< 2 Rois 24 >

1 De son temps Nebucadnetsar, roi de Babel, se mit en campagne, et Jojakim lui fut assujetti trois ans; mais de nouveau il se rebella contre lui.
Wana Yeoyakimi azalaki mokonzi, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, akotaki na makasi kati na mokili; mpe Yeoyakimi akomaki mosali na ye mibu misato. Kasi sima, abongolaki makanisi mpe atombokelaki Nabukodonozori.
2 Alors l'Éternel envoya contre lui les bandes des Chaldéens et les bandes des Syriens et les bandes des Moabites et les bandes des fils d'Ammon, qu'il envoya contre Juda pour le détruire, selon la menace que l'Éternel avait prononcée par l'organe de ses serviteurs les prophètes.
Yawe atindaki mampinga ya bato ya Chalide, ya Siri, ya Moabi mpe ya Amoni mpo na kobundisa ye. Yawe atindaki bango mpo na kobebisa Yuda kolanda liloba oyo Yawe asakolaki na nzela ya basali na Ye, basakoli.
3 Ce fut sur l'ordre seul de l'Éternel qu'il en fut ainsi pour Juda, afin qu'il fût exclu de Sa présence à cause des péchés de Manassé, ensuite de tout ce qu'il avait fait,
Solo, makambo yango ekomelaki Yuda kolanda mitindo na Yawe mpo na kolongola bango na miso na Ye likolo ya masumu ya Manase mpe likolo ya makambo nyonso oyo asalaki;
4 et à cause aussi du sang innocent qu'il avait versé remplissant Jérusalem de sang innocent; et l'Éternel ne voulut pas pardonner.
bakisa makila oyo asopaki, makila ya bato oyo bayebi likambo te. Pamba te atondisaki Yelusalemi na makila ya bato oyo bayebaki likambo te; mpe Yawe aboyaki kolimbisa ye.
5 Le reste des actes de Jojakim, et toutes ses entreprises sont d'ailleurs consignés dans le livre des annales des rois de Juda.
Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Yeoyakimi mpe misala na ye nyonso, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda.
6 Et Jojakim reposa avec ses pères, et Jojachin, son fils, devint roi en sa place.
Tango Yeoyakimi akufaki, Yeoyakini, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
7 Cependant le roi d'Egypte ne fit plus d'excursion hors de son pays; car le roi de Babel avait conquis tout ce qui était au roi d'Egypte depuis le torrent d'Egypte jusqu'au fleuve de l'Euphrate.
Mokonzi ya Ejipito azalaki kobima lisusu te elongo na mampinga na ye mpo na kokota na mikili mosusu, mpo ete mokonzi ya Babiloni abotolaki mabele na ye nyonso, longwa na moluka ya nor ya Ejipito kino na ebale Efrate.
8 Jojachin avait dix-huit ans à son avènement et il régna trois mois à Jérusalem. Or le nom de sa mère était Nehustha, fille d'Elnathan de Jérusalem.
Yeoyakini azalaki na mibu zomi na mwambe ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki basanza misato na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Newushita. » Newushita azalaki mwana ya Elinatani, moto ya Yelusalemi.
9 Et il fit ce qui est mal aux yeux de l'Éternel en tout point comme avait fait son père.
Yeoyakini asalaki makambo mabe na miso ya Yawe ndenge kaka tata na ye asalaki.
10 Dans ce temps-là les serviteurs de Nebucadnetsar, roi de Babel, s'avancèrent sur Jérusalem et la ville essuya un siège.
Ezalaki na tango wana nde bakonzi ya basoda ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, babundisaki Yelusalemi mpe bazingelaki engumba yango.
11 Et Nebucadnetsar, roi de Babel, arriva devant la ville au moment où ses serviteurs en faisaient le siège.
Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, ayaki ye moko na engumba tango basoda na ye bazalaki kozingela yango.
12 Alors Jojachin, roi de Juda, se rendit auprès du roi de Babel, lui et sa mère et ses serviteurs et ses généraux et ses eunuques, et le roi de Babel le fit prisonnier, la huitième année de son règne.
Yeoyakini, mokonzi ya Yuda; mama na ye, basali na ye, bakambi na ye mpe bakalaka na ye ya lokumu bamipesaki bango nyonso epai ya mokonzi Nabukodonozori. Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, atiaki Yeoyakini na boloko na mobu ya mwambe ya bokonzi na ye.
13 Et il enleva de là tous les trésors du temple de l'Éternel et tous les trésors du palais royal et mit en pièces toute la vaisselle d'or qu'avait faite Salomon, roi d'Israël, dans le temple de l'Éternel, ainsi qu'avait prononcé l'Éternel.
Ndenge Yawe alobaki yango, Nabukodonozori azwaki bomengo nyonso oyo ezalaki kati na Tempelo ya Yawe mpe kati na ndako ya mokonzi; bongo amemaki biloko nyonso ya wolo oyo Salomo, mokonzi ya Isalaele, asalaki mpo na Tempelo ya Yawe.
14 Et il déporta tout Jérusalem et tous les généraux et tous les braves guerriers, dix mille hommes furent emmenés, ainsi que tous les forgerons et les serruriers: il ne resta rien que le petit peuple du pays.
Amemaki Yelusalemi mobimba na bowumbu: bakonzi nyonso ya basoda mpe basoda, bato nyonso ya mayele ya misala ya maboko mpe ba-oyo basalelaka bibende. Bango nyonso bazalaki bato nkoto zomi. Kaka babola nde batikalaki kati na mokili.
15 Et il emmena Jojachin à Babel; et la mère du roi, et les femmes du roi et ses eunuques et tous les notables du pays il les fit marcher en captivité de Jérusalem à Babel,
Nabukodonozori amemaki Yeoyakini na bowumbu na Babiloni; amemaki mpe, longwa na Yelusalemi kino na Babiloni, mama ya mokonzi, basi ya mokonzi, bakalaka ya lokumu mpe bankumu ya mokili.
16 et tous les gens à moyens, au nombre de sept mille, et les forgerons et les serruriers au nombre de mille, la totalité des guerriers, de tous les hommes aptes à la guerre, le roi de Babel les emmena captifs à Babel.
Mokonzi ya Babiloni amemaki mpe na bowumbu na Babiloni mampinga nyonso ya bato nkoto sambo oyo bazalaki makasi mpe babongisama mpo na bitumba, bakisa bato nkoto moko oyo basalaka misala ya maboko mpe oyo basalelaka bibende.
17 Et le roi de Babel établit Matthania, son oncle, roi en sa place et changea son nom en celui de Sédécias.
Mokonzi ya Babiloni akomisaki Matania, noko ya Yeoyakini, mokonzi na esika na ye; mpe abongolaki kombo na ye, akomisaki yango « Sedesiasi. »
18 Sédécias avait vingt-un ans à son avènement et il régna onze ans à Jérusalem. Or le nom de sa mère était Hamutal, fille de Jérémie de Libna.
Sedesiasi azalaki na mibu tuku mibale na moko ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu zomi na moko na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Amutali. » Amutali azalaki mwana ya Jeremi, moto ya Libina.
19 Et il fit ce qui est mal aux yeux de l'Éternel en tout point comme avait fait Jojakim.
Sedesiasi asalaki makambo mabe na miso ya Yawe, ndenge kaka Yeoyakimi asalaki.
20 Car c'est ensuite de la colère de l'Éternel qu'il en advint ainsi de Jérusalem et de Juda jusque là qu'il les bannit de sa présence. Et Sédécias se rebella contre le roi de Babel.
Ezalaki mpo na kanda makasi ya Yawe nde makambo oyo nyonso esalemelaki Yelusalemi mpe Yuda, kino Yawe kobengana bango mosika ya elongi na Ye. Nzokande, Sedesiasi atombokelaki mokonzi ya Babiloni.

< 2 Rois 24 >