzi ya basoda alobaki: — Nafutaki mbongo mingi mpo na kozwa makoki ya kokoma moto ya Rome. Polo azongisaki: — Kasi ngai, nazali moto ya Rome ya kobotama.
29 Aussitôt donc s’éloignèrent de lui ceux qui devaient lui donner la question; le tribun lui-même eut peur, après qu’il eut appris qu’il était citoyen romain, parce qu’il l’avait fait lier.
Mbala moko, bato oyo balingaki kobeta ye fimbu batikaki ye. Mokonzi ya basoda akomaki kobanga tango asosolaki ete tata oyo ye akangaki minyololo azali penza moto ya Rome.
30 Le lendemain, voulant savoir plus exactement de quoi il était accusé par les Juifs, il lui ôta ses liens, et ordonna aux prêtres, et à tout le conseil de s’assembler, puis il amena Paul, et le plaça au milieu d’eux.
Mokolo oyo elandaki, lokola mokonzi ya basoda azalaki na posa ya koyeba malamu tina oyo Bayuda bafundelaki Polo, apesaki mitindo ete bafungola Polo minyololo; mpe abengisaki bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bato ya Likita-Monene mpo ete basala mayangani. Bongo amemaki Polo mpe atiaki ye liboso na bango.