< Psaumes 74 >
1 Maskil (cantique) d'Asaph. Pourquoi, ô Dieu, nous rejettes-tu à jamais, et ta colère fume-t-elle contre le troupeau de ta pâture?
Nzembo ya Azafi. Oh Nzambe, mpo na nini kosundola biso mpo na tango nyonso? Mpo na nini kongalisa kanda na Yo likolo ya etonga oyo oleisaka?
2 Souviens-toi de ton assemblée, que tu t'es acquise jadis, que tu as rachetée pour être la tribu de ton héritage; souviens-toi de cette montagne de Sion, où tu as fait ta demeure.
Kanisa lisusu lisanga ya bato na Yo, oyo osikola wuta kala, libota oyo okomisa libula na Yo. Kanisa ngomba Siona epai wapi ovandaka.
3 Porte tes pas vers ces ruines perpétuelles: l'ennemi a tout détruit dans le lieu saint.
Tika ete matambe na Yo ekoma kino na bisika oyo ebebi nye! Kati na Esika na Yo ya bule, monguna abebisi nyonso;
4 Tes ennemis ont rugi au milieu de tes parvis; ils y ont mis pour signes leurs signes.
bayini na Yo bagangi lokola nkosi, ata kati na esika oyo okutanaka na biso, batelemisi bendele na bango lokola elembo.
5 Ils s'y font voir comme des gens élevant les haches dans l'épaisseur d'un bois.
Bazali lokola bato oyo basimbi bipasola mpe bazali kokata banzete kati na zamba.
6 Et déjà ils en brisent toutes les sculptures, avec des cognées et des marteaux.
Babuki-buki bililingi nyonso oyo batobola na mabaya, na nzela ya bipasola mpe bamarto na bango;
7 Ils ont mis en feu ton sanctuaire; ils ont jeté à terre, profané la demeure de ton nom.
batumbi Esika na Yo ya bule, bakweyisi mpe bakomisi mbindo esika oyo Kombo na Yo evandaka.
8 Ils ont dit en leur cœur: Détruisons-les tous! Ils ont brûlé toutes les synagogues de Dieu dans le pays.
Bazalaki komilobela: « Tokopanza yango nyonso! » Kati na mokili, bazikisi esika nyonso epai wapi bagumbamelaka Nzambe.
9 Nous ne voyons plus nos signes; il n'y a plus de prophète, ni personne avec nous qui sache jusques à quand.
Tozali lisusu komona te bilembo na biso, basakoli bazali lisusu te; mpe moko te kati na biso ayebi tango boni makambo oyo ekowumela.
10 Jusques à quand, ô Dieu, l'adversaire outragera-t-il, l'ennemi méprisera-t-il sans cesse ton nom?
Oh Nzambe, kino tango nini monguna akofinga Yo? Boni, akokoba tango nyonso kotiola Kombo na Yo?
11 Pourquoi retires-tu ta main et ta droite? Tire-la de ton sein, et détruis!
Mpo na nini ozongisi loboko na Yo na sima, loboko na Yo ya mobali? Mpo na nini okangi maboko na Yo?
12 Mais Dieu est mon Roi de tout temps, lui qui opère des délivrances au milieu de la terre.
Nzokande, Yo Nzambe, ozali Mokonzi na ngai wuta kala; Yo nde omemaka lobiko kati na mokili.
13 C'est toi qui fendis la mer par ta puissance, qui brisas les têtes des dragons sur les eaux.
Yo nde opasolaki ebale na nguya na Yo, opanzaki mito ya bilima ya mayi;
14 C'est toi qui écrasas les têtes du Léviathan, qui le donnas en pâture au peuple du désert.
Yo nde opanzaki mito ya Leviatani mpe opesaki yango lokola bilei epai ya banyama ya esobe;
15 C'est toi qui fis jaillir des sources et des ruisseaux; toi qui mis à sec les fleuves intarissables.
Yo nde osalaki ete bitima ya mayi mpe miluka etiola, mpe okawusaki bibale mpo na libela.
16 A toi est le jour, à toi aussi est la nuit; tu as créé la lumière et le soleil.
Moyi ezali ya Yo, butu mpe ezali ya Yo; Yo nde osalaki sanza mpe moyi.
17 C'est toi qui as posé toutes les limites de la terre; l'été et l'hiver, c'est toi qui les as formés.
Ezali Yo nde otiaki bandelo nyonso ya mokili, Yo nde osalaki tango ya malili mpe tango ya moyi.
18 Souviens-toi que l'ennemi outrage, ô Éternel! qu'un peuple insensé méprise ton nom!
Yawe, kobosana te ete monguna afingi Yo, ete bato bazanga tina batioli Kombo na Yo!
19 N'abandonne pas aux bêtes la vie de ta tourterelle; n'oublie pas pour toujours la troupe de tes affligés.
Kokaba te bomoi ya ebenga na Yo na monoko ya nyama oyo ezali na nzala, kobosana te mpo na libela bomoi ya babola oyo bazali bato na Yo!
20 Regarde à ton alliance; car les lieux ténébreux de la terre sont pleins de repaires de violence.
Tala lisusu Boyokani na Yo! Pamba te, kati na mokili, bisika ya molili ekomi ebele, etondi na makambo na kanza.
21 Que l'opprimé ne retourne pas confus; que l'affligé et le pauvre louent ton nom!
Sala ete moto oyo bazali konyokola azwa lisusu lokumu! Sala ete mobola mpe moto akelela bakumisa Kombo na Yo.
22 Lève-toi, ô Dieu, défends ta cause! Souviens-toi de l'opprobre qui t'est fait tous les jours par l'insensé.
Oh Nzambe, telema mpe lobela Kombo na Yo! Kanisa lisusu ndenge nini bazoba bafingaka Yo mikolo nyonso!
23 N'oublie pas les cris de tes adversaires, le bruit toujours grandissant de ceux qui s'élèvent contre toi!
Kobosana te makelele ya bayini na Yo, mangungu ya banguna na Yo, oyo ezali kaka komata se komata!