< Ruth 3 >
1 Et Naomi, sa belle-mère, lui dit: Ma fille, ne te chercherai-je pas un asile, afin que tu sois heureuse?
Mokolo moko, Naomi, mama-bokilo ya Rite, alobaki na ye: — Mwana na ngai, nasengeli te koluka nzela mpo na bolamu na yo?
2 Et maintenant, Booz, avec les servantes de qui tu as été, n'est-il pas notre parent? Voici, il vannera cette nuit les orges qui sont dans son aire.
Pamba te oyebi malamu ete Boazi, oyo osalaki elongo na basali na ye ya basi, azali ndeko na biso. Na pokwa ya lelo, akoyungola orje oyo basilaki kosopa na etando.
3 Lave-toi, et oins-toi, et mets sur toi ton manteau, et descends dans l'aire; mais ne te fais point connaître à cet homme, jusqu'à ce qu'il ait achevé de manger et de boire.
Boye, sukola malamu nzoto na yo, pakola mafuta mpe lata bilamba na yo, oyo eleki kitoko. Bongo, okokende na etando epai wapi akobeta orje na ye; kasi sala ete Boazi ayeba te ete ozali na esika yango kino akosilisa kolia mpe komela.
4 Et quand il se couchera, sache le lieu où il couche, puis entre, et découvre ses pieds, et te couche; alors il te dira ce que tu auras à faire.
Tango akokende kolala, okotala malamu esika nini akozala. Sima, okopusana, okolongola elamba oyo ezipi makolo na ye mpe okomilalisa wana, na makolo na ye. Ye moko akoyebisa yo makambo oyo osengeli kosala.
5 Et elle lui répondit: Je ferai tout ce que tu me dis.
Rite azongiselaki ye: — Nakosala nyonso oyo oyebisi ngai.
6 Elle descendit donc à l'aire, et fit tout ce que sa belle-mère lui avait commandé.
Bongo Rite akendeki na etando mpe asalaki makambo nyonso oyo mama-bokilo na ye ayebisaki ye.
7 Et Booz mangea et but, et son cœur fut heureux, et il vint se coucher au bout d'un tas de gerbes. Alors elle vint tout doucement, et découvrit ses pieds, et se coucha.
Tango Boazi asilisaki kolia mpe komela, motema na ye ezalaki na esengo; akendeki kolala na suka ya mipiku ya orje. Bongo Rite apusanaki malembe-malembe, alongolaki elamba oyo ezipaki makolo ya Boazi mpe amilalisaki wana.
8 Et au milieu de la nuit, cet homme-là eut peur; il se pencha, et voici, une femme était couchée à ses pieds.
Na kati-kati ya butu, tango Boazi ayokaki malili, aminyololaki mpe amonaki mwasi alali na makolo na ye.
9 Alors il lui dit: Qui es-tu? Et elle répondit: Je suis Ruth, ta servante. Étends le pan de ta robe sur ta servante; car tu as droit de rachat.
Atunaki ye: — Yo ozali nani? Azongisaki: — Ezali ngai Rite, mwasi mosali na yo. Tanda songe ya elamba na yo kino epai na ngai, pamba te ozali na ndingisa ya kosikola.
10 Et il dit: Ma fille, que l'Éternel te bénisse! Cette dernière bonté que tu me témoignes est plus grande que la première, de n'être point allée après les jeunes gens, pauvres ou riches.
Boazi azongiselaki ye: — Tika ete Yawe apambola yo, mwana na ngai ya mwasi! Bosembo oyo otalisi sik’oyo, ezali monene koleka bosembo oyo otalisaki liboso; pamba te otambolaki te sima na bilenge mibali, ezala bazwi to babola.
11 Maintenant donc, ma fille, ne crains point, je ferai pour toi tout ce que tu me diras; car toute la porte de mon peuple sait que tu es une femme vertueuse.
Mpe sik’oyo mwana na ngai ya mwasi, kobanga te; nakosalela yo nyonso oyo okosenga, pamba te bato nyonso ya esika oyo bayebi ete ozali mwasi ya malonga.
12 Et maintenant, il est très vrai que j'ai droit de rachat; mais il y en a un autre, qui est plus proche que moi.
Sik’oyo, atako solo nazali na ndingisa ya kosikola, kasi ezali na mosikoli mosusu oyo azali pene na yo koleka ngai.
13 Passe ici cette nuit; et, au matin, si cet homme veut user du droit de rachat envers toi, à la bonne heure, qu'il en use; mais s'il ne lui plaît pas de te racheter, moi je te rachèterai; l'Éternel est vivant! Reste couchée jusqu'au matin.
Boye, lekisa butu awa; bongo lobi na tongo, tokotala soki moto yango akolinga kosikola yo. Soki akolinga, wana tika ye asikola yo; kasi soki aboyi, nalaki yo na Kombo na Yawe ete ngai nakosikola yo. Boye liboso ete tongo etana, lala awa.
14 Elle demeura donc couchée à ses pieds, jusqu'au matin; et elle se leva avant qu'on pût se reconnaître l'un l'autre. Et Booz dit: Qu'on ne sache pas qu'une femme est entrée dans l'aire.
Boye Rite alalaki na makolo na ye mpe alamukaki na tongo-tongo, wana molili ezalaki nanu kopekisa bato komonana malamu; pamba te Boazi alobaki: « Moto moko te ayeba ete mwasi moko ayaki na etando oyo. »
15 Il lui dit encore: Donne-moi le manteau qui est sur toi, et tiens-le. Et elle le tint, et il mesura six mesures d'orge, qu'il chargea sur elle; puis il rentra dans la ville.
Liboso ete akende, Boazi ayebisaki ye: « Pesa ngai elamba oyo olati, simba yango malamu. » Wana Rite asimbaki yango malamu, Boazi atielaki ye bakilo pene tuku mibale ya orje mpe asungaki ye mpo na kotombola mpe kotia yango na moto. Mpe Rite azongaki na engumba.
16 Puis Ruth revint chez sa belle-mère, qui lui dit: Qui es-tu, ma fille? Et elle lui déclara tout ce que cet homme avait fait pour elle.
Tango Rite akomaki epai ya mama-bokilo na ye, Naomi atunaki ye: — Mwana na ngai ya mwasi, makambo eleki ndenge nini? Boye Rite ayebisaki ye makambo oyo Boazi asalaki mpo na ye.
17 Et elle dit: Il m'a donné ces six mesures d'orge; car il m'a dit: Tu ne retourneras point à vide auprès de ta belle-mère.
Mpe abakisaki: « Apesaki ngai kutu bakilo tuku mibale ya orje oyo, pamba te ayebisaki ngai: ‹ Kozonga maboko pamba te epai ya mama-bokilo na yo. › »
18 Et Naomi dit: Ma fille, reste ici jusqu'à ce que tu saches comment la chose tournera; car cet homme ne se donnera point de repos qu'il n'ait aujourd'hui achevé cette affaire.
Bongo Naomi alobaki na ye: — Sik’oyo mwana na ngai ya mwasi, vanda awa kino okomona ndenge makambo oyo ekosuka; pamba te mobali wana akozala na kimia te kino akosilisa likambo oyo, kaka na mokolo ya lelo.