< Néhémie 13 >

1 En ce temps-là, on lut le livre de Moïse en présence du peuple; et on y trouva écrit que les Ammonites et les Moabites ne devaient jamais entrer dans l'assemblée de Dieu;
Na tango wana, batangaki buku ya Moyize na mongongo makasi mpo ete bato bayoka; mpe bamonaki ete ekomama boye kati na yango: « Moto ya Amoni mpe moto ya Moabi bakotikala kondimama te kati na lisanga ya Nzambe;
2 Parce qu'ils n'étaient point venus au-devant des enfants d'Israël avec du pain et de l'eau, mais qu'ils avaient soudoyé Balaam contre eux, pour les maudire; mais notre Dieu changea la malédiction en bénédiction.
mpo ete bayaki te kokutana na bana ya Isalaele mpe kopesa bango bilei mpe mayi, kasi bapesaki nde Balami kanyaka mpo ete alakela bango mabe; atako bongo, Nzambe na biso abongolaki elakeli mabe lipamboli. »
3 Il arriva donc, dès qu'on eut entendu la loi, qu'on sépara d'Israël tout mélange.
Tango kaka bato bayokaki mobeko yango, balongolaki na Isalaele bakitani nyonso ya bapaya.
4 Or, avant cela, Éliashib, le sacrificateur, préposé sur les chambres de la maison de notre Dieu, parent de Tobija,
Liboso ya kozwa mokano yango, Nganga-Nzambe Eliashibi oyo azali na mokumba ya kobatela bibombelo ya Ndako ya Nzambe na biso mpe azali moto ya libota ya Tobiya
5 Lui avait préparé une grande chambre, là où l'on mettait auparavant les offrandes, l'encens, les ustensiles, et les dîmes du blé, du vin et de l'huile, qui étaient ordonnées pour les Lévites, pour les chantres et pour les portiers, avec ce qui se prélevait pour les sacrificateurs.
apesaki Tobiya, ndeko na ye, shambre monene oyo, na kala, ezalaki ebombelo ya makabo ya ble, ansa, bisalelo ya Tempelo, eteni ya zomi ya ble, ya vino ya sika mpe ya mafuta, biloko oyo Mibeko ekata ete ezali mpo na Balevi, bayembi mpe bakengeli bikuke; mpe makabo oyo epesamaka mpo na Banganga-Nzambe.
6 Or, je n'étais point à Jérusalem pendant tout cela; car, la trente-deuxième année d'Artaxerxès, roi de Babylone, j'étais retourné auprès du roi; et au bout de quelque temps je demandai un congé au roi.
Kasi wana makambo oyo nyonso ezalaki kosalema, ngai nazalaki na Yelusalemi te, pamba te nazongaki epai ya Aritakizerisesi, mokonzi ya Babiloni, na mobu ya tuku misato na mibale ya bokonzi na ye. Bongo sima na mwa mikolo, na suka ya mobu, nasengaki ye nzela
7 Je revins donc à Jérusalem; et alors j'eus connaissance du mal qu'Éliashib avait fait en faveur de Tobija, lui préparant une chambre dans le parvis de la maison de Dieu.
mpe nazongaki na Yelusalemi. Kuna, namonaki mpe nasosolaki mabe oyo Eliashibi asalaki na ndenge apesaki Tobiya shambre kati na lopango ya Ndako ya Nzambe;
8 Ce qui me déplut fort, et je jetai tous les meubles de la maison de Tobija hors de la chambre.
nasilikaki makasi mpe nabwakaki biloko nyonso ya Tobiya na libanda ya shambre.
9 Et par mon ordre, on purifia les chambres; et j'y fis rapporter les ustensiles de la maison de Dieu, les offrandes et l'encens.
Napesaki mitindo ete bapetola bashambre mpe, na sima, nazongisaki kati na yango bisalelo ya Ndako ya Nzambe, makabo ya ble mpe ansa.
10 J'appris aussi que les portions des Lévites ne leur avaient point été données, et que les Lévites et les chantres, qui faisaient le service, s'étaient enfuis, chacun vers son champ.
Nayokaki lisusu ete biloko oyo Mibeko ekata mpo na Balevi epesamaka te epai ya Balevi, mpe ete Balevi mpe bayembi oyo bazalaki kosala mosala bazongaki, moto na moto na bilanga na ye.
11 Et je censurai les magistrats, et je dis: Pourquoi la maison de Dieu est-elle abandonnée? Je rassemblai donc les Lévites et les chantres, et les rétablis dans leurs fonctions.
Mpo na yango, napamelaki bakambi ya bato mpe natunaki bango: — Mpo na nini Ndako ya Nzambe esundolami? Bongo, nasangisaki Balevi mpe bayembi mpe nazongisaki bango, moto na moto na mosala na ye.
12 Alors tous ceux de Juda apportèrent les dîmes du blé, du vin et de l'huile, dans les magasins.
Bato nyonso ya Yuda bamemaki kati na bibombelo: eteni ya zomi ya ble, ya vino ya sika mpe ya mafuta.
13 Et j'établis chefs des magasins Shélémia, le sacrificateur, Tsadok, le scribe, et Pédaja l'un des Lévites; et pour les assister, Hanan, fils de Zaccur, fils de Matthania, parce qu'ils passaient pour intègres; et leur charge était de faire les répartitions à leurs frères.
Napesaki mokumba ya kobatela bibombelo epai ya Nganga-Nzambe Shelemiya, epai ya Tsadoki, molakisi ya Mobeko, mpe epai ya Pedaya, moko kati na Balevi; mpe napesaki bango Anani, mwana mobali ya Zakuri, koko ya Matania, mpo ete asunga bango, pamba te bango nyonso bazalaki bato ya sembo. Bapesamelaki mokumba ya kokabola biloko epai ya baninga na bango, Balevi.
14 Mon Dieu! souviens-toi de moi à cause de cela; et n'efface point ce que j'ai fait, avec une sincère affection, à l'égard de la maison de mon Dieu et des choses qu'il y faut observer!
Oh Nzambe na ngai, kanisa ngai mpo na makambo oyo nyonso; kobosana te misala nyonso oyo nasali na boyengebene mpo na Ndako ya Nzambe na ngai mpe mpo na misala na yango!
15 En ces jours-là, je vis en Juda des gens qui foulaient au pressoir le jour du sabbat; et d'autres qui apportaient des gerbes, et qui les chargeaient sur des ânes, ainsi que du vin, des raisins, des figues et toutes sortes de fardeaux, et les apportaient à Jérusalem le jour du sabbat. Je leur fis des remontrances, le jour où ils vendaient leurs denrées.
Na tango wana kaka, namonaki kati na etuka ya Yuda bato bazali kokamola bambuma ya vino na mokolo ya Saba, bamosusu bazali kobongisa maboke ya matiti ya ble, kotia yango likolo ya ba-ane elongo na masanga ya vino, bambuma ya vino, ya figi mpe mikumba ya ndenge na ndenge mpo na komema yango na Yelusalemi na mokolo ya Saba. Mpo na yango, napamelaki bango ete bateka lisusu biloko te na mokolo wana.
16 Et dans la ville il y avait des Tyriens qui apportaient du poisson et toutes sortes de marchandises; et ils les vendaient aux enfants de Juda à Jérusalem, le jour du sabbat.
Ezalaki mpe na bato ya Tiri, oyo bazalaki kovanda kati na Yelusalemi; bango bazalaki komema mbisi mpe biloko ya ndenge na ndenge, mpe bazalaki kotekela yango bato ya Yuda mpe kati na Yelusalemi na mokolo ya Saba.
17 Je censurai donc les principaux de Juda, et leur dis: Quel mal faites-vous, de profaner ainsi le jour du sabbat
Napamelaki bankumu ya Yuda mpe nalobaki na bango: — Ndenge nini bozali kosala likambo mabe makasi boye na kobebisa bosantu ya mokolo ya Saba?
18 Vos pères n'ont-ils pas fait de même, et n'est-ce pas pour cela que notre Dieu fit venir tout ce mal sur nous et sur cette ville? Et vous augmentez l'ardeur de la colère de l'Éternel contre Israël, en profanant le sabbat.
Tala, bakoko na bino basalaki mpe kaka boye; mpe ezali mpo na yango nde Nzambe na biso atindelaki biso mpe engumba oyo pasi oyo nyonso. Mpe bino, lokola bozali kobebisa bosantu ya mokolo ya Saba, bozali nde komatisa kanda ya Nzambe likolo ya Isalaele!
19 C'est pourquoi, dès que le soleil s'était retiré des portes de Jérusalem, avant le sabbat, par mon commandement, on fermait les portes; je commandai aussi qu'on ne les ouvrît point jusqu'après le sabbat; et je fis tenir quelques-uns de mes gens aux portes, afin qu'il n'entrât aucune charge le jour du sabbat.
Tango molili ya pokwa ekweyaki na bikuke ya Yelusalemi, liboso ete mokolo ya Saba ebanda, napesaki mitindo ete bakanga bikuke yango mpe bafungola yango kaka soki mokolo ya Saba eleki. Bongo, natiaki ndambo ya basali na ngai na bikuke mpo na kopekisa bokoti ya mikumba, na mokolo ya Saba.
20 Et les marchands, et ceux qui vendaient toutes sortes de marchandises, passèrent la nuit une fois ou deux, hors de Jérusalem.
Boye, mbala moko to mibale, basombi mpe bateki biloko ya ndenge na ndenge balekisaki butu libanda ya Yelusalemi.
21 Je leur fis des remontrances, et leur dis: Pourquoi passez-vous la nuit devant la muraille? Si vous y retournez, je mettrai la main sur vous. Depuis ce temps-là, ils ne vinrent plus le jour du sabbat.
Nakebisaki bango makasi mpe nalobaki: — Mpo na nini bozali kolekisa butu pembeni ya mir? Soki bozongeli lisusu kosala bongo, nakokanga bino. Wuta na tango wana, batikalaki lisusu koya te na mokolo ya Saba.
22 Je dis aussi aux Lévites de se purifier et de venir garder les portes, pour sanctifier le jour du sabbat. O mon Dieu, souviens-toi de moi à cet égard, et me pardonne selon la grandeur de ta miséricorde!
Napesaki lisusu Balevi mitindo ete bamipetola mpe bakende kokengela bikuke mpo na kobatela bule ya mokolo ya Saba. Oh Nzambe na ngai, kanisa ngai lisusu mpo na likambo oyo mpe talisa ngai ngolu na Yo kolanda bolingo monene na Yo!
23 En ces jours-là aussi je vis des Juifs qui avaient pris des femmes asdodiennes, ammonites et moabites.
Kaka na mikolo wana, namonaki lisusu bana mibali ya Yuda kobala bana basi ya Asidodi, ya Amoni mpe ya Moabi.
24 Quant à leurs enfants, la moitié parlait l'asdodien et ne savait point parler la langue des Juifs, mais bien la langue de tel ou tel peuple.
Kati-kati mobimba ya bana na bango bazalaki koloba lokota ya bato ya Asidodi to lokota ya ekolo moko kati na bikolo mosusu, kasi bayebaki te koloba lokota ya Bayuda.
25 Je les réprimandai et je les maudis; j'en frappai plusieurs, je leur arrachai les cheveux, et je les fis jurer par le nom de Dieu, en disant: Vous ne donnerez point vos filles à leurs fils, et vous ne prendrez point de leurs filles pour vos fils, ni pour vous.
Napamelaki bango mpe nalakelaki bango mabe; nabetaki ndambo kati na bango, napikolaki bango suki mpe nalapisaki bango ndayi oyo na Kombo ya Nzambe: — Bosengeli te kopesa na libala bana na bino ya basi epai ya bana mibali ya bapaya mpe bosengeli te kozwa na libala bana na bango ya basi mpo na bana na bino ya mibali to mpo na bino moko.
26 N'est-ce pas en cela que pécha Salomon, roi d'Israël? Parmi la multitude des nations il n'y avait point de roi comme lui; il était aimé de son Dieu, et Dieu l'avait fait roi de tout Israël; toutefois les femmes étrangères le firent pécher.
Ezalaki penza na nzela ya mabala ya boye nde Salomo, mokonzi ya Isalaele, akweyaki na masumu. Nzokande, kati na ebele ya bikolo ya bapaya, ezalaki na mokonzi moko te oyo akokanaki na ye! Nzambe na ye azalaki kolinga ye mpe atiaki ye mokonzi ya Isalaele mobimba, kasi basi ya bapaya bakweyisaki ye na masumu.
27 Et vous permettrions-nous de faire tout ce grand mal, de commettre ce crime contre notre Dieu, de prendre des femmes étrangères?
Boni, tosengeli sik’oyo koyoka ete bino mpe bozali kosala mabe wana monene mpe bozangi boyengebene liboso ya Nzambe na biso likolo ya kobala basi ya bapaya?
28 Or, l'un des fils de Jojada, fils d'Éliashib, le grand sacrificateur, était gendre de Samballat, le Horonite; je le chassai d'auprès de moi.
Moko kati na bana mibali ya Yoyada, mwana mobali ya Eliashibi, mokonzi ya Banganga-Nzambe, akomaki bokilo ya Sanibala, moto ya Oroni. Mpe nabenganaki ye mosika na ngai.
29 Mon Dieu! qu'il te souvienne d'eux; car ils ont souillé la sacrificature, l'alliance de la sacrificature et des Lévites.
Oh Nzambe na ngai, kobosana bato wana te, mpo ete babebisaki bosantu ya bonganga-Nzambe mpe boyokani na Yo elongo na Banganga-Nzambe mpe Balevi.
30 Ainsi je les purifiai de tout ce qui était étranger, et je rétablis les sacrificateurs et les Lévites dans leurs charges, chacun selon son office,
Napetolaki Banganga-Nzambe mpe Balevi mpo na kolongola mbindo nyonso ya bapaya mpe nazongisaki bango na mosala, moto na moto na mokumba na ye.
31 Et les prestations en bois aux époques fixées, et celles des prémices. Mon Dieu! souviens-toi de moi pour me faire du bien!
Nazongisaki lisusu makabo ya bakoni mpo ete epesama na tango na yango oyo ekatama mpe makabo ya bambuma ya liboso ya mabele. Oh Nzambe na ngai, kanisa ngai na bolamu na Yo!

< Néhémie 13 >