< 1 Rois 15 >

1 Et la dix-huitième année du roi Jéroboam, fils de Nebat, Abiam devint roi de Juda.
Tango Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, akokisaki mibu zomi na mwambe na bokonzi, Abiyami akomaki mokonzi ya Yuda.
2 Il régna trois ans à Jérusalem. Or le nom de sa mère était Maacha, fille d'Abisalom.
Awumelaki mibu misato na bokonzi, na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Maaka. » Maaka azalaki mwana ya Abisalomi.
3 Et il vécut dans tous les péchés de son père, que celui-ci avait commis avant lui, et son cœur ne fut point sans partage uni à l'Éternel, son Dieu, comme l'avait été le cœur de David, son père.
Asalaki masumu nyonso oyo tata na ye asalaki liboso ete Abiyami akoma mokonzi. Apesaki te motema na ye mobimba epai na Yawe, Nzambe na ye, ndenge ezalaki motema ya Davidi, koko na ye.
4 Cependant eu égard à David, l'Éternel, son Dieu, lui accorda d'avoir une lampe dans Jérusalem, en élevant son fils après lui et en laissant Jérusalem debout;
Nzokande, mpo na Davidi, Yawe Nzambe na ye, apesaki Abiyami mwinda kati na Yelusalemi, wana atiaki mwana na ye ya mobali mpo na kokitana na ye na bokonzi mpe kokomisa Yelusalemi makasi.
5 parce que David avait fait ce qui est droit aux yeux de l'Éternel et ne s'était point écarté durant toute sa vie de tout ce qu'il lui commandait, excepté dans l'affaire d'Urie, le Héthien.
Pamba te Davidi asalaki makambo ya malamu na miso ya Yawe mpe abatelaki mibeko ya Yawe mikolo nyonso ya bomoi na ye, longola kaka likambo moko: likambo ya Iri, moto ya Iti.
6 Et il y avait eu guerre entre Roboam et Jéroboam tout le temps de sa vie.
Mikolo nyonso ya bomoi ya Abiyami, ndako ya Roboami ezalaki kaka na bitumba na ndako ya Jeroboami.
7 Et le reste des actes d'Abiam et tout ce qu'il fit, est d'ailleurs consigné dans le livre des annales des rois de Juda. Et il y eut guerre entre Abiam et Jéroboam.
Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Abiyami mpe misala na ye, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda. Bitumba ezalaki kati na Jeroboami mpe Abiyami.
8 Et Abiam reposa avec ses pères et reçut la sépulture dans la ville de David, et Asa, son fils, régna en sa place.
Abiyami akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye kati na engumba ya Davidi. Asa, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
9 Et la vingtième année de Jéroboam, roi d'Israël, Asa devint roi de Juda,
Tango Jeroboami, mokonzi ya Isalaele, asalaki mibu tuku mibale na bokonzi, Asa akomaki mokonzi ya Yuda.
10 et il régna quarante-un ans à Jérusalem. Or le nom de sa mère était Maacha, fille d'Abisalom.
Asalaki mibu tuku minei na moko na bokonzi, na Yelusalemi. Kombo ya koko na ye ya mwasi ezalaki « Maaka. » Maaka azalaki mwana mwasi ya Abisalomi.
11 Et Asa fit ce qui est bien aux yeux de l'Éternel, comme David, son père.
Asa asalaki makambo ya malamu na miso ya Yawe, ndenge Davidi, koko na ye, asalaki.
12 Et il expulsa les prostitués du pays et fit disparaître toutes les idoles qu'avaient faites ses pères.
Abenganaki wuta na mokili, bato oyo bazalaki komipesa na kindumba ya bule, mpe alongolaki banzambe nyonso ya bikeko oyo tata na ye asalaki.
13 Et même Maacha, sa mère, il la destitua de son rang de Reine parce qu'elle s'était fait un simulacre d'Astarté, et Asa abattit son simulacre et le brûla dans le ravin du Cédron.
Alongolaki ezala Maaka, koko na ye ya mwasi, na lokumu ya mama ya mokonzi; pamba te Maaka asalelaki nzambe mwasi Ashera ekeko ya soni. Asa abukaki mpe atumbaki ekeko yango ya soni kati na lubwaku ya Sedron.
14 Cependant les tertres ne disparurent pas; seulement le cœur d'Asa resta-t-il tout entier uni à l'Éternel toute sa vie.
Nzokande, atako abebisaki te bisambelo ya likolo ya bangomba, Asa abatelaki motema na ye sembo na miso ya Yawe, na mikolo nyonso ya bomoi na ye.
15 Et il transféra dans le Temple de l'Éternel les objets consacrés par son père et par lui-même, l'argent, l'or et la vaisselle.
Azongisaki kati na Tempelo ya Yawe biloko oyo tata na ye mpe ye moko babulisaki: palata, wolo mpe biloko mosusu.
16 Or il y eut guerre entre Asa et Baësa, roi d'Israël, durant toute leur vie.
Na mikolo nyonso oyo Asa mpe Baesha, mokonzi ya Isalaele, bazalaki na bokonzi, bazalaki kaka na bitumba.
17 Et Baësa, roi d'Israël, s'avança sur Juda et bâtit Rama pour empêcher que personne sortît ou entrât dans l'intérêt d'Asa, roi de Juda.
Baesha, mokonzi ya Isalaele, abundisaki Yuda mpe alendisaki bamir ya engumba Rama mpo na kopekisa bato kokota to kobima na mokili ya Asa, mokonzi ya Yuda.
18 Alors Asa prit tout l'argent et l'or qui restait dans les Trésors du Temple de l'Éternel et les trésors du palais royal, et les mit entre les mains de ses serviteurs, et le roi Asa les envoya à Ben-Hadad, fils de Tabrimmon, fils de Hézion, roi de Syrie, résidant à Damas, avec ce message:
Asa azwaki palata mpe wolo nyonso oyo etikalaki kati na bibombelo bomengo ya Tempelo ya Yawe mpe ya ndako ya mokonzi; apesaki yango na maboko ya basali na ye mpe atindaki bango epai ya Beni-Adadi, mwana mobali ya Tabirimoni, mwana mobali ya Ezioni, mokonzi ya Siri, oyo azalaki kovanda na Damasi. Atindelaki ye mpe maloba oyo:
19 Il existe une alliance entre moi et toi, entre mon père et ton père; voici, je t'envoie un présent d'argent et d'or: eh bien! romps ton alliance avec Baësa, roi d'Israël, afin qu'il se retire de chez moi.
« Tika ete tosala boyokani kati na ngai mpe yo ndenge ezalaki kati na tata na ngai mpe tata na yo. Tala, natindeli yo kado ya palata mpe ya wolo. Kende kokata boyokani na yo elongo na Baesha, mokonzi ya Isalaele, mpo ete abundisa ngai lisusu te. »
20 Et Ben-Hadad écouta le roi Asa, et il expédia ses généraux d'armée contre les villes d'Israël, et réduisit Ijon et Dan et Abel-Beth-Maacha et tout le Kinnereth dans tout le territoire de Nephthali.
Beni-Adadi andimaki maloba ya mokonzi Asa mpe atindaki bakonzi ya basoda na ye kobundisa bingumba ya Isalaele. Abotolaki Iyoni, Dani, Abele-Beti-Maaka, etuka mobimba ya Kinereti mpe mokili nyonso ya Nefitali.
21 Et à cette nouvelle Baësa renonça à l'édification de Rama, et il resta à Thirtsa.
Tango kaka Baesha ayokaki bongo, atikaki kolendisa engumba Rama mpe akendeki kovanda na Tiritsa.
22 Et le roi Asa convoqua la totalité de Juda sans exempter personne, et ils emportèrent de Rama les pierres et le bois employé par Baësa à sa bâtisse et le roi Asa s'en servit pour édifier Géba en Benjamin et Mitspa.
Bongo mokonzi Asa abengisaki bato nyonso ya Yuda, kolongola ata moto moko te; mpe bamemaki longwa na Rama mabanga mpe mabaya oyo Baesha azalaki kosalela kuna. Mokonzi Asa asalelaki yango mpo na kolendisa engumba Geba kati na etuka ya Benjame, mpe engumba Mitsipa.
23 Et le reste de tous les actes d'Asa, et tous ses exploits, et toutes ses entreprises, et les villes qu'il bâtit, tout cela est consigné dans le livre des annales des rois de Juda. Seulement dans ses vieux jours il eut les pieds malades.
Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Asa, molende na ye, misala na ye nyonso mpe bingumba na ye nyonso oyo atongaki, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda. Tango akomaki mobange, akomaki kobela makolo.
24 Et Asa reposa avec ses pères et reçut la sépulture avec ses pères dans la ville de David, son père, et Josaphat, son fils, régna en sa place.
Asa akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye kati na engumba ya Davidi, tata na ye. Jozafati, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
25 Or Nadab, fils de Jéroboam, devint roi d'Israël, la seconde année d'Asa, roi de Juda, et régna deux ans sur Israël.
Tango Asa, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu mibale na bokonzi; Nadabi, mwana mobali ya Jeroboami, akomaki mokonzi ya Isalaele mpe akonzaki Isalaele mibu mibale.
26 Et il fit ce qui est mal aux yeux de l'Éternel, et marcha dans la voie de son père et dans son péché où il avait entraîné Israël.
Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe, atambolaki na banzela mabe ya tata na ye, oyo atindikaki mpe bato ya Isalaele na kosala masumu.
27 Et Baësa, fils d'Ahia, de la maison d'Issaschar, conspira contre lui, et Baësa le fit tomber sous ses coups devant Gibbethon, qui est aux Philistins, pendant que Nadab et tout Israël assiégeaient Gibbethon.
Baesha, mwana mobali ya Ayiya, moto ya libota ya Isakari, asalelaki ye likita mpe abomaki ye na Gibetoni, moko kati na bingumba ya bato ya Filisitia, na tango oyo Nadabi elongo na Isalaele mobimba bazingelaki Gibetoni.
28 Ainsi Baësa lui donna la mort la troisième année d'Asa, roi de Juda, et prit sa place comme roi.
Baesha abomaki Nababi tango Asa, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu misato na bokonzi, mpe akitanaki na Nadabi na bokonzi.
29 Et devenu roi il extermina toute la maison de Jéroboam, sans laisser survivre de Jéroboam rien qui eût vie jusqu'à ce qu'il eût tout détruit selon la parole de l'Éternel prononcée par l'organe de son serviteur Ahia, de Silo,
Tango azwaki bokonzi, abomaki libota nyonso ya Jeroboami mpe atikaki ata moto moko te na bomoi kati na libota ya Jeroboami: abomaki bato nyonso kolanda etinda na Yawe na nzela ya mowumbu na ye, Ayiya, moto ya Silo,
30 à cause des péchés de Jéroboam qu'il avait commis et où il avait entraîné Israël par sa provocation dont il avait provoqué l'Éternel, Dieu d'Israël.
mpo na masumu oyo Jeroboami asalaki mpe atindikaki bato ya Isalaele na kosala. Na bongo, apelisaki kanda ya Yawe, Nzambe ya Isalaele.
31 Or le reste des actes de Nadab, et toutes ses entreprises, cela est d'ailleurs consigné dans le livre des annales des rois d'Israël.
Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Nadabi mpe misala na ye nyonso, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele.
32 Et il y eut guerre entre Asa et Baësa, roi d'Israël, durant toute leur vie.
Na mikolo nyonso oyo Asa mpe Baesha, mokonzi ya Isalaele, bazalaki na bokonzi, bazalaki kaka na bitumba.
33 La troisième année d'Asa, roi de Juda, Baësa, fils d'Ahia, devint roi de tout Israël à Thirtsa et [régna] vingt-quatre ans.
Tango Asa, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu misato na bokonzi, Baesha, mwana mobali ya Ayiya, akomaki mokonzi ya Isalaele mobimba, na Tiritsa. Asalaki mibu tuku mibale na minei na bokonzi.
34 Et il fit ce qui est mal aux yeux de l'Éternel et marcha dans la voie de Jéroboam et son péché où il avait entraîné Israël.
Baesha asalaki makambo mabe na miso ya Yawe, na komekola banzela ya Jeroboami oyo atindikaki bato ya Isalaele na kosala masumu na ye.

< 1 Rois 15 >