< 1 Chroniques 8 >
1 Benjamin engendra Béla, son premier-né, Ashbel le second, Achrach le troisième,
Bana mibali ya Benjame: Bela, mwana ya liboso; Ashibeli, mwana ya mibale; Ara, mwana ya misato;
2 Nocha le quatrième, et Rapha le cinquième.
Noa, mwana ya minei; mpe Rafa, mwana ya mitano.
3 Les fils de Béla furent: Addar, Guéra, Abihud,
Bana mibali ya Bela: Adari, Gera, Abiwudi,
4 Abishua, Naaman, Achoach,
Abishuwa, Namani, Aowa,
5 Guéra, Shéphuphan et Huram.
Gera, Shefufani mpe Urami.
6 Voici les enfants d'Échud; ils étaient chefs des maisons des pères des habitants de Guéba, et ils les transportèrent à Manachath:
Tala bana mibali ya Ewudi oyo bazalaki bakambi ya bituka ya bavandi ya Geba, mpe bamemaki bato ya Geba na Manaati:
7 Naaman, Achija et Guéra; c'est lui qui les transporta. Il engendra Uzza et Achichud.
Namani, Ayiya mpe Gera. Ezalaki Gera, tata ya Uza mpe ya Ayiwudi, nde moto amemaki bango na bowumbu.
8 Shacharaïm eut des enfants au pays de Moab, après qu'il eut renvoyé Hushim et Baara, ses femmes.
Shaarayimi abotaki bana na mokili ya Moabi, sima na ye kobengana basi na ye mibale: Ushimi mpe Baara.
9 Il engendra de Hodèsh, sa femme, Jobab, Tsibia, Mésha, Malcam,
Na nzela ya Odeshi, mwasi na ye ya sika, abotaki: Yobabi, Tsibia, Mesha, Malikami,
10 Jéuts, Shocja et Mirma. Ce sont là ses fils, chefs des pères.
Yeutsi, Sakia mpe Mirima. Bango nde bazalaki bana mibali ya Shaarayimi, oyo bakomaki bakambi ya bituka.
11 De Hushim il engendra Abitub, et Elpaal.
Elongo na Ushimi, mwasi na ye, Shaarayimi abotaki: Abitubi mpe Elipaali.
12 Les fils d'Elpaal: Éber, Misheam, et Shémer, qui bâtit Ono, Lod et les villes de son ressort.
Bana mibali ya Elipaali: Eberi, Misheami mpe Shemeri oyo atongaki bingumba Ono mpe Lodi elongo na bamboka na yango ya mike.
13 Béria et Shéma, qui étaient chefs des pères des habitants d'Ajalon, mirent en fuite les habitants de Gath.
Beria mpe Shema oyo bazalaki bakambi ya bituka ya bavandi ya Ayaloni babenganaki bato ya Gati.
14 Achio, Shashak, Jérémoth,
Bana mibali ya Beria: Ayiyo, Shashaki, Yeremoti,
16 Micaël, Jishpha et Jocha, étaient fils de Béria.
Mikaeli, Yishipa mpe Yoa, bana mibali ya Beria.
17 Zébadia, Meshullam, Hizki, Héber,
Zebadia, Meshulami, Iziki, Eberi,
18 Jishméraï, Jizlia, et Jobab, étaient fils d'Elpaal.
Yishimerayi, Yiziliya mpe Yobabi bazalaki bana mibali ya Elipaali.
20 Éliénaï, Tsilethaï, Éliel,
Elienayi, Tsilitai, Elieli,
21 Adaja, Béraja, et Shimrath, étaient fils de Shimeï.
Adaya, Beraya mpe Shimirati bazalaki bana mibali ya Shimei.
Yishipani, Eberi, Elieli,
24 Hanania, Élam, Anthothija,
Anania, Elami, Anitotiya,
25 Jiphdéja et Pénuel, étaient fils de Shashak.
Yifidea mpe Penueli bazalaki bana mibali ya Shashaki.
26 Shamshéraï, Shécharia, Athalia,
Shamisherayi, Shearia, Atalia,
27 Jaareshia, Élija et Zicri, étaient fils de Jérocham.
Yaareshia, Eliya mpe Zikiri bazalaki bana mibali ya Yeroami.
28 Ce sont là les chefs des maisons des pères, chefs selon leur naissance. Ils habitaient à Jérusalem.
Bango nyonso bazalaki bakambi ya bituka ndenge bakomama na buku ya mabota na bango, mpe bazalaki kovanda na Yelusalemi.
29 Le père de Gabaon habitait à Gabaon; sa femme s'appelait Maaca.
Yeyeli, tata ya Gabaoni, azalaki kovanda na Gabaoni. Kombo ya mwasi na ye ezalaki « Maaka. »
30 Son fils, le premier-né, fut Abdon; puis Tsur, Kis, Baal, Nadab,
Abidoni azalaki mwana na ye ya liboso ya mobali; sima, Tsuri, Kishi, Bala, Nadabi,
31 Guédor, Achio et Zéker.
Gedori, Ayiyo mpe Zekeri.
32 Mikloth engendra Shiméa. Ils habitèrent aussi près de leurs frères à Jérusalem, avec leurs frères.
Mikiloti abotaki mwana mobali, Shimea. Bango mpe bazalaki kovanda na Yelusalemi elongo na mabota na bango.
33 Ner engendra Kis; Kis engendra Saül; Saül engendra Jonathan, Malkishua, Abinadab et Eshbaal.
Neri abotaki Kishi; Kishi abotaki Saulo; Saulo abotaki Jonatan, Maliki-Shuwa, Abinadabi mpe Eshibala.
34 Fils de Jonathan: Mérib-Baal. Mérib-Baal engendra Mica.
Jonatan abotaki Meriba-Bala; Meriba-Bala abotaki Mishe.
35 Fils de Mica: Pithon, Mélec, Thaeréa et Achaz.
Mishe abotaki: Pitoni, Meleki, Taereya mpe Akazi.
36 Achaz engendra Jéhoadda; Jéhoadda engendra Alémeth, Azmaveth et Zimri; Zimri engendra Motsa;
Akazi abotaki Yeoyada; Yeoyada abotaki Alemeti, Azimaveti mpe Zimiri, tata ya Motsa.
37 Motsa engendra Binea, qui eut pour fils Rapha, qui eut pour fils Éleasa, qui eut pour fils Atsel.
Zimiri abotaki Motsa; Motsa abotaki Bineya; Bineya abotaki Rafa; Rafa abotaki Eleasa; mpe Elasa abotaki Atseli.
38 Atsel eut six fils, dont voici les noms: Azrikam, Bocru, Ismaël, Shéaria, Obadia et Hanan. Tous ceux-là étaient fils d'Atsel.
Atseli abotaki bana mibali motoba: Azirikami, Bokuru, Isimaeli, Shearia, Abidiasi mpe Anani. Bango nyonso nde bazalaki bana mibali ya Atseli.
39 Fils d'Eshek, son frère: Ulam, son premier-né, Jéush le second, et Éliphélet le troisième.
Bana mibali ya Esheki, ndeko mobali ya Atseli: Ulami, mwana na ye ya liboso; Yewushi, mwana ya mibale; mpe Elifeleti, mwana ya misato.
40 Les fils d'Ulam furent de vaillants guerriers, tirant de l'arc; et ils eurent beaucoup de fils et de petits-fils, cent cinquante. Tous ceux-là sont des enfants de Benjamin.
Bana mibali ya Ulami bazalaki basoda ya mpiko oyo bayebaki kosalela tolotolo. Bazalaki na bana mibali mpe bakoko ya mibali ebele: nkama moko na tuku mitano. Bango nyonso bazalaki bakitani ya Benjame.