< Zacharie 7 >

1 La quatrième année du roi Darius, la parole de l'Éternel fut adressée à Zacharie, le quatrième jour du neuvième mois, du mois de Kisleu;
Na mobu ya minei ya mokonzi ya Dariusi, na mokolo ya minei ya sanza ya libwa, sanza ya kisilevi, Yawe alobaki na Zakari.
2 Lorsqu'on eut envoyé à la maison de Dieu Sharetser et Réguem-Mélec, et ses gens, pour supplier l'Éternel,
Bato ya Beteli batindaki Saretseri, Regemi-Meleki elongo na bato na bango mpo na kobondela Yawe
3 Et pour parler aux sacrificateurs de la maison de l'Éternel des armées, et aux prophètes, en ces mots: Dois-je pleurer au cinquième mois, et faire abstinence, comme je l'ai fait pendant tant d'années?
mpe mpo na kotuna motuna oyo epai ya Banganga-Nzambe oyo basalaka kati na Tempelo ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, mpe epai ya basakoli: — Boni, tosengeli kaka kokoba kolela mpe kokila bilei na sanza ya mitano ndenge tosalaka wuta kala?
4 Et la parole de l'Éternel des armées me fut adressée en ces mots:
Bongo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobaki na ngai:
5 Parle à tout le peuple du pays et aux sacrificateurs, et dis-leur: Quand vous avez jeûné en vous lamentant, au cinquième et au septième mois, et cela depuis soixante et dix ans, est-ce bien pour moi, pour moi, que vous avez jeûné?
— Tuna bato nyonso ya ekolo mpe Banganga-Nzambe: « Wuta mibu tuku sambo, tango bokilaka bilei mpe bolelaka na sanza ya mitano mpe ya sambo, bosalaka yango mpo na Ngai?
6 Et quand vous mangez et que vous buvez, n'est-ce pas vous qui mangez et vous qui buvez?
Bongo tango bozalaki kolia mpe komela, ezalaki te mpo na esengo na bino moko?
7 Ne sont-ce pas les paroles que faisait entendre l'Éternel par les premiers prophètes, lorsque Jérusalem était habitée et tranquille, elle et ses villes autour d'elle, et que le midi et la plaine étaient habités?
Yango ezali te liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya basakoli na Ye wuta kala tango Yelusalemi mpe bingumba oyo ezingelaki yango ezalaki na kimia mpe na boyokani, mpe Negevi mpe Shefela etondaki na bato ebele? »
8 Puis la parole de l'Éternel fut adressée à Zacharie, en ces mots:
Mpe Yawe alobaki lisusu na Zakari:
9 Ainsi avait dit l'Éternel des armées: Rendez la justice avec vérité, exercez la miséricorde et la compassion, chacun envers son frère;
— Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: « Bokataka makambo na bosembo, mpe tika ete moko na moko kati na bino azala na bolingo mpe na mawa ya moto mosusu.
10 N'opprimez pas la veuve et l'orphelin, l'étranger et le pauvre, et ne méditez pas dans vos cœurs le mal l'un contre l'autre.
Bonyokolaka te mwasi oyo akufisa mobali to mwana etike to mopaya to mpe mobola, mpe tika ete moko te kati na bino asala, na motema na ye, mabongisi ya kosala moninga na ye mabe. »
11 Mais ils n'ont pas voulu écouter; ils ont tiré l'épaule en arrière; ils ont appesanti leurs oreilles pour ne pas entendre;
Kasi baboyaki kotosa, bamatisaki mapeka mpe bakangaki matoyi na bango mpo ete bayoka Ngai te.
12 Ils ont rendu leur cœur dur comme un diamant, pour ne pas entendre la loi et les paroles que l'Éternel des armées leur adressait par son Esprit, par les premiers prophètes; et il y eut une grande indignation de la part de l' Éternel des armées.
Bakomisaki mitema na bango makasi lokola diama mpo kaka bayoka te mibeko mpe maloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, azalaki koloba na bango na lisungi ya Molimo na Ye na nzela ya basakoli na Ye ya kala. Mpo na yango, Yawe, Mokonzi ya mampinga, atombokaki makasi.
13 Et comme ils n'ont pas écouté lorsqu'il a crié, de même quand ils ont crié je n'ai point écouté, a dit l'Éternel des armées.
Boye, Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobaki: « Lokola bayokaki Ngai te tango nazalaki kobenga bango, Ngai mpe nayokaki bango te tango babengaki Ngai.
14 Je les ai chassés par la tempête vers toutes les nations qu'ils ne connaissaient point, et derrière eux le pays est resté désert, sans allants ni venants, et du pays de délices ils ont fait une désolation.
Na bongo, napanzaki bango kati na bikolo nyonso epai wapi bakomaki bapaya, mpe mokili na bango ebebisamaki makasi: moto moko te akokaki lisusu kokota to kobima kuna. Ndenge wana nde bakomisaki mokili ya kitoko libebi. »

< Zacharie 7 >